Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:30

[1] Mokolo moko Yezu akoti lisusu na ndako ya lisanga. Moto moko azalaki kuna, liboko na ye ekufá.

[2] Bato oyo bazalaki wana batali Yezu na mayele, soki akobikisa moto yango na Mokolo ya Kopema, po bázwa nzela ya kofunda ye.

[3] Yezu alobi na moto oyo azalaki na liboko ekufá: “Telema awa na miso ya bato nyonso.”

[4] Pe atuni bato: “Na Mokolo ya Kopema, mibeko na biso epesaka nzela ya kosala malamu to té? Etindaka bato bábikisa moto to bátika ye ákufa?” Kasi bango bafandi nyee.

[5] Yezu atali bango na kanda. Azalaki na mawa penza po bazalaki komona pasi ya moto ya maladi pamba. Alobi na moto wana: “Tanda liboko na yo!” Atandi yango, pe liboko na ye ekómi malamu.

[6] Ba-Farizé babimi na ndako ya lisanga, bakei kosala likita ná bato ya Erode, po na koluka nzela ya koboma Yezu.

[7] Yezu alongwe wana, pe akei epai ya laki ya Galilé ná bayekoli na ye. Bato ebele ya Galilé balandaki ye. Bato mosusu bauti na rejion ya Yudea,

[8] na Yeruzalem, na Idumé, na ngambo ya Yordan pe na bapembeni ya Tir ná Sidon. Bato mingi penza bayei epai ya Yezu, po bayokaki sango ya misala na ye nyonso.

[9] Atindi bayekoli 'tè bábongisela ye bwatu moko po bato báfina ye té.

[10] Pamba té, abikisaki bato mingi; yango wana bato nyonso ya pasi bazalaki kowela po básimba ye.

[11] Tango bato ya milimo mabe bazalaki komona ye, bazalaki kokweya na makolo na ye pe koganga: “Yo ozali Mwana ya Nzambe!”

[12] Kasi Yezu apekisi bango makasi 'tè bápanza sango na ye té.

[13] Na sima Yezu amati likolo ya ngomba moko, abengi bato oyo ye moko alingi, pe bango bakei epai na ye.

[14] Aponi bato zomi na mibale, pe alobi na bango: “Naponi bino po bózalaka ná ngai. Nakotinda bino bipai na bipai, bókende kosakola Sango Malamu;

[15] pe nakopesa bino bokonzi ya kobengana milimo mabe.”

[16] Bato zomi na mibale oyo aponaki, bango oyo: Simon (Yezu apesaki ye kombo Piere),

[17] Jake ná leki na ye Yoane, bana ya Zebedé (Yezu apesaki bango kombo Boanerges, elakisi “Bato bakokani na kake”),

[18] André, Filipe, Bartelemi, Matié, Toma, Jake mwana ya Alfé, Tadé, Simon oyo azalaká liboso moto ya lingomba ya Baweli-Lipanda,

[19] pe Yudas Iskariot oyo atekaki Yezu.

[20] Tango Yezu azongaki na ndako, bato ebele bayei lisusu kosangana, bongo ye ná bayekoli na ye bazwi ata tango ya kolia té.

[21] Awa bandeko na ye bayoki likambo wana, bayei po na kokamata ye, pamba té bazalaki koloba: “Azali komiyeba lisusu té.”

[22] Balakisi-Mibeko oyo bautaki na Yeruzalem balobi na bato: “Beelzebul, mokonzi ya milimo mabe, akoteli ye! Ezali ye moto apesi ye nguya ya kobengana milimo mabe!”

[23] Bongo Yezu abengi bango pe atuni bango: “Ndenge nini Satan akoki kobengana moto na ye?” Pe apesi bango ndakisa:

[24] “Soki bato ya mboka moko bakabwani, mboka wana ekoki kozala malamu té.

[25] Soki bato ya libota moko bakabwani, libota wana ekotikala malamu té.

[26] Bongo soki Satan azali kobunda ná bato na ye, to soki bato na ye bakabwani, makasi na ye ekosila, ekoumela té.

[27] “Moto oyo alingi kokota na ndako ya elombe po na koyiba biloko na ye, asengeli liboso kokanga elombe wana na singa; na sima akoki koyiba biloko na ye nyonso.

[28] “Nazali koloba na bino, ya solo: Bato nyonso oyo basali masumu pe batsioli Nzambe ata ndenge nini, bakoki kozwa bolimbisi.

[29] Kasi oyo atsioli Molimo Mosantu, akoki kozwa bolimbisi ata moke té, po asali lisumu ya seko.”

[30] Yezu akebisaki bango boye po bango balobaki: “Molimo mabe ekoteli ye!”

[31] Mokolo moko mama ná bandeko ya Yezu bayei. Batikalaki na libanda pe batindi moto moko po ábenga ye.

[32] Bato oyo bafandi penepene ya Yezu, balobi na ye: “Mama na yo ná bandeko na yo bazali koluka yo na libanda.”

[33] Yezu azongiseli bango: “Mama na ngai nani? Pe bandeko na ngai banani?”

[34] Na sima atali baoyo bafandi pembeni na ye pe alobi: “Bótala, mama na ngai ná bandeko na ngai bango oyo!

[35] Pamba té, moto oyo asalaka makambo Nzambe alingaka, ye nde ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi, pe mama na ngai.”

Marko — Chapters