Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:18

[1] Yango wana, bókamata biso lokola basali ya Kristo pe bakapita; Nzambe apesi basekelé na ye na maboko na biso.

[2] Basengaka na bakapita bobele 'tè básala mosala na bango na ndenge esepelisi mokonzi na bango.

[3] Soki bino to bato mosusu bolobi 'tè nasalaka malamu to mabe, natalaka yango ata moke té. Ngai moko kutu nakoki té kokata likambo na ngai.

[4] Ya solo, nazali komimona na mabe moko té; kasi yango elakisi té 'tè nasalaka bobele malamu. Ezali nde Nkolo moto akokata likambo na ngai.

[5] Yango wana, liboso 'tè mokolo oyo Nkolo atiá ékoka, bótika kolobana 'tè moto oyo asali malamu to mabe. Bózela Nkolo áya. Ye nde moto akobimisa basekelé nyonso polele, pe akomonisa makanisi oyo ezali na mitema ya bato. Bongo moto na moto akozwa epai ya Nzambe lokumu oyo ekoki na ye.

[6] Bandeko, napesi ndakisa na ngai moko pe ya Apolos, po na koteya bino. Nalingi bólanda ndakisa na biso, pe bóyeba tina ya toli oyo: “Kangama kaka na mibeko.” Bongo bótika kobeta tolo po na moto moko pe koyina mosusu.

[7] Nani atie yo liboso ya bato mosusu? Eloko nini ozali na yango oyo Nzambe apesi yo té? Pe soki Nzambe moto apesi yo yango, po na nini ozali kobeta tolo lokola nde ozwaki yango yo moko?

[8] Bokanisi 'tè bosi'botondi na biloko, pe bosi'bozwi bomengo mingi! Bokanisi 'tè bokómi bakonzi, biso té! Nalingi bózala bakonzi ya solo, po biso pe tózala bakonzi ndenge moko ná bino.

[9] Nzokande namoni 'tè Nzambe atie biso bantoma na molongo ya suka. Tozali lokola bato oyo bazwi etumbu ya liwa, po báboma biso na miso ya bato ya mokili mobimba pe kutu ya ba-anjelu.

[10] Biso tokómi bazoba po na Kristo, kasi bino bokanisi 'tè bozali bato ya mayele. Biso tolembi; kasi bino bokanisi 'tè bozali makasi. Bokanisi 'tè bozali bato minene, nzokande biso tozali bato pamba.

[11] Tii na tango oyo, biso tozali na nzala pe posa ya mai; tozangi bilamba pe bazali konyokola biso; tozangi ndako, tozali kotelengana bipai na bipai;

[12] tozali kosala na maboko na biso moko, pe komona pasi na mosala. Tango bato bafingaka biso, topambolaka bango; tango banyokolaka biso, tokangaka motema;

[13] tango bakoselaka biso makambo, tozongisaka maloba ya boboto. Tii lelo tozali lokola bosoto ya mokili, pe bato nyonso bamonaka biso lokola matiti ya fulu.

[14] Nakòmeli bino makambo oyo po náyokisa bino soni té, kasi po náteya bino lokola bana na ngai ya bolingo.

[15] Ata soki bozwi balakisi 10.000 oyo bateyaki bino na kombo ya Kristo, bozali na tata moko kaka; pamba té ezali ngai moto naboti bino na lisanga na Kristo Yezu, tango nayeelaki bino Sango Malamu.

[16] Bongo nasengi bino bólanda ndakisa na ngai.

[17] Yango wana, natindeli bino Timoté oyo azali Mwana na ngai ya bolingo pe atosaka Nkolo. Ye akoyebisa bino lisusu ndenge natambolaka na lisanga na Kristo Yezu, pe ndenge nateyaka bipai nyonso, na ba-Eklezya nyonso.

[18] Bato mosusu na kati na bino batondi na lolendo, po bakanisi 'tè nakoya kotala bino té.

[19] Kasi soki Nzambe alingi, etikali moke náya epai na bino, bongo nakotala maloba ya bato ya lolendo wana té, kasi nakotala nguya na bango.

[20] Pamba té Nzambe atiaka bokonzi na ye kaka na maloba té, kasi alakisaka nguya na ye.

[21] Bolingi nini? Náya epai na bino na fimbu? To náya na bolingo pe na motema ya boboto?

1 Ba-Korentien — Chapters