[1] Bakómi na ngambo ya laki ya Galilé na mabelé ya Gerazá.
[2] Awa Yezu abimi na bwatu, akutani ná moto moko auti na simetiere, azalaki na molimo mabe.
[3] Moto yango azalaki kaka kofanda na simetiere; moto moko té akokaki kokanga ye, ata na minyololo. Pamba té mbala mingi bazalaki kokanga ye makolo na basinga ya bibende pe maboko na minyololo, kasi azalaki kokata minyololo ná basinga.
[5] Mikolo nyonso, butu moi, azalaki kotelengana na simetiere pe na bangomba. Azalaki koganga makasi pe komizokisa na mabanga.
[6] Awa amoni Yezu azali nanu mosika, akei mbangu epai na ye, afukameli ye,
[7] pe agangi na mongongo makasi: “Yezu, Mwana ya Nzambe ya Likolo, biso ná yo likambo nini? Nabondeli yo na kombo ya Nzambe: kopesa ngai etumbu té.”
[8] Alobi boye pamba té, Yezu alobaki na ye: “Molimo mabe, bima na moto oyo!”
[9] Bongo Yezu atuni ye: “Kombo na yo nani?” Ye azongisi: “Kombo na ngai Ebele, pamba té tozali mingi!”
[10] Pe abondeli ye alobi: “Kobengana biso na mabelé oyo té.”
[11] Bangulu ebele ezalaki kolia kuna pembeni ya ngomba.
[12] Bongo milimo ebondeli Yezu boye: “Tinda biso tókende kokota na bangulu wana.”
[13] Yezu apesi yango nzela. Bongo milimo mabe ebimi na moto wana pe ekoti na bangulu. Bangulu nyonso, soki 2.000, elongwe likolo ya ngomba; ekei kokweya na kati ya laki pe ekufi na mai.
[14] Bakengeli ya bangulu bakimi, pe bakei koyebisa sango na vile ya Gerazá pe na bamboka ya mike, bongo bato bayei kotala likambo yango.
[15] Awa bakómi epai ya Yezu, bamoni moto oyo azalaki na milimo mabe afandi nyee, alati bilamba, azongeli makanisi ya bomoto. Bongo bato nyonso babandi kobanga.
[16] Baoyo bamonaki makambo elekaki, bayebisi bango ndenge moto ya milimo mabe abikaki, pe ndenge esukelaki bangulu.
[17] Yango wana bato nyonso basengi Yezu 'tè álongwa na mabelé na bango.
[18] Tango Yezu akoti na bwatu, moto oyo azalaki na milimo mabe abondeli ye 'tè ákende nzela moko ná ye.
[19] Kasi Yezu apesi ye nzela té; alobi na ye: “Kende epai na yo, pe yebisa baninga makambo minene oyo Nkolo asali po na yo, pe ndenge ayokeli yo mawa.”
[20] Bongo moto wana akei epai ya Bamboka-Zomi pe abandi kosakola makambo nyonso oyo Yezu asalaki po na ye. Pe bato nyonso bakamwe mingi.
[21] Yezu akatisi lisusu mai na bwatu. Awa akómi na ngambo, bato ebele bayei kosangana epai na ye na libongo.
[22] Mokonzi moko ya ndako ya lisanga ayei, kombo na ye Yair. Tango amoni Yezu, afukameli ye,
[23] pe abondeli ye mingi alobi: “Mwana na ngai ya mwasi alingi ákufa. Nasengi yo óya kotiela ye maboko po ábika pe ázala na bomoi.”
[24] Yezu akei nzela moko ná ye. Bato ebele bazalaki kolandalanda ye pe kofinafina ye bipai nyonso.
[25] Mwasi moko azalaki na kati ya bato wana, azalaki kobela maladi ya kotanga makila, esali mbula zomi na mibale.
[26] Amonaki pasi mingi po na kokende epai ya baminganga ebele, pe asilisaki mbongo na ye nyonso pamba; maladi ebandaki kosila té, kasi pasi ezalaki kaka kokóma makasi.
[27] Ayokaki sango ya Yezu, bongo ayei komikotisa na kati ya bato sima na ye, pe asimbi elamba na ye.
[28] Pamba té azalaki kokanisa: “Soki nasimbi ata elamba na ye, nakobika.”
[29] Na mbala moko, makila etiki kotanga pe ayei koyeba 'tè abiki.
[30] Kaka na tango wana Yezu ayebaki 'tè nguya na ye esali mosala. Abaluki epai ya bato bazalaki kolandalanda ye pe atuni bango: “Nani asimbi elamba na ngai?”
[31] Bayekoli bazongiseli ye: “Omoni 'tè bato ebele bazali kokangama na yo. Ndenge nini ozali kotuna: Nani asimbi ngai?”
[32] Kasi Yezu atali epai na epai po ámona nani asalaki yango.
[33] Mwasi wana abandi kobanga pe kolenga po ayebaki likambo ekweelaki ye. Bongo ayei kofukamela Yezu pe ayebisi ye makambo nyonso.
[34] Yezu alobi na ye: “Mwana na ngai, bondimi na yo ebikisi yo. Kende malamu, maladi na yo esili.”
[35] Awa Yezu azalaki koloba boye, bato bauti na ndako ya Yair bayei koyebisa ye: “Mwana na yo asi'akufi. Tina ya kotungisa lisusu Moteyi ezali té.”
[36] Kasi tango Yezu ayoki maloba wana, alobi na Yair: “Kobanga té. Tia kaka motema.”
[37] Apekisi bato mosusu 'tè bálanda ye té, bobele Piere, Jake ná ndeko na ye Yoane.
[38] Tango bakómi na ndako ya Yair, Yezu amoni bato bazali kotia makelele, kolela pe koganga makasi.
[39] Akoti pe alobi na bango: “Po na nini bozali kolela pe kotia makelele boye? Mwana akufi té, kasi alali pongi.”
[40] Bango babandi koseka ye. Kasi abimisi bango nyonso; akamati bobele tata ná mama ya Mwana pe bayekoli na ye misato, bongo akoti esika mwana azalaki.
[41] Asimbi mwana na liboko pe alobi na ye: “Talita kum,” elingi koloba: “Mwana-mwasi, nalobi na yo, lamuka.”
[42] Kaka na tango wana, mwana atelemi pe abandi kotambola. Azalaki na mbula zomi na mibale. Awa bamoni likambo yango, bakamwe mingi penza.
[43] Kasi Yezu apekisi bango na makasi 'tè báyebisa yango na moto té. Na sima alobi na bango: “Bópesa mwana biloko ya kolia.”