[1] Na makambo etali mbongo oyo bolingi kokongola po na bato ya Nzambe ya mboka Yeruzalem: bino pe bósala ndenge natindaki ba-Eklezya ya Galatie.
[2] Mikolo nyonso ya yenga, moto na moto na kati na bino álongolaka ndambo ya mbongo ndenge ye akokeli. Bózela ngai té po na kokongola yango.
[3] Tango nakokóma epai na bino, nakopesa mikanda na bato oyo bino boponaki, pe nakotinda bango bámemela bandeko ya Yeruzalem makabo na bino.
[4] Soki tina ezali po ngai nákende, bakosala mobembo nzela moko ná ngai.
[5] Nakoya epai na bino soki nakatisi Masedwane; pamba té nalingi koleka na Masedwane.
[6] Nakanisi nakoumela mwa-mingi epai na bino, ézala basanza nyonso ya malili. Boye bokokoka kosalisa ngai po 'tè nálanda mibembo na ngai.
[7] Nalingi koleka epai na bino mbangu té, kasi soki Nkolo apesi ngai nzela, nakanisi nakofanda mwa-mikolo epai na bino.
[8] Nzokande nakotikala awa na Efeze tii mokolo ya Pantekote.
[9] Pamba té, Nzambe afungoleli ngai nzela monene po na kosala mosala ya malonga pe ya tina, atako banguna bazali mingi.
[10] Soki Timoté akómi epai na bino, bóyamba ye malamu na ndenge 'tè ábanga té, po ye pe asalaka mosala ya Nkolo lokola ngai.
[11] Moto moko té ámonela ye, kasi bósalisa ye po álanda mobembo na ye na boboto, pe ákóma epai na ngai. Pamba té biso ná bandeko mosusu tozali kozela ye.
[12] Po na ndeko Apolos, nabondelaki ye mingi 'tè áya kuna ná bandeko mosusu kotala bino, kasi aboyi koya sik'oyo. Akoya mokolo ye moko alingi.
[13] Bózalaka ekenge: bótika bondimi té, bózala bato ya solo, pe bózala na makasi.
[14] Bósalaka misala na bino nyonso na bolingo.
[15] Bandeko, boyebi Stefanas pe libota na ye: bazalaki bato ya liboso po na kondimela Kristo na rejion ya Akaya, pe bamipesaki po na kosalela pe bato mosusu ya Nzambe.
[16] Bongo nasengi bino bótosa bato ya ndenge wana, pe baoyo bamonaka pasi na mosala esika moko ná bango.
[17] Nasepeli mingi po namoni Stefanas, Fortunatus pe Akaikus. Tango namonaki bango, ezalaki lokola namoni bino nyonso.
[18] Pe bakitisi ngai motema ndenge bakitisaki bino pe motema. Yango wana, bóyeba kokumisa bato ya ndenge oyo.
[19] Bandimi ya ba-Eklezya ya rejion ya Azie batindeli bino mbote. Akilas ná Prisiye pe Eklezya oyo esanganaka epai na bango, batindeli bino mbote mingi, na kombo ya Nkolo Yezu.
[20] Bandeko nyonso oyo bazali awa, batindeli bino mbote. Bino nyonso bópesana mbote, bóyambana ndenge ebongi na bato ya Nzambe.
[21] Ngai Polo napesi bino mbote; nakòmi maloba oyo na maboko na ngai moko.
[22] Soki moto alingi Nkolo Yezu té, lisumá na ye! Marana ta! Nkolo na biso, yaka!
[23] Bolamu ya Nkolo Yezu ézala na bino.
[24] Nazali kolinga bino nyonso na lisanga ya Kristo Yezu.