Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:03

[1] Soki moto moko na kati na bino azwani likambo ná ndeko na ye ya Eklezya, ndenge nini ákende kosamba liboso ya bazuzi oyo bayebi Nzambe té? Po na nini akei té epai ya bato ya Nzambe?

[2] Boyebi té 'tè bato ya Nzambe bakosambisa bato ya mokili mobimba? Bongo soki bino bokokata makambo ya bato ya mokili mobimba, bokoki té kokata makambo ya mike-mike?

[3] Boyebi té 'tè biso tokokata makambo ya ba-anjelu? Bongo, tokoki té kokata makambo etali bomoi na biso awa na mokili?

[4] Nzokande, tango bozali na likambo ya ndenge oyo, bokendeke kosamba liboso ya bazuzi oyo bayebani té na kati ya Eklezya!

[5] Nalobi yango po na koyokisa bino soni! Ya solo, epai na bino moto moko té ya mayele azali, oyo akoki kobongisa makambo na kati ya bandeko?

[6] Kasi ndenge nini ndeko na ndeko bafundanaka? Pe basalaka yango liboso ya bazuzi oyo bazali bandimi té?

[7] Ya solo, kofundana na tribinal ezali kolakisa 'tè bosi'bobungi. Soki moto alingi kosala bino mabe, po na nini bokoki kokanga motema té? Soki moto alingi kobotola bino biloko, po na nini botikelaka ye yango té?

[8] Kasi ezali bino moko bato bosalaka mabe pe bobotolaka bato biloko! Bosalaka bongo kutu epai ya bandeko na bino!

[9] Bóyeba 'tè bato ya masumu bakokóma bato ya bokonzi ya Nzambe té. Bómikosa té! Ézala bato oyo basalaka makambo ya soni, baoyo basambelaka banzambe ya bikeko, baoyo batambolaka na basi to mibali ya bato, mibali oyo balalaka baninga na bango mibali,

[10] ézala bamiyibi, bato ya lokoso ya mbongo, baoyo balangwaka masanga, baoyo bafingaka baninga, to pe baoyo babotolaka bato biloko; bango nyonso bakokóma bato ya bokonzi ya Nzambe té.

[11] Na kati na bino bamosusu bazalaká ndenge wana. Kasi Nzambe asukoli bino mitema, akómisi bino bosantu pe bosembo, po bozali kondimela Nkolo Yezu Kristo, pe bozwi nguya ya Molimo ya Nzambe na biso.

[12] Bato mosusu na kati na bino balobaka: “Likambo moko té epekisami na ngai.” Ya solo, kasi makambo mosusu ezali malamu té po na ngai. Nakoki koloba: “Likambo moko té epekisami na ngai.” Kasi nalingi té kokóma moumbu ya likambo.

[13] Balobaka lisusu boye po na bilei: “Bilei ezali po na libumu, pe libumu po na bilei.” Ya solo, kasi Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzokande po na makambo etali kindumba, nzoto ya moto esalamá po na kindumba té, kasi po na Nkolo. Nkolo nde azali mokonzi ya nzoto.

[14] Pamba té ndenge Nzambe asekwisaki Nkolo Yezu, se ndenge wana akosekwisa biso pe na nguya na ye.

[15] Boyebi té? Nzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Kristo. E bongo, násangisa nzoto ya Kristo ná oyo ya mwasi ya ndumba? Ekoki kosalama ata moke té!

[16] Pamba té moto oyo asangani ná mwasi ya ndumba, akómi ná ye moto moko. Ekòmamá boye: “Bango mibale bakokóma moto moko.”

[17] Kasi oyo asangani ná Nkolo akómi ná ye Molimo moko.

[18] Bókima kindumba. Masumu mosusu nyonso oyo moto akoki kosala, ebebisaka nzoto na ye té; kasi moto oyo amipesi na kindumba, azali kobebisa nzoto na ye moko.

[19] Boyebi té? Nzoto na bino ezali lokola ndako ya Molimo Mosantu. Pamba té Nzambe apesi bino Molimo; ye afandi na kati na bino. Boye bozali bakolo ya nzoto na bino té;

[20] Nzambe asombaki bino kosomba. Yango wana bósalelaka nzoto na bino po na kokumisa ye.

1 Ba-Korentien — Chapters