Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 10:06

[1] Bandeko, sik'oyo nalingi náyebisa bino lisusu Sango Malamu oyo nasakolaki epai na bino, oyo bondimaki, pe bozali kondima na molende tii lelo.

[2] Soki bosimbi yango makasi, yango ekobikisa bino. Soki té, bondimaki se pamba.

[3] Sango eleki tina oyo nayebisaki bino, ngai moko nazwaki yango: Kristo akufaki po na masumu na biso, ndenge ekòmamá na Mikanda.

[4] Bakundaki ye, pe na mikolo misato asekwaki, ndenge ekòmamá na Mikanda.

[5] Amonanaki na Piere, pe sima na bantoma nyonso zomi na mibale.

[6] Amonanaki pe na bandeko 500 na mbala moko; mingi na kati na bango bazali na bomoi tii lelo, kasi bamosusu bakufá.

[7] Bongo ayaki komonana lisusu na Jake, pe sima na ye, na bantoma nyonso.

[8] Sima na bango nyonso, ngai pe nayaki komona ye. Nazali lokola matshombe,

[9] pamba té nayaki sima ya bantoma nyonso, pe nabongi té po na kozwa kombo ya ntoma, po kala nazalaká konyokola Eklezya ya Nzambe.

[10] Kasi bobele po na bolamu ya Nzambe nazali ndenge nazali; pe bolamu oyo ye apesaki ngai ekei pamba té. Nasalaki mingi koleka bantoma mosusu nyonso; nzokande ezali ngai té, kasi ezali bolamu ya Nzambe moto ezali kosala ná ngai.

[11] Bongo, éuta na ngai to na bantoma mosusu, yango ezali sango biso tosakolaka pe oyo bino bondimaki.

[12] Soki tozali kosakola 'tè Kristo asekwaki, ndenge nini bato mosusu na kati na bino balobaka 'tè bato bakufá bakoki kosekwa té?

[13] Soki bato bakufá bakoki kosekwa té, Kristo pe asekwaki té.

[14] Pe soki Kristo asekwaki té, mateya na biso ezali pamba, pe bondimi na bino ezali pamba.

[15] Tokómi kokosela Nzambe makambo, pamba té tolobaka 'tè ye asekwisaki Kristo; nzokande asekwisaki ye té, soki bato bakufá bakoki kosekwa té.

[16] Ya solo, soki bato bakufá bakoki kosekwa té, bongo Kristo pe asekwaki té.

[17] Kasi soki Kristo asekwaki té, bozali kondima makambo ya pamba, pe botikali kaka na masumu na bino.

[18] Pe elingi koloba lisusu 'tè baoyo bakufá kati na Kristo, babungá libela.

[19] Soki tozali kotia motema na Kristo kaka po na makambo ya mokili oyo ya se, tozali bato ya mawa koleka bato nyonso.

[20] Kasi ezali boye té! Ya solo, Kristo asekwá. Na kati ya bato oyo bakufá, ye azali moto ya liboso oyo asi'asekwá.

[21] Pamba té, liwa eyaki po na moto moko; ndenge moko pe, kosekwa eyaki po na moto moko.

[22] Lokola bato nyonso basengeli kokufa po bazali na molongo ya Adamu, ndenge moko pe bato nyonso bakosekwa po bazali na molongo ya Kristo.

[23] Kasi moto na moto azali na tango na ye. Kristo nde azali moto ya liboso; bato ya Kristo bakolanda ye, mokolo ye akozonga.

[24] Bongo mokolo ya suka ekoya: Kristo akobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso, pe nguya nyonso. Ye akozongisa bokonzi na maboko ya Nzambe Tata.

[25] Kasi Kristo asengeli kozala Mokonzi tii mokolo Nzambe akotia banguna nyonso na se ya makolo na ye.

[26] Pe liwa ezali monguna ya suka.

[27] Lokola ekòmamá na Mikanda: “Nzambe atiá biloko nyonso na se ya makolo na ye.” Yango elingi koloba té 'tè Nzambe oyo apesi ye Bokonzi azali ye moko na se ya makolo ya Kristo.

[28] Kasi Nzambe akotia biloko nyonso na se ya makolo ya Kristo; Mwana ya Nzambe ye moko akomitia na se ya Nzambe oyo apesaki ye Bokonzi. Na ndenge wana Nzambe akozala Mokonzi ya makambo nyonso.

[29] Bókanisa lisusu. Epai na bino, bato mosusu basengaka bázwa batisimo, na esika ya bandeko na bango oyo bakufaki liboso 'tè bákoka kozwa yango. Bato wana bazali koluka penza nini? Soki ya solo, bato bakufá bakoki kosekwa té, tina nini basengaka batisimo na esika na bango?

[30] Pe ngai moko, po na nini nazali komilukela makama tango nyonso?

[31] Ya solo, bandeko, mikolo nyonso nazali penepene ya liwa. Nazali kutu kobeta tolo po na yango likolo na bino, na lisanga na Nkolo na biso Kristo Yezu.

