[1] Etikalaki mikolo mibale po feti ya Koleka ékoka, na tango ya feti ya mapa ya kovimba té. Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bakómi koluka nzela ya kokanga Yezu na mayele po báboma ye.
[2] Pamba té bazalaki kolobana: “Tokoki kokanga ye na mokolo ya feti té. Soki té bato bakotomboka.”
[3] Mokolo moko Yezu azalaki na Betanie na ndako ya Simon, moto oyo azalaki na maladi ya maba. Tango afandi na mesa po ália, mwasi moko ayei, azalaki na molangi basalá na libanga ya kitoko penza, etondá na malasi ya talo mingi. Afungoli molangi yango pe asopeli Yezu malasi na motú.
[4] Bato mosusu bazalaki wana basiliki pe batunani: “Po na nini kobebisa malasi oyo boye?”
[5] Batombokeli mwasi wana, balobi: “Bakokaki koteka yango na talo mingi lokola lifuta ya mosali moko po na mosala ya mbula mobimba, pe kopesa mbongo na bato bakelelá.”
[6] Kasi Yezu alobi: “Bótika ye nyee! Po na nini bozali kotungisa ye? Likambo ye asali po na ngai ezali malamu.
[7] Bato bakelelá bakozala ná bino tango nyonso, bokoki kosalisa bango mbala nyonso oyo bolingi. Kasi ngai nakofanda ná bino libela té.
[8] Asali oyo ekoki na ye: asi'apakoli ngai malasi po na kobongisa nzoto na ngai, pamba té etikali moke bákunda ngai.
[9] Nalobi na bino, ya solo: bipai nyonso bakozala kosakola Sango Malamu, na mokili mobimba, bakoloba likambo mama oyo asali, pe bakobanda kokanisa ye.”
[10] Yudas Iskariot, oyo azalaki moko ya bayekoli zomi na mibale, akei epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe po na koteka Yezu.
[11] Tango bayoki likambo yango, basepeli pe balaki ye 'tè bakopesa ye mbongo. Yango wana Yudas akómi koluka ndenge nini akoki kopesa Yezu na maboko na bango.
[12] Ezalaki mokolo ya liboso ya feti ya mapa ya kovimba té; mokolo wana babomaka bameme po na feti ya Koleka. Bayekoli batuni Yezu: “Epai wapi olingi tólambela yo bilei ya feti ya Koleka?”
[13] Bongo Yezu atindi bayekoli mibale pe alobi na bango: “Bókende na vile; bokomona moto moko amemi elokú ya mai. Bólanda ye
[14] tii esika ye akokota. Bóloba na kolo ya ndako boye: ‘Moteyi atuni: wapi esika ngai nakoki kolia bilei ya feti ya Koleka ná bayekoli na ngai?’
[15] Bongo ye akolakisa bino esika moko ya monene na ndako kuna na etaje, basi'babongisá yango pe ezali malamu. Bólambela biso biloko ya kolia kuna.”
[16] Bayekoli bakei pe bakoti na vile. Bamoni makambo nyonso kaka ndenge Yezu ayebisaki bango. Bongo balambi biloko ya kolia po na feti ya Koleka.
[17] Awa pokwa ekómi, Yezu akei kuna ná bayekoli na ye zomi na mibale.
[18] Bongo tango bafandaki na mesa po na kolia, Yezu alobi: “Nalobi na bino, ya solo: moto moko na kati na bino oyo azali kolia esika moko ná ngai, akoteka ngai.”
[19] Bayekoli bakómi koyoka mawa, pe moko moko abandi kotuna ye: “Ezali ngai?”
[20] Yezu azongiseli bango: “Moto akoteka ngai ezali moko na kati na bino zomi na mibale; azali kolia ná ngai sani moko.
[21] Ya solo, Mwana ya Moto akokufa ndenge ekòmamá po na ye; kasi mawa mingi na moto oyo akoteka Mwana ya Moto. Ebongaki malamu kutu moto wana ábotama té.”
[22] Tango bazalaki kolia, Yezu akamati lipa, apesi Nzambe mersi, akatikati yango pe akaboleli bayekoli na ye, alobi: “Bókamata. Oyo ezali nzoto na ngai.”
