Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:13

[1] Mbote na bino bandeko ya Eklezya ya Nzambe oyo ezali na Korente, pe na bato nyonso ya Nzambe ya rejion ya Akaya. Ngai Polo, ntoma ya Kristo Yezu, - nakómá ntoma kaka po Nzambe akanaki bongo-; ngai ná ndeko Timoté totindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata na biso pe Nkolo Yezu Kristo.

[3] Lokumu na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo. Azali Tata, alingaka biso pe alongolaka biso mawa nyonso.

[4] Tango nyonso oyo toyokaka pasi alongolaka biso mawa, po biso pe tókoka kosala lokola ye, tólongola mawa ya bato nyonso oyo bazali na pasi.

[5] Pamba té, ndenge pasi ya Kristo ekweeli biso mingi, se ndenge wana tozwaka pe makasi ya kosilisa mawa po na Kristo.

[6] Soki tozali komona pasi, ezali po mawa na bino ésila pe bóbika. Soki Nzambe alongoli biso mawa, ezali po mawa na bino pe ésila, bongo bóyeba kokanga motema, lokola biso ná bino tozali komona pasi ndenge moko.

[7] Ya solo, tozali kotia motema, po toyebi 'tè biso ná bino tokokoka kosilisa mawa, lokola bino bozali komona pasi ndenge moko ná biso.

[8] Bandeko, tolingi bóyeba makama tokutanaki na yango, na rejion ya Azie. Makama yango elekaki biso ndelo; tozalaki lisusu na elikya té 'tè tokobika.

[9] Ya solo, tozalaki komona lokola nde basi'bakatelaki biso etumbu ya liwa. Esalamaki bongo po tótia motema na biso moko té, kasi bobele na Nzambe oyo azali na nguya ya kosekwisa bato.

[10] Ezali nde Nzambe moto abikisaki biso na liwa ya somo, pe ye kaka moto akobikisa biso lisusu. Ya solo, totieli ye motema 'tè akobanda kobikisa biso tango nyonso.

[11] Bino pe bozali kosalisa biso na mabondeli na bino. Bongo lokola tozwaka bolamu ya Nzambe po bato mingi bazali kobondela ye, bato mingi pe bakobanda kopesa ye mersi po na biso.

[12] Tala likambo tokoki kobetela tolo yango oyo: na se ya motema, tozali komimona 'tè na miso ya bato nyonso, pe mingi penza na kati na bino, tosalaka kaka makambo ya malonga, ndenge Nzambe ye moko asalaka. Tosalaka yango na mayele ya bomoto té, kasi bobele na bolamu ya Nzambe.

[13] Na mikanda na biso tokòmelaka bino kaka makambo oyo bokoki kotanga pe koyeba. Sik'oyo bokómi koyeba yango kaka ndambo; kasi natie motema 'tè ata ndele bokoyeba yango penza malamu. Bongo mokolo Nkolo Yezu akoya, bino bokozwa lokumu po na biso, ndenge biso pe tokozwa lokumu po na bino.

[15] Lokola nazalaki kotia motema epai na bino, nakanaki koleka na mboka na bino liboso ya kokende na rejion ya Masedwane, po násepelisa bino mbala ya mibale.

[16] Bongo na sima nalingaki kozonga lisusu epai na bino, po bózwa nzela ya kosalisa ngai, tango nakolanda mobembo na ngai tii na rejion ya Yudea.

[17] E bongo, nakanaki yango kaka bikanela? Nazwaka mikano na ngai kaka na mayele ya bomoto, po nándima pe náboya na mbala moko?

[18] Nakati seleka 'tè nalobaka na bino na mitema mibale té.

[19] Po Kristo Yezu, Mwana ya Nzambe oyo biso ná Silas pe Timoté toyaki kosakola epai na bino, azali na mitema mibale té; azali moto ya motema moko.

[20] Pamba té, na ye Nzambe ayaki kokokisa bilaka nyonso oyo apesaká. Yango wana biso tokumisaka Nzambe pe tolobaka “Amen” po na Kristo.

[21] Ezali Nzambe ye moko moto atelemisi biso ná bino makasi, po tósangana na Kristo; pe akómisi biso bato na ye penza.

[22] Atie biso elembo oyo emonisi 'tè tozali bato na ye, pe atondisi mitema na biso na Molimo Mosantu, oyo azali kolakisa 'tè alingi kopesa biso mobimba na ye.

[23] Nakati seleka na miso ya Nzambe; soki nakosi, álongola ngai na mokili. Ye ayebi 'tè naboyaki kozonga na Korente po námemela bino mindondo té.

[24] Nalingaka koyeela bino bobele esengo. Na makambo etali bondimi na bino, nalingi komitia mokonzi na bino té; pamba té bozali na bondimi ya kokoka.

2 Ba-Korentien — Chapters