Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 8:05

[1] Po na makambo bokòmelaki ngai na mokanda, nalobi boye: ezali malamu mobali ábala té.

[2] Kasi lokola na kati na bino makambo ya soni ezali mingi, ebongi mobali nyonso ázala na mwasi na ye, pe mwasi nyonso ázala na mobali na ye.

[3] Mobali ákokisa baposa ya mwasi na ye, pe mwasi oyo ya mobali na ye.

[4] Mwasi azali kolo ya nzoto na ye té, kasi bobele mobali. Ndenge moko pe mobali azali kolo ya nzoto na ye té, kasi bobele mwasi.

[5] Bókabwana bambeto té; longola kaka soki boyokani po na mwa-tango, po na komipesa na losambo. Kasi sima, bózonga ndenge bomesaná; soki boye té, bokoyeba komibatela té pe Satan akoluka kokweisa bino.

[6] Nazali koyebisa bino makambo oyo ekoki kosalama; kasi ezali mobeko penza té.

[7] Ya solo, nalingi moto nyonso ázala monzemba lokola ngai; kasi Nzambe apesaka moto na moto likabo oyo ekoki na ye.

[8] Po na bato oyo babali té, ná basi oyo bakufelá mibali, nazali koyebisa bango 'tè ezali malamu bátikala lokola ngai.

[9] Kasi soki bakoki kokanga motema té, bábala kaka; ebongi malamu bábala esika 'tè bábebisa nzoto na baposa na bango.

[10] Na baoyo basi'babali, napesi bango motindo oyo ezali ya ngai té kasi ya Nkolo: mwasi ya libala ákabwana té na mobali na ye.

[11] Nzokande soki atiki ye, áfanda kaka monzemba to áyokana lisusu na mobali na ye. Pe mobali áboya mwasi na ye té.

[12] Po na bato mosusu, nazwi motindo epai ya Nkolo té. Napesi kaka toli boye: soki ndeko moko azali na mwasi oyo azali mondimi té, pe mwasi wana alingi áfanda na ye, mobali átika ye té.

[13] Ndenge moko pe soki mwasi moko azali na mobali oyo azali mondimi té, pe mobali wana alingi áfanda na ye, mwasi áboya ye té.

[14] Pamba té mobali oyo andimaka Kristo té, Nzambe asi'andimi ye po asangani na mondimi ya mwasi. Pe mwasi oyo andimaka Kristo té, Nzambe asi'andimi ye po asangani na mondimi ya mobali. Soki bongo té, bana na bango bakozala mbindo; nzokande Nzambe asi'andimi bango.

[15] Kasi soki moto oyo azali mondimi té alingi kolongwa na libala, álongwa kaka. Na makambo ya boye, mondimi ya mobali to ya mwasi azali moumbu ya libala té; Nzambe abengaki bino po bófanda na boboto.

[16] Pamba té yo ndeko mwasi, ndenge nini okoki koyeba soki okobikisa mobali na yo? Pe yo ndeko mobali, ndenge nini okoki koyeba soki okobikisa mwasi na yo?

[17] Po na bato mosusu nyonso, nalobi boye: moto na moto ábatela makabo oyo Nkolo apesaki ye; elingi koloba: átikala kaka ndenge azalaki, tango Nzambe abengaki ye. Oyo ezali motindo napesaka na ba-Eklezya nyonso.

[18] Mobali oyo basi'bakatá ye nzoto liboso 'tè Nzambe ábenga ye, átikala se bongo. Pe oyo bakataki ye té liboso 'tè Nzambe ábenga ye, ákatisa nzoto té.

[19] Oyo bakatá nzoto, ná oyo bakata té, bazali kaka ndenge moko. Nzokande kotosa mitindo ya Nzambe nde moto ezali likambo ya tina penza.

[20] Moto na moto átikala ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye.

[21] Ozalaki moumbu tango Nzambe abengaki yo? Komitungisa té. Kasi ata soki okoki kozwa bonsomi, salela yango na ndenge ekoki.

