[1] Tango bakómi penepene ya Yeruzalem, epai ya mboka Betfajé pe Betanie, pembeni ya Ngomba ya ba-Olive, Yezu atindi bayekoli na ye mibale,
[2] alobi na bango: “Bókende na mboka oyo etalani ná bino. Tango bokokóma kuna bokomona mwana-punda bakangá na singa; nanu moto moko té amatá yango. Bófungola yango pe bómema yango awa.
[3] Soki moto atuni bino: ‘Po na nini bozali kosala bongo?’ bóloba na ye: ‘Mokonzi azali na posa na yango,’ bongo akopesa bino yango noki.”
[4] Bakei pe bamoni mwana-punda ekangami na nzela liboso ya ndako moko, bongo bafungoli yango.
[5] Bato mosusu oyo bazalaki wana, batuni bango: “Po na nini bozali kofungola mwana-punda oyo?”
[6] Bayekoli bazongiseli bango ndenge Yezu alobaki, pe batiki bango bákende na yango.
[7] Bongo bamemeli Yezu mwana-punda, batie yango bilamba na bango, pe Yezu amateli yango.
[8] Bato mingi bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela; bamosusu bakendeki kokata matiti ya banzete na bilanga, pe bazalaki kotia yango na nzela.
[9] Bato bazalaki kokende liboso, ná baoyo bazalaki kolanda sima, babandaki koganga: “Ozana! Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye!
[10] Bokonzi ya koko na biso David elingi koya! Nzambe ábenisa yango! Ozana na Nzambe na Likolo!”
[11] Wana ezali ndenge Yezu akotelaki na Yeruzalem. Akei na Ndako ya Nzambe pe atali yango bipai nyonso. Na pokwa abimi, pe azongi na Betanie ná bayekoli na ye zomi na mibale.
[12] Sima ya mokolo moko, tango balongwe na Betanie, Yezu abandi koyoka nzala.
[13] Amoni na mosika nzete ya figi etondá na makasa; akei kotala soki akoki kozwa mbuma. Kasi tango akómi penepene, amoni eloko té kaka makasa pamba; pamba té eleko ya mbuma nanu ekokaki té.
[14] Bongo Yezu alobi na nzete ya figi: “Ata mokolo moko té moto akolia lisusu mbuma na yo!” Bayekoli na ye pe bayoki maloba wana.
[15] Awa bakómi na Yeruzalem, Yezu akoti na Ndako ya Nzambe pe abandi kobengana bato oyo bazalaki koteka pe kosomba biloko kuna. Abaloli bamesa ya bato bazalaki koshanjé mbongo, ná bakiti ya baoyo bazalaki koteka bapijon.
[16] Apekisi bato oyo bazalaki komema biloko, bákatisa té na lopango ya Ndako ya Nzambe;
[17] apesi bango mateya boye: “Boyebi té? Ekòmamá boye: ‘Ndako na ngai, bakobenga yango ndako ya losambo po na bikolo nyonso.’ Kasi bino bokómisi yango esika bamiyibi bakutanaka!”
[18] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bayoki yango pe babandi koluka nzela ya koboma Yezu. Kasi bazalaki kobanga ye, pamba té bato nyonso bakamwe po na mateya na ye.
[19] Tango bakómi na pokwa, Yezu ná bayekoli na ye babimi na Yeruzalem.
[20] Tongo etani, tango bazalaki koleka lisusu na nzela, bamoni nzete ya figi ekauki tii na misisa,
[21] pe Piere akanisi makambo elekaki, alobi na Yezu: “Moteyi, tala nzete oyo opesaki etumbu, ekauki nyonso.”
[22] Bongo Yezu alobi na bayekoli na ye: “Bótia mitema na Nzambe!
[23] Nalobi na bino, ya solo: soki moto alobi na ngomba oyo: ‘Longwa wana! Kende komibwaka na ebale.’ Pe soki atie tembe té kasi andimi na motema moko 'tè ekosalama ndenge alobi, Nzambe akosala yango po na ye.
[24] Yango wana nalobi na bino: soki bozali kosenga eloko na Nzambe, bóndima 'tè bosi'bozwi yango, bongo bokozwa yango.
[25] Pe tango bozali kosambela, soki bozali na likambo ná moto mosusu, bólimbisa ye, po Tata na bino ya Likolo álimbisa pe masumu na bino.
[26] [Kasi soki bozali kolimbisa baninga té, Tata na bino oyo azali na Likolo akolimbisa pe masumu na bino té.]”
[27] Bongo bayei lisusu na Yeruzalem. Tango Yezu azalaki kotambola na kati ya Ndako ya Nzambe, bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi-Mibeko ná bambuta-muntu ya ekolo bayei epai na ye,
[28] pe batuni ye: “Epai wapi ozwi bokonzi ya kosala boye? Nani apesi yo bokonzi ya kosala makambo oyo?”
[29] Yezu azongiseli bango: “Ngai pe nakotuna bino motuna moko kaka. Soki bozongiseli ngai eyano, ngai pe nakoyebisa bino soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani.
[30] Batisimo oyo Yoane azalaki kopesa eutaki epai wapi? Epai ya Nzambe to epai ya bato? Bózongisela ngai eyano.”
[31] Kasi bango babandi kotiana tembe bango na bango balobi: “Soki tozongisi: ‘Epai ya Nzambe’, ye akotuna: ‘Po na nini bondimelaki Yoane té?’
[32] Soki pe tolobi ‘Epai ya bato'…” (Bazalaki kobanga bato, po bango nyonso babandaki kokamata Yoane lokola profete ya solo.)
[33] Yango wana bazongiseli Yezu: “Toyebi té.” Bongo Yezu alobi na bango: “Ngai pe nakoyebisa bino té soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani.”