Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 8:48

[1] Tango Yezu alongwe wana, akei na rejion ya Yudea pe na ngambo ya Yordan. Kuna lisusu bato mingi bayei kosangana epai na ye, pe abandi koteya bango ndenge amesaná.

[2] Ba-Farizé mosusu bayei epai na ye po na komeka ye. Batuni ye: “Mibeko na biso epesaka nzela na mobali po áboya mwasi na ye?”

[3] Yezu azongiseli bango: “Mobeko nini Moize apesaká bino?”

[4] Bango balobi: “Moize apesaká nzela boye: mobali akoki koboya mwasi na ye, kasi liboso ákòma mokanda ya koboma libala.”

[5] Bongo Yezu alobi na bango: “Moize akòmelaki bino mobeko wana po boleki mitú makasi!

[6] Kasi banda na ebandeli ya biloko nyonso: ‘Nzambe asalaki bato, mobali ná mwasi.

[7] Yango wana mobali atikaka tata na ye ná mama na ye pe asanganaka ná mwasi na ye,

[8] po bango mibale bákóma moto moko.’ Boye bazali lisusu bato mibale té, kasi bakómi se moto moko.

[9] Bongo, bato oyo Nzambe asangisi, moto ákabola bango té.”

[10] Tango bakoti na ndako, bayekoli batuni lisusu Yezu po na likambo yango.

[11] Ye alobi na bango: “Moto nyonso oyo atiki mwasi na ye pe abali mosusu, azali kosala kindumba po atiki mwasi ya liboso.

[12] Pe soki mwasi aboyi mobali na ye pe abali mosusu, asali kindumba.”

[13] Bato mosusu bayeeli Yezu bana po ásimba bango, kasi bayekoli babandi kopekisa bango.

[14] Tango Yezu amoni bongo, asiliki pe alobi na bango: “Bótika bana báya epai na ngai. Bópekisa bango té, pamba té bokonzi ya Nzambe ezali po na baoyo bakokani ná bango.

[15] Nalobi na bino, ya solo: moto oyo akoyamba bokonzi ya Nzambe lokola Mwana moke té, akokota kuna ata moke té.”

[16] Sima ayambi bana na tolo na ye, asimbi bango na mitú pe abenisi bango.

[17] Tango Yezu azalaki kotambola na nzela, moto moko ayei mbangu, afukameli ye pe atuni: “Moteyi malamu, nasengeli kosala nini po názwa bomoi ya seko?”

[18] Yezu alobi na ye: “Po na nini obengi ngai moto malamu? Moto malamu azali té, kaka Nzambe ye moko.

[19] Oyebi Mibeko: Koboma moto té; kosala kindumba té; koyiba té; kokosela moto makambo té; kozwa eloko ya moto na mayele mabe té; tosa tata ná mama na yo.”

[20] Moto wana azongiseli ye: “Moteyi, natosaka mibeko wana nyonso banda bomwana na ngai.”

[21] Yezu atali ye na bolingo pe alobi: “Ozangi kaka eloko moko; kende kotekisa biloko na yo nyonso, pe pesa mbongo na bato bakelelá. Wana nde okozala na bomengo na Likolo; sima yaka kolanda ngai.”

[22] Kasi moto yango alembi nzoto po na maloba wana pe akei na mawa, pamba té azalaki na bomengo mingi koleka.

[23] Sima Yezu atali bayekoli na ye nyonso, pe alobi na bango: “Bato ya bomengo bakozala na pasi mingi po na kokota na bokonzi ya Nzambe.”

[24] Bayekoli bakamwe po na maloba wana. Kasi Yezu alobi na bango lisusu: “Bana na ngai, po na kokota na bokonzi ya Nzambe ezali pasi!

[25] Nyama monene oyo babengaka shamó, ekoki kokota na lidusu ya tonga ata moke té! Kasi ezali lisusu pasi mingi koleka po moto ya bomengo ákota na bokonzi ya Nzambe.”

[26] Bayekoli bakamwe mingi koleka, pe bakómi kotunana: “Bongo nani akoki kobika?”

[27] Yezu atali bango pe alobi: “Bato bakoki kosala yango ata moke té, kasi bobele Nzambe; pamba té Nzambe akoki kosala makambo nyonso.”

[28] Piere alobi na ye: “Tala nanu, biso totiki biloko nyonso pe tolandi yo.”

