[1] Sima ya mwa-mikolo, Yezu azongi na Kafarnaum, pe bato bayoki 'tè azali na ndako.
[2] Bato mingi basanganaki kuna, bongo esika moko té etikalaki, ata na libanda liboso ya porte; pe Yezu azalaki koteya bango maloba ya Nzambe.
[3] Na tango wana bato minei bayei, bamemi moto moko akufá makolo.
[4] Kasi bakokaki kolakisa ye na Yezu té po na kaká ya bato. Bongo bamati likolo ya ndako, batoboli lidusu esika Yezu azalaki, bakitisi moto akufá makolo kaka ndenge alalaki na etoko na ye.
[5] Tango Yezu amoni bondimi na bango, alobi na moto akufá makolo: “Mwana na ngai, nalimbisi masumu na yo.”
[6] Balakisi-Mibeko mosusu bazalaki kofanda wana, bamituni na se ya mitema:
[7] “Ndenge nini moto oyo azali kotsiola Nzambe boye? Nani moto akoki kolimbisa masumu? Kaka Nzambe té?”
[8] Yezu asi'ayebaki makanisi na bango, pe atuni: “Po na nini bozali kokanisa ndenge wana?
[9] Soki nalobi na moto akufá makolo: ‘Nalimbisi masumu na yo’, to pe nalobi: ‘Telema, kamata etoko na yo pe tambola’, nini eleki pasi?
[10] Kasi nalingi bóyeba 'tè Mwana ya Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mokili.” Bongo alobi na moto akufá makolo:
[11] “Nalobi na yo: Telema, kamata etoko na yo pe zonga na ndako.”
[12] Na mbala moko moto akufá makolo atelemi na miso ya bato nyonso, akamati etoko na ye pe akei. Bango nyonso bakamwe mingi, babandi kokumisa Nzambe pe balobi: “Nanu tomoná likambo ya boye té!”
[13] Yezu akei lisusu kotambola pembeni ya laki ya Galilé. Bato mingi bayei epai na ye, pe azalaki koteya bango.
[14] Na tango azalaki koleka, amoni Levi, mwana ya Alfé, afandi na biro oyo bafutaka mpaku. Yezu alobi na ye: “Landa ngai!” Levi atelemi pe alandi ye.
[15] Na sima Yezu azalaki kolia na ndako ya Levi. Bafutisi-mpaku mingi ná bato ebele ya masumu bazalaki na mesa ná Yezu pe bayekoli na ye; pamba té bato mingi ya ndenge wana bazalaki kolanda ye.
[16] Balakisi-Mibeko oyo bazalaki na lingomba ya ba-Farizé, tango bamoni 'tè Yezu azali kolia esika moko ná bato ya masumu pe bafutisi-mpaku, batuni bayekoli na ye: “Po na nini azali kolia esika moko ná bafutisi-mpaku pe bato ya masumu?”
[17] Yezu ayoki yango pe alobi na bango: “Bato oyo bazali na nzoto malamu balukaka monganga té; kasi bobele bato ya maladi nde balukaka monganga. Pamba té nayaki kobenga bato ya malamu té, kasi nayaki kobenga bato ya masumu.”
[18] Mokolo mosusu bayekoli ya Yoane Mobatisi ná ba-Farizé bazalaki komilalisa nzala. Bongo bato bayei kotuna Yezu: “Po na nini bayekoli ya Yoane ná ya ba-Farizé bazali komilalisa nzala, kasi bayekoli na yo basalaka bongo té?”
[19] Yezu azongiseli bango: “Soki moto abali mwasi pe abengisi baninga na feti ya libala, bakoki komilalisa nzala? Té! Lokola mobali azali esika moko ná bango, bakoki komilalisa nzala té!
[20] Kasi mokolo ezali, bakolongola mobali na kati na bango; bongo mokolo wana baninga na ye bakobanda komilalisa nzala.
[21] “Moto moko té akamataka kitendi ya sika po ábamba na elamba ya kala; soki asali bongo, kitendi yango ekopasola elamba, pe lidusu ekokóma monene koleka oyo ya liboso.
[22] Pe moto moko té atiaka vinu ya sika na basaki ya kala. Soki asali boye, vinu ekopasola saki, bongo vinu ná saki ekobeba nyonso mibale. Batiaka vinu ya sika na saki ya sika.”
[23] Na Mokolo moko ya Kopema, Yezu azalaki koleka na bilanga ya blé. Na nzela, bayekoli na ye babandi kobuka bambuma ya blé.
[24] Ba-Farizé balobi na Yezu: “Tala nanu! Po na nini bayekoli na yo bazali kosala makambo epekisamá na Mokolo ya Kopema?”
[25] Yezu azongiseli bango: “Botangá nanu té makambo David asalaká, tango ye ná bato na ye bayokaki nzala pe bazangaki biloko ya kolia?
[26] Na eleko ya nganga-Nzambe monene Abiatar, David akotaki na Ndako ya Nzambe, pe alei mapa oyo batielaki Nzambe. Nzokande kaka banganga-Nzambe bato bakoki kolia mapa wana. Kasi David akamataki yango pe apesi na bato na ye.”
[27] Bongo Yezu asukisi boye: “Nzambe asalá Mokolo ya Kopema po na bato; kasi asalá bato po na Mokolo ya Kopema té.
[28] Yango wana bóyeba 'tè Mwana ya Moto azali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema.”