Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:28

[1] Bandeko, tango nayaki epai na bino po na kosakola basekelé ya Nzambe, namilakisaki té lokola moto ayebi koloba, to lokola moto ya mayele mingi.

[2] Pamba té, nakanaki koyebisa bino likambo mosusu té, bobele sango ya Yezu Kristo; nalingi koloba Yezu Kristo oyo babomaki na kuruze.

[3] Yango wana, tango nakómaki epai na bino, nazalaki na makasi té; nazalaki kobanga pe kolenga mingi.

[4] Po na kolakisa 'tè nazalaki kosakola makambo ya solo, nabandaki kosalela mayele ya bomoto té, kasi Molimo Mosantu azalaki kolakisa nguya na ye.

[5] Boye bondimi na bino ekouta na mayele ya bomoto té, kasi na nguya ya Nzambe.

[6] Nzokande tozali koloba penza makambo ya mayele; kasi bobele na baoyo bazali bato ya kokoka na miso ya Nzambe. Yango ezali mayele ya bato té to ya bakonzi ya mokili, po bango basi'bakómi na suka.

[7] Tozali koloba sekelé ya mayele ya Nzambe. Pamba té liboso 'tè mokili ésalama, Nzambe asi'akanaká kolakisa biso yango po na lokumu na biso, kasi abombaká makambo wana.

[8] Na kati ya bakonzi ya mokili oyo, moko té ayebi mayele yango. Soki bayebaki yango, mbele balingaki koboma Nkolo ya lokumu nyonso na kuruze té.

[9] Kasi esalami ndenge ekòmamá: “Makambo oyo moto moko té amoná to ayoká, oyo moto moko té akanisá, Nzambe asi'abongisá yango po na bato oyo balingaka ye.”

[10] Biso tozali nde bato oyo Nzambe ayebisi sekelé na ye; ezali Molimo Mosantu moto alakisi biso yango. Molimo atalaka makambo nyonso, ata makanisi ya Nzambe oyo ebombamá.

[11] Pamba té moto moko té akoki koyeba motema ya moto mosusu; bobele molimo ya moto wana nde ayebi yango. Ndenge moko pe bobele Molimo ya Nzambe moto ayebi makanisi ya Nzambe.

[12] Biso tozwaki molimo euti na mokili oyo té, kasi tozwaki Molimo oyo euti na Nzambe, po tókoka koyeba bolamu ye akabelaka biso.

[13] Pe tolobaka makambo yango té na mayele oyo bato bateyaka, kasi na maloba oyo Molimo ya Nzambe ateyaka. Tolimbolaka makambo ya Molimo ya Nzambe kaka na bato oyo bazali na Molimo yango.

[14] Moto oyo azali bobele na molimo na ye ya bomoto, ayambaka makambo ya Molimo ya Nzambe té; yango ezali lokola bozoba na miso na ye. Akoki koyeba tina na yango bobele na lisalisi ya Molimo ya Nzambe.

[15] Yango wana moto oyo azali na Molimo ya Nzambe akoki koyeba makambo nyonso soki ezali malamu to mabe; kasi oyo ye asalaka, moto moko té akoki koloba 'tè ezali mabe.

[16] Pamba té ekòmamá boye: “Nani ayebi makanisi ya Nkolo? Nani akoki kopesa ye toli?” Nzokande biso tozali na makanisi ya Kristo.

1 Ba-Korentien — Chapters