[1] Na mikolo yango, bato bazalaki lisusu mingi penza. Kasi lokola bazalaki na biloko ya kolia té, Yezu abengi bayekoli na ye pe alobi na bango:
[2] “Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba té mikolo misato bafandi ná ngai, bazangi biloko ya kolia.
[3] Soki natiki bango bázonga na bandako na bango na nzala, bakolemba mingi na nzela, po bamosusu na kati na bango bauti mosika.”
[4] Bayekoli na ye bazongisi: “Awa na esobe, ndenge nini tokoki kozwa biloko ya kopesa bango po bália pe bátonda?”
[5] Yezu atuni bango: “Bozali na mapa boni?” Bazongisi: “Ezali sambo.”
[6] Bongo Yezu ayebisi bato nyonso báfanda na mabelé. Akamati mapa wana sambo, apesi Nzambe mersi; akatikati yango, apesi na bayekoli po bákabola. Bayekoli pe bakaboli yango na bato nyonso.
[7] Bazalaki lisusu na mwa-ndambo ya bambisi mike. Yezu apesi lisusu Nzambe mersi po na yango, pe apesi bayekoli po bákabola.
[8] Bato balei pe batondi. Bayekoli balokoti biteni ya biloko oyo etikalaki, batondisi bitunga sambo.
[9] Bato bazalaki na esika wana soki 4.000. Na sima Yezu ayebisi bango bázonga na bamboka na bango.
[10] Kaka na tango wana akoti na bwatu ná bayekoli na ye, akatisi mai tii na mboka Dalmanuta.
[11] Bongo ba-Farizé bakómi epai ya Yezu pe babandi kotia tembe ná ye. Lokola bazalaki koluka komeka ye, basengi ye ásalela bango elembo moko oyo ekomonisa 'tè nguya na ye euti na Nzambe.
[12] Yezu ayoki mawa po na yango pe alobi: “Po na nini bato ya tango oyo bazali kosenga elembo! Nalobi na bino ya solo, Nzambe akolakisa bato ya tango oyo ata elembo moko té.”
[13] Sima atiki bango pe akoti lisusu na bwatu po na kokatisa mai.
[14] Bayekoli babosanaki kokamata biloko ya kolia; bazalaki na lipa moko kaka na bwatu.
[15] Yezu alobi na bango: “Bókeba! Ba-Farizé ná bato ya Erode basalelaka kisi ya mabe po na kolamba mapa.”
[16] Bayekoli babandi kolobana: “Azali koloba boye po tozangi mapa!”
[17] Nzokande Yezu ayebaki makanisi na bango, pe atuni bango: “Po na nini bozali kolobana bino na bino: ‘Tomemi mapa té’? Nanu boyebi té tii sik'oyo? Nanu bozwi mayele té? Nanu bofungwami miso té?
[18] Bozali na miso, kasi bomonaka té? Bozali na matoi, kasi boyokaka té? Bosi'bobosani makambo nasalaki?
[19] Mokolo oyo nasalelaki mapa mitano po na koleisa bato 5.000, bitunga boni botondisaki na biteni oyo etikalaki?” Bango bazongiseli ye: “Zomi na mibale.”
[20] Yezu atuni lisusu: “Mokolo oyo nasalelaki mapa sambo po na koleisa bato 4.000, bitunga boni botondisaki na biteni oyo etikalaki?” Pe bango bazongiseli ye: “Bitunga sambo.”
[21] Bongo Yezu alobi na bango: “Nanu bozwi mayele té?”
[22] Bongo bakómi na Betsaida. Kuna bamemeli Yezu moto moko akufá miso, pe babondeli ye 'tè ásimba ye.
[23] Yezu asimbi ye na liboko, pe amemi ye mwa-mosika ya mboka. Abwakeli ye soi na miso, atieli ye maboko pe atuni ye: “Ozali komona nini?”
[24] Moto wana atali pe alobi: “Nazali komona bato, kasi bazali komonana lokola banzete ezali kotambola.”
[25] Yezu asimbi ye lisusu na miso, moto wana atali, abiki, pe abandi komona biloko nyonso malamu.
[26] Bongo Yezu atindi ye ázonga na ndako, kasi áleka na kati ya mboka té.
[27] Sima na yango, Yezu ná bayekoli na ye bakei na bamboka ya mike oyo ezali pembeni ya Sezaré, vile ya mokonzi Filipe. Na nzela atuni bango boye: “Bato balobaka 'tè ngai nazali nani?”
[28] Bango bazongiseli ye: “Bato mosusu balobaka 'tè ozali Yoane Mobatisi; bamosusu: Eliya; pe bamosusu balobaka 'tè ozali moko ya baprofete ya kala.”
[29] Yezu atuni bango lisusu: “Bongo bino bokanisi 'tè nazali nani?” Piere azongiseli ye: “Ozali Mesia.”
[30] Bongo Yezu apekisi bango báloba yango na moto té.
[31] Sima, Yezu abandi koteya bayekoli na ye: “Mwana ya Moto asengeli koyoka pasi mingi. Bakoboya ye na bambuta-muntu, bakonzi ya banganga-Nzambe pe balakisi-Mibeko. Bakoboma ye, kasi na mikolo misato akosekwa.”
[32] Azalaki koloba yango polele. Tango Piere ayoki yango, abendi ye pembeni pe abandi koloba na ye: “Tika koloba boye!”
[33] Kasi Yezu abaluki, atali bayekoli, pe alobi na Piere na makasi: “Satan, longwa na miso na ngai! Ozali kokanisa makambo ya Nzambe té, kasi bobele ya bomoto.”
[34] Sima, Yezu abengi bato nyonso ná bayekoli na ye, alobi na bango: “Soki moto alingi kolanda ngai, átika kokanisa po na nzoto na ye moko, ákumba kuruze na ye pe álanda ngai.
[35] Pamba té, moto oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango. Kasi moto oyo akobungisa bomoi na ye po na ngai, pe po na Sango Malamu, akobikisa yango.
[36] Ata moto azwi bomengo nyonso ya mokili mobimba, eloko nini azwi soki abungisi bomoi na ye?
[37] Eloko nini akoki kofuta po ázwa yango lisusu?
[38] Soki moto azali koyoka soni po na ngai pe po na maloba na ngai, na miso ya bato ya masumu ná baoyo batosaka Nzambe té, Mwana ya Moto pe akoyoka soni po na ye, tango akoya na lokumu ya Tata na ye, nzela moko ná ba-anjelu ya bosantu.”