Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:40

[1] Bólanda ndakisa na ngai, ndenge ngai nalandaka ndakisa ya Kristo.

[2] Nakumisi bino na ndenge bokanisaka ngai tango nyonso, pe ndenge botosaka mitindo oyo ngai moko nazwaki pe nayebisaki bino.

[3] Kasi nalingi 'tè bóyeba lisusu likambo oyo: Kristo azali mokonzi ya mobali nyonso; mobali azali mokonzi ya mwasi na ye; pe Nzambe azali mokonzi ya Kristo.

[4] Mobali nyonso oyo asambelaka to asakolaka na nguya ya Molimo na kati ya losambo, soki alati ekoti, abebisi lokumu ya mokonzi na ye.

[5] Mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka na nguya ya Molimo na kati ya losambo, soki alati kitambala na motú té, abebisi lokumu ya mokonzi na ye. Ezali lokola bakokoli ye motú.

[6] Soki aboyi kolata kitambala, ákatisa suki. Kasi ezali soni soki bakati mwasi suki to bakokoli ye motú; yango wana ebongi álata kitambala.

[7] Ya solo, mobali asengeli té kolata ekoti na motú, po azali lokola elili ya Nzambe oyo elakisaka lokumu na ye. Kasi mwasi azali lokumu ya mobali na ye.

[8] Pamba té, mobali abimaká na nzoto ya mwasi té, kasi mwasi nde moto abimaká na nzoto ya mobali.

[9] Pe Nzambe asalaká mobali po na mwasi té, kasi asalaká mwasi po na mobali.

[10] Yango wana, po na ba-anjelu, mwasi asengeli kolata kitambala; yango elakisi 'tè azali sima ya mobali.

[11] Nzokande na miso ya Nkolo, mwasi azali po na mobali, mobali azali po na mwasi.

[12] Pamba té, atako mwasi abimaká na nzoto ya mobali, kasi mibali babotamaka na basi; pe nyonso eutá na Nzambe.

[13] Bino moko bókata likambo oyo: ezali malamu mwasi ásambela Nzambe motú polele?

[14] Ya solo, na ndenge Nzambe asalá bato, soki mobali azali na suki milai, ezali soni po na ye;

[15] kasi soki mwasi azali na suki milai, ezali lokumu po na ye. Pamba té Nzambe apesá mwasi suki milai po na kozipa motú na ye.

[16] Nzokande soki moto alingi kaka kotia tembe na likambo yango, nalobi na ye boye: ézala ngai to ba-Eklezya ya Nzambe, tomesaná kotiana tembe té.

[17] Na makambo nayebisi bino sik'oyo, nakoki kokumisa bino té. Pamba té, tango bosanganaka esika moko, makambo na bino ememelaka bino bolamu té, kasi mabe.

[18] Ya liboso, nayoki 'tè tango bosanganaka, bokabwanaka; pe nakanisi mwa-ndambo ya sango yango ezali ya solo.

[19] Pamba té esengeli bókabwana, po émonana polele banani na kati na bino bazali penza bato ya solo.

[20] Ndenge bino bosanganaka, ebongi té po na kolia bilei ya Nkolo.

[21] Po moto na moto aliaka bilei na ye moko, boye bamosusu batikalaka na nzala, pe bamosusu balangwaka.

[22] Bozali na bandako té po na kolia pe komela? Bozali nde kotsiola Eklezya ya Nzambe? Bolingi koyokisa bato bakelelá soni? Nálobela bino nini? Nákumisa bino? Na makambo oyo nakoki kokumisa bino té.

[23] Pamba té, mateya napesaki bino, nazwaki yango epai ya Nkolo. Na butu wana batekaki ye, Nkolo Yezu akamataki lipa,

[24] apesaki Nzambe mersi, akatakikataki yango, pe alobaki boye: “Oyo ezali nzoto na ngai, napesi yango po na bino. Bósalaka boye po na kokanisa ngai.”

[25] Ndenge moko pe, tango basilisi kolia, akamati kopo pe alobi boye: “Kopo oyo ezali kotia Boyokani ya sika kati ya Nzambe ná bato; napesi makila na ngai po na kokokisa yango. Mbala nyonso bokobanda komela yango, bósalaka boye po na kokanisa ngai.”

[26] Boye, mbala nyonso bokozala kolia lipa oyo pe komela kopo oyo, bokobanda kosakola liwa ya Nkolo, tii mokolo ye akozonga.

[27] Yango wana, moto nyonso oyo alei lipa pe ameli kopo ya Nkolo na ndenge ekoki té, akomema ngambo po na nzoto pe makila ya Nkolo.

[28] Moto na moto ámitala ye moko, liboso 'tè ália lipa oyo pe ámela kopo oyo.

[29] Pamba té soki abosani 'tè ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na tango azali kolia pe komela.

[30] Yango wana bato ebele na kati na bino bakómi na maladi pe bazangi makasi; bamosusu kutu bakufaki.

[31] Soki tobongisaki mitema, mbele tozwaki etumbu té.

[32] Kasi Nkolo azali kotala biso pe kopesa biso etumbu sik'oyo, po tókoka kobika, mokolo akokatela banguna na ye etumbu ya suka.

[33] Yango wana, bandeko na ngai, tango bosanganaka po na kolia bilei ya Nkolo, bózelaka baninga.

[34] Oyo ayoki nzala, ália na ndako na ye, po bóbanda komema ngambo té na ndenge bozali kosangana. Po na makambo oyo etikali, nakobongisa yango tango nakoya.

1 Ba-Korentien — Chapters