[1] Yezu alongwe na esika wana pe akei na mboka na ye penza, nzela moko ná bayekoli na ye.
[2] Na Mokolo ya Kopema, abandi koteya na ndako ya lisanga. Bato mingi bayoki ye pe bakamwe. Babandi kotunana: “Epai wapi azweli makambo oyo? Ndenge nini azwi mayele boye? Pe ndenge nini azali kosala makamwisi boye?
[3] Ezali ye té, sharpantié, Mwana ya Maria pe ndeko ya Jake, Jozé, Yuda ná Simon? Pe bandeko na ye ya basi bazalaka awa ná biso té?” Yango wana baboyaki kondimela ye.
[4] Bongo Yezu alobi na bango: “Bapesaka profete lokumu bipai nyonso, longola kaka na mboka na ye penza, epai ya bandeko na ye pe na ndako na ye moko.”
[5] Yezu akokaki kosala makamwisi kuna té; bobele mwa-ndambo ya bato ya maladi bayei, atieli bango maboko pe abikisi bango.
[6] Kasi akamwe po bato ya Nazaret bazangaki bondimi. Sima, Yezu akei koteya na bamboka nyonso ya pembeni.
[7] Abengi bayekoli na ye zomi na mibale pe abandi kotinda bango mibale mibale. Apesi bango nguya ya kobengana milimo mabe.
[8] Pe atindi bango boye: “Bómema eloko moko té po na mobembo, kaka nzete ya kotambola. Ézala bilei, saki to mbongo, bómema yango té.
[9] Kasi bólata sapatu, ná shemize moko pamba, mibale té.”
[10] Alobi na bango lisusu: “Tango bokokóma na mboka moko, bófanda kaka na ndako oyo bakopesa bino, tii bokolongwa esika wana.
[11] Pe soki bato ya mboka moko baboyi koyamba bino, to balingi koyokela bino té, bólongwa na mboka wana. Po na kolakisa bango 'tè basali mabe, bópupola makolo po bómema pusiere ya mboka yango epai mosusu té.”
[12] Bongo bayekoli bakei pe babandi koteya bato 'tè bábongola mitema.
[13] Babimisi milimo mingi ya mabe, bapakoli mafuta na bato mingi ya maladi pe babikisi bango.
[14] Na tango wana, mokonzi Erode ayoki sango ya Yezu, pamba té kombo na ye ebandaki koyebana mingi. Bato mosusu bazalaki koloba: “Yoane Mobatisi asekwi! Yango wana azwi nguya ya kosala makamwisi boye.”
[15] Kasi bamosusu bazalaki koloba: “Ye azali Eliya”; to: “Azali profete, lokola baprofete ya kala.”
[16] Tango Erode ayoki yango, alobi: “Ezali Yoane Mobatisi oyo nakatisaki motú, ye moto asekwi!”
[17] Pamba té Erode atindaki basoda na ye bákanga Yoane. Akangisaki ye basinga pe atiaki ye na boloko. Asalaki boye po na likambo ya Erodiade, mwasi ya kulutu na ye Filipe. Erode abalaki ye,
[18] kasi Yoane apekisaki ye alobaki: “Mibeko ezali kopekisa 'tè okoki kobala mwasi ya ndeko na yo té.”
[19] Yango wana Erodiade abandaki kobombela Yoane kanda na motema pe alingaki koboma ye, kasi akokaki té.
[20] Pamba té, Erode azalaki kobanga Yoane, po ayebaki 'tè azali moto malamu pe ya bosantu; yango wana abandaki kosala ye mabe moko té. Mateya ya Yoane ezalaki kosilisa ye mayele; kasi ata bongo asepelaki koyoka ye.
[21] Nzokande mokolo ya feti ya mbotama ya Erode, Erodiade azwi tango malamu po na likambo oyo azalaki kokana. Erode abengisaki bakonzi ya mboka, bakonzi ya basoda ná bato minene ya rejion ya Galilé, po báya kolia epai na ye.
[22] Tango bazalaki na mesa, Mwana ya Erodiade ya mwasi akoti na ndako pe abandi kobina na miso ya Erode pe ya bato nyonso oyo ye abengisaki. Asepelisi bango mingi. Bongo Erode alobi na ye: “Senga ngai eloko nyonso oyo olingi, pe nakopesa yo yango.”
[23] Kutu akati seleka boye: “Nyonso oyo okosenga ngai, nakopesa yo; ézala ata ndambo ya mboka na ngai!”
[24] Elenge mwasi abimi moke pe atuni mama na ye: “Násenga nini?” Erodiade azongisi: “Senga motú ya Yoane Mobatisi.”
[25] Bongo ye azongi noki epai ya mokonzi Erode pe alobi: “Nasengi ópesa ngai sika sik'oyo motú ya Yoane Mobatisi na kati ya sani.”
[26] Mokonzi Erode ayoki mawa mingi penza. Kasi alingaki kopimela ye té, po akataki seleka na miso ya bato oyo abengisaki na feti.
