Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 8:36

[1] Bongo Yezu alobi na bango lisusu: “Nalobi na bino, ya solo: Na kati na bino bato bozali awa, bamosusu bazali, liboso 'tè bákufa bakomona na miso ndenge Nzambe akotia bokonzi na ye na nguya nyonso.”

[2] Sima ya mikolo motoba, Yezu akamati Piere, Jake ná Yoane, akei ná bango na ngomba moko ya molai. Kuna bazalaki kaka bango moko. Yezu abongwani na miso na bango;

[3] bilamba na ye ebandi kongenga makasi pe ekómi pembe penza: na mokili mobimba moto moko té akoki kokómisa bilamba pembe ndenge wana.

[4] Bayekoli bamoni Eliya ná Moize bazali kosolola ná Yezu.

[5] Bongo Piere alobi na Yezu: “Moteyi, lokola tozali awa ezali malamu! Tokotònga bandako misato ya kapo: moko po na yo; moko po na Moize pe moko po na Eliya!”

[6] Kasi ayebaki makambo azalaki koloba té, pamba té ye ná baninga na ye mibale bayokaki somo penza.

[7] Bongo lipata moko eyei kozipa bango pe mongongo moko ebimi na yango, elobi: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo. Bóyokela ye.”

[8] Kaka na tango wana, bayekoli batali epai na epai, bamoni moto mosusu té, Yezu atikalaki bobele ye moko ná bango.

[9] Lokola bazalaki kokita ngomba, Yezu apekisi bango alobi: “Makambo oyo bomoni, bóloba yango na moto té, tii mokolo Mwana ya Moto akosekwa.”

[10] Babombi maloba wana na mitema, kasi babandi komitunana: “Kosekwa, elingi koloba nini?”

[11] Bongo batuni Yezu: “Po na nini balakisi-Mibeko balobaka 'tè Eliya asengeli koya liboso?”

[12] Yezu azongiseli bango: “Ya solo, Eliya asengeli koya liboso, po na kobongisa makambo nyonso. Kasi ndenge nini ekòmamá na mikanda 'tè: bakoyokisa Mwana ya Moto pasi mingi pe bakomonela ye?

[13] Nzokande nalobi na bino: Eliya asi'ayaki, kasi bato basalaki ye ndenge balingaki. Wana nde makambo ekòmamá po na ye.”

[14] Tango bazongi epai ya bayekoli mosusu, bamoni bato ebele basangani epai na bango, pe balakisi-Mibeko bazalaki kotiana tembe ná bango.

[15] Awa bato bamoni Yezu, bakamwe pe bakimi mbangu po na kopesa ye mbote.

[16] Yezu atuni bayekoli na ye: “Po na nini bozali kotiana tembe ná bango?”

[17] Moto moko na kati ya bato wana alobi: “Moteyi, nayeeli yo mwana na ngai ya mobali po azali na molimo mabe oyo ekómisá ye baba.

[18] Epai nyonso molimo ekangaka ye, ebwakaka ye na mabelé, bongo mwana akómaka kobimisa fulufulu na monoko, aliaka mino pe nzoto na ye ekómaka makasi. Nasengaki bayekoli na yo bábengana molimo yango, kasi bakokaki té.”

[19] Yezu azongisi: “A bino! Bato bozangá bondimi! Nasengeli kofanda na bino tii tango nini? Nákanga motema po na bino tii tango nini? Bómemela ngai ye awa!”

[20] Bamemeli ye mwana. Tango molimo emoni Yezu, ebandi koningisa nzoto ya mwana makasi penza; mwana akwei na mabelé, abandi kobaluka pe kobimisa fulufulu na monoko.

[21] Yezu atuni tata ya mwana: “Mbula boni abandi kosala boye?” Tata azongiseli ye: “Banda bomwana.

[22] Pe mbala mingi molimo ekweisaka ye na móto to na mai po ákufa. Kasi soki okoki, yokela biso mawa pe salisa biso!”

[23] Yezu alobi na ye: “Po na nini olobi ‘soki nakoki’? Yeba 'tè makambo nyonso ekoki kosalama na moto oyo atie motema na Nzambe.”

[24] Bongo tata ya mwana abandi koganga: “Natie motema, salisa ngai nálongola tembe, nátia motema penza.”

[25] Awa Yezu amoni bato bazali koya mingi, agangeli molimo mabe: “Yo molimo moto obomi mwana matoi pe okómisi ye baba, natindi yo: Bima na ye pe kozongela ye lisusu té!”

