[1] Mokolo moko ba-Farizé ná mwa-ndambo ya balakisi-Mibeko bautaki na Yeruzalem, bayei kosangana epai ya Yezu.
[2] Bamoni bayekoli na ye mosusu bazali kolia maboko mbindo, elingi koloba 'tè basukoli yango na mai té, ndenge mibeko ya bokoko ezali kotinda.
[3] Pamba té ba-Farizé ná Bayuda nyonso batosaka mateya ya bakoko: baliaka té soki basukoli maboko malamu penza té.
[4] Tango bautaka na zando, baliaka eloko té soki nanu basukoli nzoto té. Bazali kotosa mibeko mosusu mingi ya bokoko, ndakisa: ndenge ya kosukola bakopo, bilokú, banzungu ya bibende ná bambeto.
[5] Yango wana ba-Farizé ná balakisi-Mibeko batuni Yezu: “Po na nini bayekoli na yo batosaka mibeko ya bokoko té? Tala, bazali kolia kutu maboko mbindo!”
[6] Yezu azongiseli bango: “Bino bato ya lokuta! Profete Ezaya asakolaká maloba ya solo po na bino. Ekòmamá boye: ‘Nzambe alobi: Bato oyo bakumisaka ngai bobele na maloba, kasi na mitema bazali mosika na ngai.
[7] Losambo na bango ezali na tina moko té, po balandaka bobele mateya oyo bato balakisá bango.’
[8] Bino pe botiá mibeko ya Nzambe pembeni, pe botosaka mibeko oyo euti na bato.”
[9] Yezu abakisi lisusu: “Ya solo, bino bozali mayele! Bozali koboya mibeko ya Nzambe, po na kotosa oyo euti na bino moko.
[10] Pamba té, Moize alobaká: ‘Tosa tata ná mama na yo.’ Pe ‘Moto oyo abwakeli tata na ye to mama na ye lisumá, basengeli koboma ye.’
[11] Kasi bino bolobaka: ‘Moto akoki koloba na tata pe na mama: lisalisi oyo nalingaki kopesa bino, nabombi yango po na Nzambe.’
[12] Soki alobi bongo, bozali kopekisa ye ásalisa tata ná mama té.
[13] Kaka na ndenge wana bozali kokómisa maloba ya Nzambe eloko ya pamba, po na kotosa mibeko oyo euti na bino moko. Pe bosalaka makambo mingi ya motindo wana.”
[14] Sima Yezu abengi lisusu bato nyonso wana pe alobi na bango: “Bino nyonso bóyoka ngai. Bóyeba 'tè:
[15] Eloko ekoti na monoko ya moto, ekoki kobebisa motema na ye té. Kasi oyo ebimaka na moto, yango nde ebebisaka motema na ye.
[16] [Moto oyo azali na matoi, áyoka!]”
[17] Tango Yezu atiki bato pe akoti na ndako, bayekoli na ye batuni ye tina ya maloba yango.
[18] Bongo ye alobi na bango: “Bino pe bozali na mayele ya koyeba yango té? Boyebi té 'tè eloko ekoti na monoko ya moto ekoki kobebisa motema na ye té?
[19] Pamba té yango ekotaka na motema té kasi na libumu; na sima ebimaka libanda.” Na maloba wana, Yezu alakisi 'tè bato bakoki kolia biloko nyonso.
[20] Pe alobi lisusu: “Makambo oyo ebimaka na moto, yango nde ebebisaka motema na ye.
[21] Pamba té makanisi nyonso ya kosala mabe eutaka na mitema ya bato; ndakisa: kosala kindumba, koyiba, lokoso ya mbongo, mobulu, zuwa, lofundu, makambo ya bozoba, koboma bato, kotambola na basi to na mibali ya bato, kotomboka, kokosa pe kotónga bato.
[23] Makambo nyonso wana ya mabe ebimaka na moto, yango nde ebebisaka motema na ye.”
[24] Yezu alongwe na esika yango, akei na mabelé oyo ezali pembeni ya vile ya Tir. Akoti na ndako moko, po alingaki té báyeba 'tè azali wana, kasi akokaki kobombama té.
[25] Boye mwasi moko ya mboka wana ayoki sango ya Yezu, mwana na ye ya mwasi azalaki na molimo mabe. Mwasi wana azalaki mopaya, abotami na Fenisie, na rejion ya Sirie. Bongo akei noki epai ya Yezu pe afukameli ye; abondeli ye ábimisa molimo mabe na Mwana na ye.
[27] Kasi Yezu alobi na ye: “Tika nanu bana bália liboso, pamba té ezali malamu té kobotola bilei ya bana po na kobwakela bambwa.”
[28] Mwasi azongiseli ye: “Ya solo, Mokonzi, kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweisaka na se ya mesa.”
[29] Bongo Yezu alobi na ye: “E mama, olobi penza malamu! Kende na boboto; molimo mabe ebimi na mwana na yo.”
[30] Tango mama yango azongi na ndako, akuti mwana alali na mbeto, molimo mabe esi'ebimaki na ye.
[31] Bongo Yezu alongwe lisusu na mabelé ya Tir, aleki na vile ya Sidon, pe akatisi mabelé ya epai ya Bamboka Zomi, tii akómi na laki ya Galilé.
[32] Bayeeli ye moto moko akufá matoi pe azalaki baba, babandi kobondela ye 'tè átiela ye maboko.
[33] Yezu amemi ye mwa-mosika ya bato, atie ye misapi na matoi, abwakeli ye soi pe asimbi ye na lolemo.
[34] Sima atali na likolo, abimisi mwa-pema moke, pe alobi na baba: “Efata” (elingi koloba: “Fungwamá”).
[35] Kaka na tango wana, matoi na ye efungwami; pe na mbala moko abandi koloba malamu penza.
[36] Yezu apekisi bato báyebisa ata moto moko té. Kasi ata azalaki kopekisa bato ndenge nini, bazalaki kaka kopanza sango na ye koleka!
[37] Babandaki kokamwa mingi penza, bazalaki koloba: “Nyonso oyo azali kosala ezali malamu! Azali koyokisa bato bakufá matoi, pe kolobisa bababa!”