[1] Yezu abandi koteya bato pembeni ya laki ya Galilé. Bato mingi penza bayei kosangana epai na ye. Bongo akoti na bwatu pe afandi. Bwatu yango ezalaki na mai, pe bato nyonso bazalaki na libongo.
[2] Azalaki koteya bango makambo ndenge na ndenge na masapo, alobi:
[3] “Bóyoka! Moto moko akendeki kokona mbuma na elanga na ye.
[4] Tango azalaki kobwakabwaka mbuma, mbuma mosusu ekwei na nzela, pe bandeke eyei kolia yango.
[5] Mbuma mosusu ekwei na esika ya mabanga. Kuna mabelé ezalaki mingi té, yango wana eboti noki-noki.
[6] Tango moi ekómi makasi, eziki pe ekauki, po misisa ezalaki mikuse.
[7] Mbuma mosusu ekwei na kati ya basende. Basende wana ekoli pe ebomi matiti ya malamu, bongo yango eboti mbuma té.
[8] Kasi mbuma mosusu ekwei na mabelé ya malamu, ebimi, ekoli pe eboti; mosusu eboti bambuma tuku misato (30), mosusu tuku motoba (60), pe mosusu kama moko (100).”
[9] Pe Yezu abakisi: “Moto oyo azali na matoi, áyoka!”
[10] Tango Yezu azalaki kaka ye moko, baoyo bazalaki pembeni na ye ná bantoma zomi na mibale oyo aponaki, basengi ye álimbola masapo.
[11] Ye azongiseli bango: “Nzambe azali kolakisa bino sekelé ya bokonzi na ye; kasi bato mosusu bazali koyoka makambo nyonso lokola masapo pamba.
[12] Ekòmamá boye, ‘Ata batali malamu, bakomona eloko té; ata batie matoi, bakoyeba eloko té. Soki té balingaki kobongola mitema, pe Nzambe alingaki kolimbisa bango.’”
[13] Sima Yezu alobi na bango: “Boyebi tina ya lisapo wana té? Bongo ndenge nini bokoyeba tina ya masapo nyonso mosusu?
[14] Moto oyo akei kokona mbuma, akokani ná moto azali kopanza maloba ya Nzambe.
[15] Bato mosusu bakokani ná nzela: Sango Malamu ekweeli bango lokola mbuma ekwei na nzela: soki bayoki yango, Satan ayei kolongola yango na mitema na bango.
[16] Bato mosusu bakokani ná mbuma ekwei na mabelé oyo etondá na mabanga: Tango bayoki maloba ya Nzambe, bandimi yango noki na esengo.
[17] Kasi misisa ekoli té na mitema na bango; bandimi kaka po na mwa-tango moke. Soki bamoni pasi to minyokoli po na maloba ya Nzambe, batiki bondimi na bango noki.
[18] Bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na kati ya basende: Bayoki maloba ya Nzambe,
[19] kasi pasi ya mokili, bisengo ya bomengo oyo ezali kokosa bato, ná makanisi mosusu ya ndenge na ndenge enyati maloba yango, bongo eboti té.
[20] Kasi bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na mabelé ya malamu: Bayoki maloba ya Nzambe, bandimi yango pe baboti mbuma malamu, mosusu tuku misato (30), mosusu tuku motoba (60), mosusu kama moko (100).”
[21] Yezu alobi na bango: “Soki moto ayei na mwinda, batiaka yango na se ya katini té to na se ya mbeto, kasi batiaka yango likolo ya mesa. Ezali boye té?
[22] Se ndenge wana makambo ebombaná, ekomonana; pe sekelé nyonso ekoyebana.
[23] Moto oyo azali na matoi, áyoka.”
[24] Pe Yezu alobi na bango lisusu: “Bókeba na makambo nazali koyebisa bino. Ndenge bino bomipesaka na Nzambe, kaka ndenge wana pe Nzambe akokabela bino bolamu na ye, kutu akotondisela bino yango.
[25] Pamba té moto oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye ata mwa-ndambo oyo azali na yango.”
[26] Yezu alobi lisusu: “Tala ndenge Nzambe akotia bokonzi na ye. Ekozala lokola mbuma bakoni na elanga.
[27] Moto oyo akoni yango alalaka na butu pe atambolaka na moi; na tango wana mbuma ezali kobima pe kokola, kasi ye ayebi té ndenge nini.
[28] Mabelé ebimisaka mbuma yango moko: liboso ebandaka na matiti ya mike-mike, sima mitú ya mobesu eyaka kobima, pe na suka mitú etondaka na bambuma.
[29] Na tango mbuma eteli, bakamataka mbeli po na kolongola yango pamba té eleko ekoki.”
[30] Yezu alobi lisusu: “Ndenge nini Nzambe akotia bokonzi na ye? Nápesa lisapo nini po na kolimbola yango?
[31] Bokonzi ya Nzambe ekokani ná mbuma oyo babengaka ‘mutarde’. Tango bakoni yango, ezali moke penza koleka bambuma nyonso ya mokili;
[32] kasi soki basi'bakoni yango, ekolaka, ekómaka molai koleka ndunda nyonso, pe ebimisaka bitape minene esika bandeke ekoki kosala bazála na yango.”
[33] Bongo Yezu azalaki kobetela bato masapo mingi ya ndenge wana, po bákoka koyeba tina ya maloba oyo azalaki koteya bango.
[34] Azalaki koloba na bango bobele na masapo. Kasi soki akómi ye moko ná bayekoli na ye, azalaki kolimbolela bango makambo nyonso.
[35] Kaka na mokolo wana, na pokwa, Yezu alobi na bayekoli na ye: “Tókatisa ngambo ya laki.”
[36] Bongo batiki bato; pe lokola Yezu azalaki na bwatu, bamemi ye. Babwatu mosusu ezalaki pembeni na ye.
[37] Mopepe moko ya makasi ebandi koleka, bambonge ebeti, bwatu ebandi kotonda na mai, pe elingi kodinda.
[38] Yezu azalaki na suka ya bwatu, alali pongi, motú likolo ya kusé. Bayekoli balamusi ye pe balobi: “Moteyi, tolingi tókufa! Likambo ya boye omoni yango pamba?”
[39] Yezu atelemi, agangeli mopepe pe alobi na mai: “Tika makelele! Fanda nyee!” Bongo mopepe esili pe kimia ezongi penza.
[40] Na sima, Yezu alobi na bayekoli: “Po na nini bozali kobanga boye? Ndenge nini bozali kaka kotia mitema na Nzambe té?”
[41] Kasi bazalaki na somo mingi penza pe babandi kolobana: “Moto oyo azali nani? Ata mopepe ná mai ezali kotosa ye!”