[32] Po na nini nabundaki etumba ya somo awa na Efeze, soki ezali kaka po na makambo ya bomoto? Soki bato bakufá bakosekwa té, tósala bobele ndenge balobaka: “Tólia, tómela, pamba té lobi tokokufa.”

[33] Bótika komikosa: “Baninga ya mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”

[34] Bózongela makanisi ya malamu, po bósala masumu té. Nalobi boye po na koyokisa bino soni: bato mosusu na kati na bino bayebi Nzambe té.

[35] Kasi bato mosusu bazali kotunatuna: “Ndenge nini bato bakufá bakosekwa? Bakozala na nzoto ya ndenge nini?”

[36] Ozali mayele té! Soki okoni mbuma, esengeli ékufa na mabelé po ébota.

[37] Pe lititi oyo ekobima, okonaki yango té. Okonaki bobele mbuma pamba, ya blé to ya eloko mosusu.

[38] Nzambe moto akobotisa mbuma yango, ndenge ye moko alingi. Ye abotisaka mbuma na mbuma na ndenge na yango.

[39] Misuni nyonso ezali ndenge moko té. Bato bazali na mosuni na bango; banyama ezali na mosuni mosusu; bandeke mosuni mosusu; pe bambisi ezali na mosuni ya ndenge mosusu.

[40] Biloko ya Likolo ekeseni na oyo ya se. Kitoko ya biloko ya Likolo ekokani té ná kitoko ya biloko ya se.

[41] Moi ezali na kitoko na yango; sanza ezali na kitoko mosusu, pe minzoto ezali na kitoko na yango mosusu. Monzoto moko moko ekeseni na kitoko.

[42] Bato oyo bakosekwa bakozala pe ndenge wana. Kokunda nzoto ya moto ezali lokola kokona mbuma: nzoto esengeli kopola na mabelé; kasi nzoto oyo ekosekwa ekopola lisusu té.

[43] Bakonaka nzoto oyo ezangi lokumu; kasi nzoto oyo ekosekwa ekozala na lokumu. Bakonaka nzoto oyo ezangi makasi; kasi nzoto oyo ekosekwa ekozala na makasi.

[44] Bakonaka nzoto oyo ezali na bomoi ya bomoto; kasi nzoto oyo ekosekwa ekozala na bomoi ya molimo. Pamba té nzoto na biso awa na mokili ezali na bomoi ya bomoto, kasi bomoi mosusu ezali, yango nde ya molimo.

[45] Ekòmamá boye po na Adamu, moto ya liboso oyo Nzambe asalaká: “Ye akómaki na bomoi.” Kasi Kristo, Adamu ya suka, akómi Molimo oyo apesaka bomoi.

[46] Boye, bomoi ya molimo eyaki liboso té; kasi bomoi ya bomoto eyaki liboso, pe na sima bomoi ya molimo.

[47] Nzambe asalaká Adamu ya liboso na mabelé; ye azalaki moto ya mokili oyo. Kasi Kristo, Adamu ya mibale, autaki na Likolo.

[48] Bato ya mokili bakokani na Adamu, moto oyo asalamaká na mabelé; bato ya Likolo bakokani ná Kristo, moto oyo autaki na Likolo.

[49] Liboso biso tokokanaki ná moto oyo asalamaká na mabelé; ndenge moko pe tokokokana ná moto oyo autaki na Likolo.

[50] Bandeko, nalobi boye: nzoto na biso ya bomoto ekoki kozwa esika té na bokonzi ya Nzambe; nzoto oyo esengeli kopola, ekoki kozwa bomoi ya seko té.

[51] Nazali koyebisa bino sekelé moko: biso nyonso tokokufa té, kasi biso nyonso tokobongwana.

[52] Yango ekosalama na mbalakaka, na mokolo ya suka tango kelelo ekobeta. Pamba té tango kelelo ekobeta, bato bakufá bakosekwa, pe bakozwa nzoto oyo ekoki kopola lisusu té; nzokande biso bato tokozala na bomoi na tango wana, tokobongwana.

[53] Pamba té, nzoto na biso oyo etangamá kokufa pe kopola, esengeli ébongwana, po ékoka kokufa lisusu té to kopola. Boye na tango wana Nzambe akokokisa makambo oyo ekòmamá: “Nzambe asi'alongi! Liwa esili!

[55] Yo liwa, okanisi olongá libela? E liwa, wapi bibundeli na yo ya kozokisa bato?”

[56] Bibundeli ya liwa nde masumu; pe Mibeko moto epesaka masumu nguya.

[57] Kasi tópesa Nzambe mersi! Pamba té ye asi'alongisi biso na lisanga na Nkolo na biso Yezu Kristo!

[58] Yango wana, bandeko na ngai ya bolingo, bótia molende po bókweya té. Bómipesaka tango nyonso na mosala ya Nkolo. Bóyebaka 'tè pasi oyo bomonaka na mosala ya Nkolo ekokende pamba té.

1 Ba-Korentien — Chapters