Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 8:21

[1] Bongo Yezu abeteli bango masapo, alobi: “Moto moko akonaki elanga ya vinu, asaleli yango lopango, abongisi libulu na kati ya mabanga po na kokamola vinu, atòngi ndako moko ya molai po na kokengela yango; sima atie bato ya kofutela, bongo ye akei na mobembo.

[2] Na tango ya kolongola mbuma, atindi mosali na ye epai ya bafuteli ya elanga, po ákende kozwa ndambo ya mbuma.

[3] Kasi bato yango bakangi ye, babeti ye pe bazongisi ye maboko pamba.

[4] Kolo ya elanga atindeli bango mosali mosusu; kasi bango bazokisi ye na motú pe bafingi ye.

[5] Bongo atindi lisusu moto moko. Oyo nde babomi ye! Sima atindi bato mingi: bamosusu babeti bango, pe bamosusu babomi bango.

[6] Bobele moto moko kaka atikalaki epai ya kolo ya elanga, ezali nde Mwana na ye ya bolingo. Bongo atindeli bango ye, pamba té amilobi: ‘Bakotosa mwana na ngai’.

[7] Kasi bafuteli ya elanga balobani bango na bango: ‘Tala moto akokóma kolo ya elanga soki tata na ye akufi. Tóboma ye, po elanga ya vinu ékóma ya biso.’

[8] Bongo bakangi ye, babomi ye pe babwaki ye mosika ya elanga.”

[9] Sima Yezu abakisi, alobi: “Kolo ya elanga akosala nini? Akoya koboma bafuteli wana, pe akopesa elanga na maboko ya bato mosusu.

[10] Nanu botangá Mikanda ya Nzambe té? Ekòmamá boye: ‘Libanga bamason babwakaki ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem.

[11] Yango euti na mosala ya Nkolo, tomoni yango na miso pe tokamwe mingi.’”

[12] Bakonzi ya Bayuda babandi koluka nzela ya kokanga Yezu, pamba té, bayebaki 'tè alobaki lisapo wana po na bango. Kasi lokola bazalaki kobanga bato, batiki ye pe bakei na bango.

[13] Bongo batindi bato mosusu ya ba-Farizé ná ya Erode epai ya Yezu po bámeka kokweisa ye na maloba na ye moko.

[14] Bango bayei pe batuni Yezu: “Moteyi, toyebi malamu 'tè okosaka té, obangaka bato té pe otalaka bilongi ya bato té; kasi oteyaka makambo ya solo po na nzela ya Nzambe. Mibeko na biso epesaka nzela ya kofuta mpaku na mokonzi monene ya Rome to té?”

[15] Kasi Yezu ayebaki 'tè babombeli ye makambo, bongo alobi na bango: “Po na nini bozali komeka ngai? Bóyeela ngai ebende moko ya mbongo po nátala yango.”

[16] Bayeeli ye yango, bongo atuni bango: “Foto oyo pe kombo oyo bakòmá awa ezali ya nani?” Bazongisi: “Ya mokonzi monene ya Rome.”

[17] Yezu alobi na bango: “Bópesa mokonzi monene ya Rome oyo ezali ya ye, pe bópesa na Nzambe oyo ya ye.” Bango bakamwe penza po na maloba na ye.

[18] Bongo ba-Sadusé bayei epai ya Yezu. Ezali nde ba-Sadusé bato balobaka 'tè bato bakufá bakoki kosekwa té. Batuni ye:

[19] “Moteyi, Moize akòmaká boye po na biso: ‘Soki moto akufi pe atiki mwasi kasi aboti na ye té, ndeko ya moto akufi asengeli kobala mwasi oyo ye atiki, po ábotela ye bana.’

[20] Na mboka moko ezalaki na bandeko sambo ya mibali, bango nyonso mama moko, tata moko. Mwana ya liboso abali mwasi pe akufi, atiki bana té.

[21] Oyo ya mibale abali mwasi wana pe akufi, atiki bana té. Ya misato pe ndenge moko.

[22] Bango nyonso sambo babalaki mwasi wana bakufi, batiki bana té. Sima na bango nyonso mwasi pe ayei kokufa.

[23] Bongo mokolo bato bakufá bakosekwa, ye akozala mwasi ya nani? Pamba té bango nyonso sambo babalaki ye.”

