[1] Na tongo-tongo bakonzi ya banganga-Nzambe, bambuta-muntu pe balakisi-Mibeko basangani na Likita-Monene mobimba, po bákata likambo. Bango bakangisi Yezu basinga, bamemi ye pe bapesi ye na maboko ya Pilate.
[2] Pilate atuni ye: “Yo ozali mokonzi ya Bayuda?” Yezu azongiseli ye: “Yo moko olobi yango.”
[3] Bakonzi ya banganga-Nzambe bafundifundi ye na makambo mingi.
[4] Bongo Pilate atuni ye lisusu: “Okozongisa ata liloba moko té? Yoka ebele ya makambo bazali kofundela yo.”
[5] Kasi Yezu azongisi lisusu ata liloba moko té; yango wana Pilate akamwe mingi penza.
[6] Mbula na mbula na feti ya Koleka, Pilate amesanaki kobimisa moto moko ya boloko oyo bato bazalaki kosenga.
[7] Nzokande moto moko azalaki na boloko, kombo na ye Barabas. Azalaki kuna esika moko ná bato mosusu oyo babimisaki mobulu na mboka pe babomaki moto.
[8] Boye kaka na tango wana bato ebele bayei kosenga Pilate ásalela bango ndenge amesaná kosala.
[9] Pilate azongiseli bango: “Bolingi nátikela bino mokonzi ya Bayuda?”
[10] Pamba té amonaki 'tè bakonzi ya banganga-Nzambe bapesaki Yezu na maboko na ye po na likunya.
[11] Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe basali molende epai ya bato, po Pilate átikela bango kaka Barabas.
[12] Pilate atuni bango: “Bongo násala nini na moto oyo bobengaka mokonzi ya Bayuda?”
[13] Bango bagangi: “Boma ye na kuruze!”
[14] Pilate atuni bango: “Likambo nini ya mabe asali?” Kasi bango bagangi lisusu: “Boma ye na kuruze!”
[15] Pilate alukaki kosepelisa bato, yango wana atikeli bango Barabas. Abetisi Yezu fimbu, pe apesi ye na maboko na bango po bákende koboma ye na kuruze.
[16] Basoda bamemi Yezu na lopango ya Pilate, pe babengisi batayon na bango mobimba.
[17] Balatisi Yezu kazaka moko ya motane, pe batie ye na motú ekoti lokola ya bakonzi, kasi batòngaki yango na nzube.
[18] Sima babandi kopesa ye mbote balobi: “Mbote, mokonzi ya Bayuda!”
[19] Babeti ye mwa-nzete na motú, babwakeli ye soi, pe bafukameli ye lokola nde bazali kokumisa ye.
[20] Tango basilisi kosekaseka ye, balongoli ye kazaka ya motane, pe bazongiseli ye bilamba na ye. Sima bamemi ye na libanda po bákende koboma ye na kuruze.
[21] Moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, tata na Aleksandre ná Rufus, autaki na bilanga pe azalaki koleka na nzela wana. Basoda batindi ye na makasi ámema kuruze ya Yezu.
[22] Bakei na ye esika babengaka Golgota, elingi koloba “Mokuwa ya Motú.”
[23] Bapesi ye vinu basangisá na kisi moko oyo babengaka mire; kasi Yezu ameli yango té.
[24] Sima batie ye na kuruze pe bakaboli bilamba na ye; babeteli yango zeke po báyeba soki elamba nini moto na moto akoki kozwa.
[25] Ezalaki na ngonga ya libwa ya tongo, tango batie ye na kuruze.
[26] Bakòmaki tina ya likambo oyo babomelaki ye na mwa-libaya boye: “Mokonzi ya Bayuda.”
[27] Batie lisusu bamiyibi mibale na bakuruze esika moko ná Yezu, moko na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi.
[28] [Boye esalami ndenge ekòmamá na Mikanda: “Batie ye na molongo ya bamiyibi.”]
[29] Bato oyo bazalaki koleka esika wana bakómi kofinga ye pe koningisa mitú, balobi: “Ee, yo moto olobaki 'tè okoboma Ndako ya Nzambe pe okotònga yango lisusu na mikolo misato!
[30] Ómibikisa yo moko, kita na kuruze!”
[31] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bazalaki koseka Yezu kaka ndenge wana, babandi kolobana boye: “Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa té!
[32] Soki azali Mesia, mokonzi ya Israel, ákita sik'oyo na kuruze po tómona, bongo tóndima!” Bamiyibi mibale oyo batiaki na kuruze pembeni ya Yezu, bango pe bafingi ye.
[33] Ekómi midi, molili ekwei na mokili mobimba tii na ngonga ya misato ya pokwa.
[34] Bongo ekómi ngonga ya misato, Yezu agangi na mongongo makasi penza: “Eloi, Eloi, lema sabaktani?” Elingi koloba: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, po na nini otiki ngai?”
[35] Bato mosusu oyo bazalaki wana, bayoki ye pe balobi: “Yoka, azali kobenga profete Eliya!”
[36] Moto moko akei mbangu kotondisa linuka na vinu ya ngayi, akangisi yango na songe ya nzete, apesi yango na Yezu po ámela. Bongo alobi: “Zela tótala soki Eliya akoya kolongola ye na kuruze.”
[37] Kasi Yezu agangi makasi penza koleka, pe akati motema.
[38] Bongo ridó monene oyo ezalaka na Ndako ya Nzambe, na liboso ya Esika eleki bosantu, epasuki na biteni mibale, banda na likolo tii na se.
[39] Kaka na tango wana mokonzi ya basoda oyo atelemaki liboso ya Yezu, amoni ndenge akataki motema sima ya koganga, alobi: “Ya solo, moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.”
[40] Basi mosusu batelemaki pe kuna, bazalaki kotala na mosika. Na kati na bango ezalaki Maria ya mboka Magdala, ná ndoi na ye Maria mama na Jake oyo babengaka “ya moke” ná Jozé, pe Salomé.
[41] Basi wana bazalaká kolanda Yezu pe kosalela ye tango azalaki na Galilé. Basi mosusu pe bazalaki kuna, bayaki nzela moko ná Yezu na Yeruzalem.
[42] Pokwa ekómaki, pe lokola ezalaki tango ya kolengela Mokolo ya Kopema,
[43] Jozef ya mboka Arimaté ayei. Azalaki moto ya lokumu na kati ya Likita-Monene ya Bayuda; ye pe abandaki kotia motema 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye. Akei na molende nyonso epai ya Pilate, po na kosenga ebembe ya Yezu.
[44] Kasi Pilate akamwe tango ayoki 'tè Yezu asi'akufi. Bongo abengi mokonzi ya basoda, atuni ye soki Yezu asi'akufi kala.
[45] Tango mokonzi ya basoda ayebisi ye, Pilate apesi Jozef nzela ya kokamata ebembe.
[46] Jozef asombi elamba kitoko, akitisi ebembe ya Yezu na kuruze, alíngi yango na elamba wana, pe akotisi yango na libulu oyo akatisaki na kati ya mabanga. Sima, apusi libanga moko ya monene pe akangi monoko ya libulu.
[47] Maria ya Magdala ná ndoi na ye Maria, mama na Jozé, bazalaki kotala esika bakundi ye.