[22] Pamba té oyo azali moumbu tango Nzambe abengi ye, azwi bonsomi po akómi moto ya Nkolo. Ndenge moko pe, oyo azali moto ya bonsomi tango Nzambe abengi ye, akómi moumbu ya Kristo.

[23] Nzambe asombaki bino kosomba: bókóma baumbu ya bato té.

[24] Bandeko na ngai, moto na moto átikala na miso ya Nzambe ndenge azalaki, tango Nzambe abengaki ye.

[25] Po na makambo etali bato oyo babali nanu té, nazwaki motindo epai ya Nkolo té; kasi nalakisi makanisi na ngai. Bokoki kotiela yango motema, pamba té Nkolo ayokelaki ngai mawa pe atie ngai molobeli na ye.

[26] Bongo po na bapasi tozali komona na mokili oyo, nakanisi 'tè ebongi malamu moto ábala té.

[27] Osi'obali? Koluka koboma libala té. Obali nanu té? Koluka mwasi té.

[28] Kasi soki obali, osali lisumu té. Pe elenge mwasi soki abali, asali lisumu té. Nzokande bato oyo bakobalana, bakomona pasi; pe ngai nalingi té bino bómona pasi.

[29] Bandeko, nayebisi bino: mikolo ekómi ya kotanga. Boye na mwa-tango etikali, bato oyo basi'babali, bázala lokola babali té;

[30] baoyo bazali kolela, bázala lokola baleli té; baoyo bazali kosepela, bázala lokola basepeli té; baoyo bazali kosomba, bázala lokola bazangi biloko;

[31] baoyo bamipesaki na makambo ya mokili, bázala lokola bamipesaka na yango penza té. Pamba té makambo ya mokili oyo ekoumela té.

[32] Nalingi té mitema na bino ézala likolo-likolo. Mobali oyo azali na mwasi té, akoki komipesa na makambo ya Nkolo pe koluka nzela ya kosepelisa ye.

[33] Kasi oyo azali na mwasi amipesaka na makambo ya mokili, pe alukaka nzela ya kosepelisa mwasi na ye;

[34] boye motema na ye ekabwani. Ndenge moko pe po na mwasi, ázala mokolo to elenge, soki azali na mobali té akoki komipesa na makambo ya Nkolo, po nzoto pe motema na ye ésepelisa Nkolo. Kasi mwasi oyo azali na mobali amipesaka na makambo ya mokili, pe alukaka nzela ya kosepelisa mobali na ye.

[35] Nakòmeli bino yango po na bolamu na bino; kasi natieli bino motambo té. Nalingi bósalaka na ndenge ekoki, pe bómipesaka mobimba na Nkolo.

[36] Soki bilenge basi'bakani 'tè bakobalana, bongo na sima bayei koyokana 'tè bakobalana lisusu té, basali malamu. Kasi soki mobali akanisi 'tè akokoka kotika mwasi na ye té, po posa ya libala eyeeli ye penza, malamu bábalana ndenge ye alingi. Ezali lisumu té.

[37] Kasi soki elenge mobali ayebi penza kokanga motema, pe soki moto moko té azali kotinda ye na makasi, bongo azwi mokano libela 'tè akobala mwasi na ye té, asali malamu; ábala té.

[38] Boye oyo alingi kobala mwasi na ye asali malamu. Kasi oyo alingi kobala té, asali malamu koleka.

[39] Mwasi ya libala asengeli kotosa mibeko ya libala tango nyonso mobali na ye azali na bomoi; bongo soki mobali akufi, akoki kobala oyo motema na ye elingi; kasi bobele kati na Nkolo.

[40] Nzokande na makanisi na ngai, mwasi akozala na esengo mingi koleka, soki atikali monzemba. Wana ezali makanisi na ngai, nakanisi 'tè ngai pe nazali na Molimo ya Nzambe.

1 Ba-Korentien — Chapters