[24] Yezu azongiseli bango: “Ndenge nini bobosani boye? Ezali po boyebi Mikanda ya Nzambe té; boyebi pe nguya na ye té.

[25] Pamba té tango bato bakufá bakosekwa, bakobanda kobalana té, kasi bakokokana ná ba-anjelu ya Likolo.

[26] Po na likambo etali kosekwa ya bato bakufá, nanu botangá mokanda ya Moize té? Na lisolo ya nzete oyo ezalaki kopela, Nzambe alobaká na Moize boye: ‘Nazali Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob.’

[27] Ye azali Nzambe ya bato bakufá té, kasi ya bato oyo bazali na bomoi. Bomoni! Bozali kobosana na ndenge moko ya mabe penza.”

[28] Molakisi-Mibeko moko ayokaki bango tango bazalaki kotiana tembe. Amoni 'tè Yezu azongiseli bango malamu, bongo akei epai na ye pe atuni boye: “Na kati ya Mibeko ya Nzambe, mobeko nini eleki nyonso?”

[29] Yezu azongiseli ye: “Mobeko eleki nyonso, yango oyo: ‘Bato ya Israel, bóyoka! Nkolo Nzambe na biso azali Nkolo se moko.

[30] Linga Nkolo Nzambe na yo, na motema moko, na bomoi na yo mobimba, na mayele nyonso pe na makasi nyonso.’

[31] Pe mobeko ya mibale, yango oyo: ‘Linga moninga na yo ndenge omilingaka yo moko.’ Mobeko mosusu eleki oyo mibale ezali té.”

[32] Bongo molakisi-Mibeko alobi na Yezu: “Ezali boye, Moteyi! Oyo olobi ezali ya solo: Nzambe azali se moko, mosusu azali té.

[33] Kozikisela Nzambe banyama pe kopesa ye mabonza ezali malamu, kasi oyo yo olobi ezali malamu penza koleka: Tosengeli kolinga Nzambe na motema moko, na mayele nyonso, na makasi nyonso; pe kolinga baninga ndenge biso moko tomilingaka.”

[34] Yezu amoni 'tè eyano na ye ezali ya malonga, alobi na ye: “Yo ozali mosika té po na kokóma moto ya bokonzi ya Nzambe.” Banda mokolo wana, ata moto moko té amekaki kotuna ye motuna.

[35] Tango Yezu azalaki koteya na Ndako ya Nzambe, atuni motuna alobi: “Ndenge nini balakisi-Mibeko bakoki koloba 'tè Mesia azali Mwana ya David, oyo akozwa ebonga na ye?

[36] Pamba té Molimo Mosantu alakisaká David 'tè áloba boye: ‘Nkolo alobi na Mokonzi na ngai: fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu; nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.’

[37] David ye moko azalaká kobenga Mesia ‘Mokonzi na ngai’. Bongo ndenge nini ye akoki kozala mwana ya David, oyo akozwa bobele ebonga na ye?” Bato mingi bazalaki koyoka Yezu na esengo;

[38] bongo ye abandaki koteya bango boye: “Bókebaka na balakisi-Mibeko! Bango balingaka kotambola na banzambala ya lokumu. Balingaka bato bápesaka bango bambote na bazando.

[39] Baponaka bisika ya liboso na bandako ya lisanga, pe bakiti ya lokumu na bafeti.

[40] Babotolaka biloko ya basi oyo bakufelá mibali, pe bakosanaka kosambela mingi. Bango bakozwa etumbu oyo eleki monene!”

[41] Yezu akei kofanda pembeni ya sanduku ya makabo na Ndako ya Nzambe, pe abandi kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo. Bato ya mosolo bazalaki kotia mbongo mingi.

[42] Mwasi moko akufelá mobali ayei, azalaki moto ya kokelela, atie bibende mibale ya mike oyo akokaki kosombela mwa-lipa.

[43] Bongo Yezu abengi bayekoli na ye pe alobi na bango: “Nalobi na bino, ya solo: Likabo ya mwasi oyo akufelá mobali pe akelelá eleki ya bato nyonso oyo batie mosolo na sanduku.

[44] Pamba té bango nyonso bapesi mbongo oyo bazali na yango posa té; kasi ye, na kokelela na ye, apesi mosolo nyonso, mbongo oyo akokaki kobikela na yango.”

Marko — Chapters