[26] Molimo egangi makasi, eningisi nzoto ya mwana pe ebimi. Mwana akómi lokola moto akufi, yango wana bato mingi oyo bazalaki kotala, bakómi koloba: “Akufi!”

[27] Kasi Yezu asimbi ye na liboko, atomboli ye bongo atelemi.

[28] Tango Yezu akoti na ndako, azalaki kaka ye moko ná bayekoli na ye. Bango batuni ye: “Po na nini biso tokokaki kobengana molimo wana té?”

[29] Bongo Yezu alobi na bango: “Bobele baoyo babondelaka Nzambe mingi bato bakoki kobimisa milimo ya ndenge wana.”

[30] Bongo balongwe esika wana, bakatisi rejion ya Galilé. Yezu alingaki té bato báyeba soki ye azali wapi.

[31] Pamba té azalaki koteya bayekoli na ye boye: “Bakoteka Mwana ya Moto epai ya bato. Bango bakoboma ye, kasi akosekwa na mikolo misato.”

[32] Bayekoli bazalaki koyeba tina ya maloba wana té; pe bazalaki kobanga kotuna ye.

[33] Bakómi na Kafarnaum. Tango bakoti na ndako, Yezu atuni bayekoli na ye: “Makambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela?”

[34] Kasi bango bafandi nyee, pamba té na nzela bazalaki kotiana tembe po na koyeba soki nani aleki baninga.

[35] Yezu afandi, abengi bayekoli nyonso zomi na mibale pe alobi na bango: “Oyo alingi kozala moto ya liboso, ázala sima ya bato nyonso pe ázala mosali na bango.”

[36] Bongo Yezu azwi Mwana moke, atie ye na kati na bango, ayambi ye na maboko pe alobi:

[37] “Moto oyo akoyamba mwana moke boye po na kombo na ngai, ayambi ngai moko. Pe oyo akoyamba ngai, ayambi kaka ngai té, kasi ayambi ná Moto oyo atindi ngai.”

[38] Yoane alobi na Yezu: “Moteyi, tomonaki moto moko azalaki kobengana milimo mabe na kombo na yo, pe topekisaki ye po azali moto na biso té.”

[39] Kasi Yezu azongisi: “Bópekisa ye té! Pamba té soki moto asali likamwisi na kombo na ngai, na tango wana akokoka kotónga ngai té.

[40] Po moto oyo aboyi biso té, azali moto na biso.

[41] Nalobi na bino, ya solo: moto oyo akopesa bino ata kopo ya mai pamba, po bozali bato ya Kristo, akozanga lifuta té.”

[42] “Soki moto moko oyo ayebi makambo mingi té andimi ngai, bongo moto mosusu akweisi ye na likambo, ebongi malamu bákanga moto wana libanga ya monene na kingo, pe bábwaka ye na ebale!

[43] Soki ozali kokweya na likambo po na liboko na yo, kata yango! Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya bomoi, ata ozangi liboko moko; esika 'tè ókende ná maboko mibale na lifelo, esika móto esilaka té.

[44] [Kuna, nkusu oyo eliaka nzoto ya bato ekufaka té, pe móto esilaka té.]

[45] Soki ozali kokweya na likambo po na likolò na yo, kata yango! Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya bomoi na likolò moko; esika 'tè ókende ná makolo mibale na lifelo.

[46] [Kuna, nkusu oyo eliaka nzoto ya bato ekufaka té, pe móto esilaka té.]

[47] Pe soki ozali kokweya na likambo po na liso na yo, longola yango! Pamba té ebongi malamu ókota na bokonzi ya Nzambe na liso moko; esika 'tè ókende ná miso nyonso mibale na lifelo.

[48] Kuna, nkusu oyo eliaka nzoto ya bato ekufaka té, pe móto esilaka té.

[49] Boyebi 'tè batiaka mungwa na mabonza nyonso oyo bapesaka na Nzambe. Se bongo móto ya bapasi ezali lokola mungwa oyo ekokómisa moko moko na bino peto.

[50] Mungwa ezali eloko ya malamu; kasi soki mungwa ebungisi elengi, ndenge nini bakoki kobongisa yango po ékóma lisusu elengi? Bózala lokola mungwa na kati na bino moko, pe bózala na boboto bino na bino.”

Marko — Chapters