[23] Na sima, akamati kopo, asambeli po na kopesa Nzambe mersi, apesi kopo na bayekoli na ye, bongo bango nyonso bameli.
[24] Alobi na bango: “Oyo ezali makila na ngai. Yango nde moto ezali kotia Boyokani na kati ya Nzambe ná bato; ekosopana po na bato ebele.
[25] Nalobi na bino, ya solo: nakomela lisusu vinu oyo té, tii mokolo nakomela vinu ya sika na bokonzi ya Nzambe.”
[26] Na sima bayembi banzembo, pe bakei na Ngomba ya ba-Olive.
[27] Bongo Yezu alobi na bayekoli na ye: “Bino nyonso bokobungisa bondimi po na ngai. Pamba té ekòmamá boye: ‘Nakoboma mobokoli pe bameme ekopanzana.’
[28] Kasi tango nakosekwa, nakokende na Galilé liboso na bino.”
[29] Piere alobi na ye: “Ata soki bango nyonso babungisi bondimi, kasi ngai nakobungisa yango té!”
[30] Yezu azongiseli ye: “Nalobi na yo, ya solo: kaka na butu ya lelo, liboso 'tè soso élela mbala mibale, yo okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té.”
[31] Kasi Piere abeti tolo, alobi: “Ata kutu soki nasengeli kokufa esika moko na yo, nakoki kowangana yo té.” Pe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko.
[32] Bongo bakómi na elanga moko babengaka Jetsemane. Yezu alobi na bayekoli na ye: “Bófanda awa, ngai nakei kobondela Nzambe.”
[33] Amemi Piere, Jake ná Yoane, pe akei na bango. Na mbala moko abandi koyoka motema pasi pe somo.
[34] Bongo alobi na bango: “Motema na ngai etondi na mawa lokola nákufa. Bótikala awa pe bókengela!”
[35] Apusani mwa-moke, afukami na mabelé, abandi kobondela Nzambe 'tè soki ekoki kosalama, tango oyo ya somo élongwa na ye.
[36] Alobi: “Ába! Tata na ngai! Yo okoki kosala makambo nyonso. Longola kopo oyo ya pasi. Kasi kosala té oyo ngai nalingi; sala bobele oyo yo olingi.”
[37] Na sima azongi epai ya bayekoli misato wana pe akuti bango balali pongi. Alobi na Piere: “Simon, osi'olali? Ndenge nini okokaki té kokengela ata ngonga moko?
[38] Bókengela pe bóbondela Nzambe po Monguna ámeka bino té! Ata bozali na molende na mitema, bozali kaka bato; bozangá makasi.”
[39] Sima akei lisusu pe abondeli Nzambe se ndenge ya liboso.
[40] Azongi lisusu epai ya bayekoli na ye, pe akuti bango balali kaka pongi, pamba té miso na bango ekómaki kilo. Bongo bazangaki likambo ya koloba.
[41] Tango azongi mbala ya misato alobi na bango: “Esili. Sik'oyo bokoki kolala pe kopema. Tango esi'ekoki, po bákaba Mwana ya Moto na maboko ya bato ya masumu.
[42] Bótelema, tókende. Tala moto oyo ateki ngai ayei!”
[43] Tango Yezu azalaki nanu koloba, Yudas, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, akómi. Ayei na bato ebele, bamemi bambeli ná banzete na maboko. Bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi-Mibeko pe bambuta-muntu bato batindaki bango.
[44] Nzokande Yudas oyo atekaki Yezu, alakisaki bango ndenge bakoyeba ye, alobaki boye: “Moto oyo ngai nakoyamba, ye wana. Bókanga ye, bómema ye, kasi bókengela ye malamu.”
[45] Na mbala moko Yudas apusani penepene ya Yezu, alobi na ye: “Moteyi,” pe ayambi ye.
[46] Bango basimbi Yezu, pe bakangi ye.
[47] Moko ya baoyo bazalaki wana abimisi mbeli na ye, akati mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe litoi.
[48] Yezu atuni bango: “Boni? Nakómi moyibi? Ndenge nini bomemi bambeli ná banzete po na kokanga ngai?
