[1] Tango Yezu abimi na Ndako ya Nzambe, moyekoli moko alobi na ye: “Moteyi, tala mabanga ya minene boye, pe ndako ya monene boye!”
[2] Yezu azongiseli ye: “Omoni bandako oyo ya minene? Ata libanga moko té ekotikala na esika ezali. Nyonso wana bakopanza yango.”
[3] Bongo Yezu akei kofanda na Ngomba ya ba-Olive, na esika oyo etalaná ná Ndako ya Nzambe. Lokola Piere, Jake, Yoane ná André bazalaki esika moko ná ye, batuni ye balobi:
[4] “Yebisa biso tango nini makambo yango ekosalama? Elembo nini ekolakisa 'tè nyonso wana elingi kosuka?”
[5] Bongo Yezu alobi na bango: “Bókeba, moto moko té ákosa bino.
[6] Bato ebele bakoya na kombo na ngai, bakoloba: ‘Ezali ngai moto bozalaki kozela’, pe bakokosa bato mingi.
[7] Tango bokoyoka 'tè bitumba ebimi na bamboka ya penepene pe ya mosika, bóbanga té, po makambo wana esengeli koya; kasi wana ekozala nanu suka té.
[8] Ya solo, bitumba ekobima na kati ya bikolo pe na kati ya bamboka. Epai na epai mabelé ekoningana, pe nzala ekongala; yango ekozala lokola ebandeli ya pasi mwasi ayokaka na tango ya kobota.
[9] “Kasi bino, bókeba: bakomema bino na batribinal, pe bakobeta bino fimbu na bandako ya lisanga. Likolo na ngai bakokumba bino epai ya batambwisi ya bavile pe bakonzi ya bikolo. Na ndenge wana bokozwa nzela ya koyebisa bango sango na ngai.
[10] Pamba té esengeli bósakola Sango Malamu na bikolo nyonso, liboso 'tè suka ékóma.
[11] Bongo tango bakomema bino na tribinal, bóbanga té po na makambo bokoloba. Bóloba kaka oyo ekoyeela bino na tango wana, pamba té bino té bato bokozala koloba, kasi ezali Molimo Mosantu moto akoloba.
[12] Bato bakotekisa bandeko na bango po báboma bango; batata bakotekisa bana na bango; pe bana bakotombokela batata po bábomisa bango.
[13] Bato nyonso bakoyina bino po na kombo na ngai. Kasi moto oyo akokanga motema tii na suka, ye nde akobika.”
[14] “Ekòmamá 'tè Lisumá ya somo ekopikama na esika yango ekoki kozala té.” (Moto azali kotanga makambo oyo, áluka koyeba tina na yango!) “Mokolo bokomona boye, baoyo bakozala na rejion ya Yudea, bákima epai ya bangomba.
[15] Moto oyo akozala na libanda ázonga té na kati ya ndako po na kokamata biloko na ye.
[16] Pe oyo akozala na bilanga, ázonga na ndako té po na kokamata kazaka na ye.
[17] Mawa na basi oyo bakozala na bazemi, ná baoyo bakobanda komelisa bana mabéle na tango wana!
[18] Bóbondela Nzambe po mokolo bokokima ézala na tango ya malili té.
[19] Pamba té, mikolo wana pasi ya somo ekozala. Pasi ya ndenge wana emonaná nanu té uta ebandeli ya biloko nyonso Nzambe asalá, tii sik'oyo; ekomonana pe lisusu té.
[20] Soki Nkolo ákatelaka bato mikolo ya pasi wana té po ékóma mokuse, mbele ata moto moko té akokaki kobika. Kasi Nkolo akatá yango po na bato oyo ye aponá.
[21] “Na tango wana, soki moto alobi na bino: ‘Bótala, Mesia azali awa!’ to ‘Azali kuna!’ bóndimela ye té.
[22] Pamba té bamesia ya lokuta ná baprofete ya lokuta bakobima ebele, bakosala makamwisi ya ndenge na ndenge po, soki nzela ezali, bákosa ata bato oyo Nzambe aponá.
[23] Yango wana bino bókeba! Nasi'nayebisi bino makambo wana nyonso.”
[24] “Kasi na mikolo yango, soki pasi wana esili, mosusu ya koleka ekoya. Moi ekokóma molili, sanza ekongenga lisusu té;
[25] minzoto ekokweya na se, pe nyonso oyo ezali na likolo ekoningana.
[26] Kaka na tango wana, bakomona Mwana ya Moto azali koya na likolo ya mapata, na nguya pe na lokumu mingi.
[27] Akotinda ba-anjelu bipai nyonso na mokili mobimba, pe akosangisa bato oyo Nzambe aponá.”
[28] Bókanisa nzete ya figi. Soki bitape na yango ekómi petepete, pe soki makasa na yango ebandi kobima, boyebaka 'tè eleko ya kobuka mbuma ekómi penepene.
[29] Bobele ndenge wana, tango bokomona makambo yango, bóyeba 'tè etikali moke Mwana ya Moto áya.
[30] Nalobi na bino, ya solo: bato ya tango oyo bakomona makambo nyonso wana na miso.
[31] Likolo ná se ekoleka; kasi maloba na ngai ekoleka ata moke té.
[32] “Moto moko té ayebi mokolo to ngonga makambo wana ekosalama, ata ba-anjelu na Likolo, ézala kutu ata Mwana. Kaka Tata ye moko moto ayebi yango.
[33] Bókeba, bókengela, po boyebi té tango nini mokolo yango ekoya.
[34] Ezali lokola moto moko akei mobembo, atiki ndako na ye pe apesi basali na ye bokonzi. Atikeli moto na moto mosala pe atindi mokengeli 'tè ákengela malamu.
[35] Yango wana bókengela malamu, po bóyebi té tango nini kolo ya ndako akozonga: soki na pokwa, na midi ya butu, to tango soso ya liboso elelaka, to pe na tongo.
[36] Soki té akoya mbala moko kokuta bino bolali pongi!
[37] Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango na bato nyonso: Bókengela malamu!”