[29] Yezu azongisi: “Nalobi na bino, ya solo: soki moto atiki ndako na ye, bandeko na ye, mama, tata, bana to bilanga na ye po na ngai pe po na Sango Malamu,

[30] moto wana akozwa yango mbala kama moko (100) koleka: bandako, bandeko, bamama, bana ná bilanga pe minyokoli na mikolo oyo; kasi na mikolo ekoya akozwa bomoi ya seko.

[31] Bato mingi bazali sik'oyo liboso, bakokóma bato ya suka; pe bato mingi bazali sik'oyo na suka, bakokóma bato ya liboso.”

[32] Awa bazalaki na nzela ya Yeruzalem, Yezu azalaki kotambola liboso ya bayekoli na ye pe ya bato mosusu oyo bazalaki kolanda ye. Bango nyonso babandaki kobanga. Yezu asangisi lisusu bayekoli na ye zomi na mibale, pe abandi koyebisa bango makambo elingi kokweela ye.

[33] Alobi na bango: “Bóyoka! Tozali kokende na Yeruzalem. Kuna bakokaba Mwana ya Moto epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe pe ya balakisi-Mibeko. Bango bakokatela ye etumbu ya liwa, pe bakokaba ye na maboko ya bato bayebi Nzambe té.

[34] Bakoseka ye, bakobwakela ye soi, bakobeta ye fimbu pe bakoboma ye. Kasi akosekwa na mikolo misato.”

[35] Jake ná Yoane, bana ya Zebedé, bayei epai ya Yezu, balobi na ye: “Moteyi, tolingi ósalela biso makambo oyo tokosenga yo.”

[36] Yezu atuni bango: “Bolingi násala nini po na bino?”

[37] Bango bazongiseli ye: “Tango okokóma na bokonzi, fandisa biso pembeni na yo, moko na liboko na yo ya mobali, mosusu na liboko na yo ya mwasi.”

[38] Kasi Yezu alobi na bango: “Likambo bozali kosenga, boyebi yango té. Kopo ya pasi ngai nakomela, bino bokokoka yango? Batisimo ya pasi ngai nakozwa, bino bokozwa yango?”

[39] Bango bazongiseli ye: “Tokokoka kaka!” Bongo Yezu alobi na bango: “Ya solo, kopo oyo ngai nakomela, bino pe bokomela yango; pe batisimo ya pasi oyo ngai nakozwa, bino pe bokozwa yango.

[40] Kasi kopona moto oyo akofanda na liboko na ngai ya mobali to ya mwasi, etali ngai té; pamba té Nzambe asi'abongisá bisika wana po na bato ye aponá.”

[41] Tango bayekoli mosusu zomi bayoki ndenge wana, bakómi kosilikela Jake ná Yoane.

[42] Bongo Yezu abengi bango nyonso pe alobi: “Boyebi 'tè bato oyo bamonanaka lokola bakonzi ya bikolo, balakisaka bokonzi na bango; bato minene bamonisaka bato na bango pasi.

[43] Kasi na kati na bino, ekoki kozala bongo té. Soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto monene, ámitia mosali na bino nyonso.

[44] Pe soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto ya liboso, ámikómisa moumbu ya bato nyonso.

[45] Pamba té Mwana ya Moto ayaki po bato básalela ye té, kasi ayaki nde kosalela bango, pe kopesa bomoi na ye po na kolongola bato ebele na boumbu.”

[46] Bongo bakómi na vile ya Jerikó. Tango Yezu alongwe kuna ná bayekoli na ye pe bato ebele, amoni moto moko akufá miso azalaki kofanda pembeni ya nzela pe kosenga mbongo. Kombo na ye Bartimé, Mwana ya Timé.

[47] Awa ayoki 'tè Yezu ya Nazaret azali wana, abandi koganga: “Yezu, Mwana ya David, yokela ngai mawa!”

[48] Bato mingi bakómi kogangela ye ákanga monoko. Kasi alekisi penza koganga makasi: “Mwana ya David, yokela ngai mawa!”

[49] Yezu atelemi pe alobi: “Bóbenga ye.” Bongo babengi ye pe balobi: “Ozali na makila malamu! Yezu azali kobenga yo. Telema!”

[50] Bongo abwaki kazaka na ye, apumbwe pe ayei epai ya Yezu.

[51] Yezu atuni ye: “Olingi násala nini po na yo?” Moto akufá miso azongisi: “Moteyi, nalingi námona lisusu!”

[52] Bongo Yezu alobi na ye: “Kende, bondimi na yo ebikisi yo.” Kaka na tango wana, abandi komona pe alandi Yezu.

Marko — Chapters