[49] Mikolo nyonso nazalaki koteya na kati na bino na Ndako ya Nzambe, nzokande bokangaki ngai té. Kasi nyonso oyo esalami po na kokokisa makambo oyo ekòmamá na Mikanda.”
[50] Bongo bayekoli nyonso batiki ye pe bakimi na bango.
[51] Nzokande elenge moko ya mobali azalaki kolanda Yezu, alataki kaka liputa ya pamba. Balingaki kokanga ye,
[52] kasi ye atiki liputa pe akimi bolumbu.
[53] Bongo bamemi Yezu na ndako ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe, esika bakonzi nyonso ya banganga-Nzambe, bambuta-muntu pe balakisi-Mibeko bakendeki kosangana.
[54] Piere azalaki kolanda ye na mosika tii na lopango ya mokonzi ya banganga-Nzambe; kuna afandi esika moko ná bakengeli pe akómi koyotela móto.
[55] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná bato nyonso ya Likita-Monene bazalaki koluka bato bakoki kofunda Yezu po bákatela ye etumbu ya liwa, kasi bazwaki ata moto moko té.
[56] Pamba té bato mingi bazalaki kokosela ye makambo ya lokuta, kasi maloba na bango ezalaki kokokana té.
[57] Bongo bato mosusu batelemi, pe bakoseli ye makambo boye:
[58] “Toyokaki ye azali koloba: Ngai nakoboma Ndako ya Nzambe oyo basalá na bato; pe na mikolo misato nakotònga mosusu oyo ekosalama na maboko ya bato té.”
[59] Kasi ata po na likambo oyo, maloba na bango ezalaki kaka kokokana té.
[60] Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemi liboso na bango nyonso, pe atuni Yezu: “Okozongisa té? Bato oyo bazali kofunda yo na likambo nini?”
[61] Kasi Yezu afandi nyee pe azongisi ata liloba moko té. Mokonzi ya banganga-Nzambe atuni ye lisusu: “Ozali Mesia, Mwana ya Nzambe?”
[62] Yezu azongisi: “Ezali ngai. Pe bokomona, Mwana ya Moto, ndenge akofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe ya nguya nyonso, pe ndenge akoya na kati ya mapata ya Likolo.”
[63] Na mbala moko mokonzi ya banganga-Nzambe atomboki penza, apasoli bilamba na ye pe alobi: “Po na nini tóluka lisusu batemwen?
[64] Bosi'boyoki ndenge atsioli Nzambe! Bokanisi nini?” Bango nyonso bakati, balobi: “Asengeli kokufa!”
[65] Bato mosusu na kati na bango babandi kobwakela ye soi, kozipa ye elongi pe kobeta ye makofi. Pe balobi na ye: “Lakisa 'tè ozali profete! Nani abeti yo?” Sima, bakengeli bakamati ye, pe babetibeti ye bambata.
[66] Tango Piere azalaki na se na kati ya lopango, mwasi moko ayei wana, azalaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe.
[67] Amoni Piere azalaki koyotela móto, atali ye pe alobi: “Yo pe ozalaki ná Yezu, moto ya Nazaret!”
[68] Kasi ye awangani, alobi: “Makambo yo ozali koloba, nayebi yango té, pe namoni tina na yango té.” Sima alongwe wana pe akei kofanda na monoko ya lopango. Bongo soso eleli.
[69] Kasi mwasi yango amoni ye, pe abandi koyebisa lisusu bato oyo bazalaki wana: “Moto oyo azali moko na bango.”
[70] Kasi Piere awangani lisusu. Na sima ya mwa-tango moke, baoyo bazalaki wana balobi na Piere: “Ya solo, yo pe ozali moko na bango, pamba té ozali moto ya Galilé.”
[71] Bongo Piere abandi kokata seleka boye: “Nzambe penza! Nayebi na ngai moto bozali koloba té! Soki nakosi, Nzambe ápesa ngai etumbu!”
[72] Kaka na tango wana, soso eleli mbala ya mibale. Bongo Piere akómi kokanisa maloba Yezu alobelaki ye: “Liboso 'tè soso élela mbala mibale, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té.” Piere ayoki mawa pe abandi kolela.