[27] Bongo atindi soda moko noki po áyeela ye motú ya Yoane Mobatisi. Soda akei, akoti na boloko pe akati Yoane motú.
[28] Atie yango na sani, ayei pe apesi na elenge mwasi; ye nde akei kopesa yango na mama na ye.
[29] Tango bayekoli ya Yoane bayoki bongo, bakei kokamata ebembe na ye pe bakundi yango.
[30] Bantoma zomi na mibale basangani lisusu epai ya Yezu, pe bayebisi ye nyonso oyo basalaki pe bateyaki bato.
[31] Yezu alobi na bango: “Bóya kaka bino moko, po tókende na esika moko ya kimia na esobe, pe bópema moke.” Alobi boye pamba té, bato mingi penza bazalaki koya pe kokende; pe bantoma bazwi ata tango ya kolia té.
[32] Bongo bakoti na bwatu pe bakei bango moko na esika ya kimia.
[33] Kasi bato bamoni ndenge bakei, pe bato ebele bayei koyeba yango. Bongo bato mingi bauti na bamboka nyonso balandi na makolo, pe bakómi liboso epai Yezu alingaki kokende.
[34] Awa Yezu abimi na bwatu, amoni bato ebele penza. Ayokeli bango mawa mingi na motema po bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobokoli. Pe abandi koteya bango makambo mingi.
[35] Lokola tango elekaki penza, bayekoli bayei epai ya Yezu pe balobi na ye: “Esika oyo ezali esobe pamba, pe tango esi'eleki.
[36] Yebisa bato oyo bákende na bamboka ya pembeni pe epai ya bato oyo basalaka bilanga, po básomba biloko ya kolia.”
[37] Yezu azongiseli bango: “Bino moko bópesa bango biloko ya kolia.” Kasi bango batuni ye: “Ndenge nini tókende kosomba mapa soki 2.000 po tópesa bango? Tokozwa mbongo wapi?”
[38] Yezu atuni bango: “Bozali na mapa boni? Bókende nanu kotala.” Bakei kotala, bazongi pe balobi na ye: “Tozali na mapa mitano pe bambisi mibale.”
[39] Bongo Yezu atindi bayekoli na ye bákabola bato nyonso milongo milongo, pe báfandisa bango na matiti ya esobe.
[40] Bafandisi bango na milongo, mosusu ya kama moko (100), mosusu ya tuku mitano (50).
[41] Yezu akamati mapa mitano wana pe bambisi mibale, atali na likolo, apesi Nzambe mersi, akatikati mapa pe apesi yango na bayekoli po bákabola yango na bato. Asali se ndenge moko na bambisi wana mibale.
[42] Bato nyonso balei pe batondi.
[43] Bayekoli balokoti biteni ya mapa pe ya bambisi oyo etikalaki; batondisi bitunga zomi na mibale.
[44] Baoyo baliaki bazalaki mibali soki 5.000.
[45] Sima na yango, Yezu atindi bayekoli na ye bákota na bwatu pe bákende kozela ye na ngambo, epai ya mboka Betsaida. Azongisi bato na bamboka na bango,
[46] nzokande ye atikali kuna, bongo akei na ngomba moko po na kosambela.
[47] Na pokwa, bwatu ezalaki na kati ya laki, pe Yezu azalaki ye moko na mokili.
[48] Amoni 'tè bayekoli bazalaki kokoka kotambwisa bwatu na nkai té, po mopepe ezalaki kozongisa bango sima. Tango tongo elingaki kotana, Yezu abandi kotambola likolo ya mai, pe ayei epai na bango, alingi koleka bango.
[49] Awa bamoni ye azali kotambola likolo ya mai, bakanisaki 'tè ezali elima, pe babandi koganga;
[50] pamba té bango nyonso bamoni ye pe batondi na somo. Kasi Yezu alobi na bango: “Ezali ngai; bótika kobanga.”
[51] Apusani penepene, akoti na bwatu pe mopepe esili. Bayekoli bakamwe mingi penza koleka,
[52] pamba té, tango Yezu asalaki likamwisi ya mapa bayebaki tina té; bazalaki kaka koyeba eloko moko té.
[53] Awa bakatisi mai, bakómi na mabelé ya Jenezaret. Bakangi bwatu na bango na libongo.
[54] Tango babimi na bwatu, mbala moko bato bayei koyeba Yezu,
[55] bongo bakei mbangu kokamata bato ya maladi na mboka mobimba; batie bango na bitoko, pe bamemi bango na bisika oyo bayoki 'tè Yezu akómi.
[56] Bipai nyonso Yezu azalaki koleka, ézala na bamboka ya minene to ya mike to pe na bapembeni na yango, bazalaki kotia bato ya maladi na balabala, pe kobondela Yezu 'tè ápesa bango nzela ya kosimba ata songe ya nzambala na ye. Pe bato nyonso oyo bazalaki kosimba ye, babandaki kobika.