Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:34

[1] Bówela liboso bolingo. Kasi bóluka pe makabo ya Molimo Mosantu, mingi oyo ya kosakola mateya euti na ye.

[2] Moto oyo azali koloba monoko eyebaná té, azali koloba na bato té kasi na Nzambe. Azali koloba makambo ya sekelé, na nguya ya Molimo Mosantu; moto moko té ayebi tina ya maloba na ye.

[3] Kasi oyo azali kosakola mateya euti na Molimo, azali koloba na bato, azali kokolisa bondimi ya Eklezya mobimba, kolendisa yango, pe kolongola yango mawa. Nzokande oyo azali koloba monoko eyebaná té, azali kokolisa kaka bondimi na ye moko.

[5] Ngai nalingi bino nyonso bóloba minoko oyo eyebaná té, kasi mingi penza nalingi bósakola maloba euti na Molimo. Ya solo, yango eleki malamu; pamba té moto oyo azali koloba monoko eyebaná té, azali kokolisa bondimi ya Eklezya bobele soki balimboli maloba na ye.

[6] Bandeko, soki nayei kotala bino, pe nalobi kaka monoko eyebaná té, nayeeli bino bolamu nini? Bokozwa bolamu bobele soki nasakoli maloba euti na Molimo pe nayebisi bino basekelé na ye, pe soki nayeeli bino maloba ya mayele to mateya.

[7] Ndakisa: Biloko ya miziki lokola piololo to gitare, soki ebimisi kaka mongongo moko, ndenge nini okoyeba nzembo oyo ezali kobeta?

[8] Pe soki babeti kelelo malamu té, soda nani akomibongisa po na etumba?

[9] Ndenge moko pe, soki bino bozali koloba minoko eyebaná té, ndenge nini moto akoki koyeba tina ya maloba na bino? Maloba yango ekokende na mopepe.

[10] Minoko ya bato ezali ndenge na ndenge, pe moko té ezangi tina.

[11] Nzokande soki moto moko alobi monoko oyo ngai nayebi té, biso na ye tomonani lokola bapaya.

[12] Boye, bino bato bozali kowela makabo ya Molimo Mosantu, bóluka mingi makabo oyo ekoki kokolisa bondimi ya Eklezya.

[13] Yango wana, oyo alobaka monoko eyebaná té, ábondela Nzambe po ákoka kolimbola maloba yango.

[14] Pamba té soki nasambeli na monoko eyebaná té, molimo na ngai ezali kosambela, kasi makanisi na ngai ezali kosambela té.

[15] Bongo násala ndenge nini? Tango nazali kosambela pe koyemba na molimo, ebongi násambela pe náyemba lisusu na makanisi na ngai.

[16] Pamba té soki okumisi Nzambe bobele na molimo na yo, ndenge nini bandeko bakoki koloba “Amen”? Bayebi kutu tina ya maloba na yo té.

[17] Ata losambo na yo ezali kitoko, ekoki kokolisa bondimi ya moto mosusu té.

[18] Napesi Nzambe mersi po naleki bino nyonso na koloba minoko eyebaná té.

[19] Kasi na kati ya Eklezya, esika 'tè náloba maloba nkoto na nkoto na monoko eyebaná té, nalingaka mingi koloba maloba mitano pamba na monoko oyo bato bayebi, po na koteya bango.

[20] Bandeko, bókanisaka lokola bana mike té, kasi lokola bamikóló. Bózalaka lokola bana mike bobele po na makambo etali masumu.

[21] Ekòmamá boye na Mibeko: “Nkolo alobi: nakoloba na bato oyo monoko bango bayebi té; ezali bapaya bato bakomemela bango maloba na ngai. Kasi ata bongo, bakoyokela ngai té.”

[22] Bomoni? Likabo ya koloba minoko eyebaná té epesamaka té po na bandimi, kasi po na baoyo baboyi kondima. Nzokande likabo ya kosakola maloba euti na Molimo epesamaka po na bandimi; epesamaka té po na baoyo baboyi kondima.

[23] Bókanisa nanu. Soki Eklezya esangani, pe moto nyonso azali koloba minoko eyebaná té, bongo bato oyo bazangi bondimi pe bayebi Kristo té bakoti kuna, bakoloba té 'tè bozali bato ya maboma?

[24] Kasi soki bino nyonso bozali kosakola maloba euti na Molimo, bongo moto moko oyo azangi bondimi to ayebi Kristo té akoti kuna, akomona 'tè azali moto ya masumu po na makambo oyo ayoki. Makambo oyo ayoki ekomonisa ye 'tè akoki na etumbu;

[25] basekelé ya motema na ye ekomonana polele; bongo akofukamela Nzambe elongi na se, pe akosakola 'tè: “Ya solo, Nzambe azali na kati na bino.”

[26] Boye bandeko, ndenge nini bosengeli kosala? Tango bosanganaka, moto na moto azali na mosala na ye: koyemba nzembo; kopesa mateya; koyebisa basekelé ya Nzambe; koloba monoko eyebaná té, to kolimbola yango. Nyonso ésalama po na kokolisa bondimi ya Eklezya.

[27] Bato oyo balingi koloba minoko eyebaná té, bakoki kozala mibale; bálekisa misato té. Moto na moto áloba na tango na ye, pe moto mosusu álimbola maloba na bango.

[28] Soki moto ya kolimbola azali té, báfanda nyee na kati ya Eklezya; moto na moto áloba kaka na Nzambe, na se ya motema.

[29] Bato mibale to misato bakoki kosakola maloba euti na Molimo; pe bino nyonso bótala soki bazali koloba malamu.

[30] Kasi na tango wana, soki Nzambe alakisi moto mosusu sekelé moko, oyo azali koloba áfanda nyee.

[31] Moko moko na bino akoki kosakola maloba euti na Molimo, po bato nyonso báyekola pe bázwa molende.

[32] Pamba té soki Molimo apesi maloba na profete, ayebisaka ye pe tango nini akoki kosakola yango.

[33] Po Nzambe azali Nzambe ya mobulu té, kasi ya boboto. Ndenge esalamaka na ba-Eklezya nyonso,

[34] esengeli basi báfanda nyee na kati ya Eklezya; báloba té. Ekòmamá boye na Mibeko: basi bázala bato ya botosi.

[35] Bongo soki balingi koyeba likambo, bátuna mibali na bango na ndako. Pamba té ezali soni soki mwasi alobi makambo na kati ya Eklezya.

[36] Bokanisi maloba ya Nzambe ebandaki epai na bino? Eyeeli kaka bino moko?

[37] Soki moto moko akanisi 'tè azali profete to azwi Molimo Mosantu, ándima 'tè makambo nakòmeli bino ezali mobeko ya Nkolo.

[38] Kasi oyo andimi yango té, alakisi 'tè Nzambe pe andimi ye té.

[39] Yango wana, bandeko na ngai, bówela liboso likabo ya kosakola maloba euti na Molimo. Kasi bópekisa té baoyo bazali koloba minoko eyebaná té.

[40] Nyonso ésalama na ndenge ekoki, pe mobulu ézala té.

1 Ba-Korentien — Chapters