[1] Bandeko, ngai nakokaki té kolobela bino lokola bato oyo bazali na Molimo ya Nzambe, kasi nalobelaki bino lokola bato bazali kolanda kaka makambo ya bomoto. Pamba té, na makambo etali Kristo, bozali nanu bana mike.
[2] Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi té, po bilei ya ndenge wana ekokaki na bino té. Kutu ata sik'oyo ekoki na bino té,
[3] po bozali kaka na mayele ya bomoto. Na kati na bino likunya ezali, koswana pe ezali; bozali kaka kolanda makambo ya bomoto té? Bizaleli na bino ekokani ná ya bato nyonso té?
[4] Soki moko moko na bino azali koloba “Ngai nazali moto ya Polo,” “Ngai ya Apolos,” bokokani ná bato nyonso té?
[5] Apolos azali nani? Pe ngai Polo nazali nani? Tozali kaka basalisi ya Nzambe; bokómaki kondima po na mosala na biso. Moko moko na biso asalaka mosala oyo Nkolo apesaki ye.
[6] Ngai nakonaki mbuma, Apolos asopelaki yango mai, kasi Nzambe nde moto akolisi yango.
[7] Bongo moto oyo akonaki mbuma, ná oyo asopelaki yango mai bazali pamba, kasi Nzambe oyo akolisi yango, ye nde moto asali mosala nyonso.
[8] Moto oyo akonaka, ná oyo asopaka mai, bazali ndenge moko. Nzambe akopesa moto na moto lifuta na ye na ndenge ya mosala oyo asali.
[9] Po biso ná Apolos tozali basalisi ya Nzambe, pe bino bozali elanga ya Nzambe. Bino bozali pe lokola ndako oyo Nzambe atòngi.
[10] Nasalelaka na bolamu oyo Nzambe apesaki ngai; lokola moto ayebi kotònga malamu, natiaki fondasion. Sima, moto mosusu ayei kotònga na likolo na yango. Kasi moto na moto ákeba na ndenge azali kotònga.
[11] Fondasion esi'esalami: yango nde Yezu Kristo. Moto moko té akoki kotia fondasion mosusu, kaka oyo wana.
[12] Na kati ya bato oyo batòngaka na likolo ya fondasion yango, bamosusu basalelaka or, arjan, to mabanga ya talo, bamosusu mabaya, matiti, to makasa.
[13] Mokolo ya Kristo ekolakisa mosala ya moto na moto, pamba té, mokolo wana ekomonana na kati ya móto. Móto yango nde ekolakisa ndenge moto na moto asalaki.
[14] Oyo mosala na ye ekoumela, akozwa lifuta.
[15] Oyo mosala na ye ekozika, akozanga lifuta; nzokande ye moko akobika, kasi bobele lokola moto abiki na liwa ya móto.
[16] Bino bozali lokola Ndako ya Nzambe, pe Molimo ya Nzambe azalaka na kati na bino. Boyebi yango té?
[17] Soki moto abebisi Ndako ya Nzambe, Nzambe pe akobebisa ye. Pamba té Ndako ya Nzambe ezali bosantu. Pe bino bozali lokola Ndako ya Nzambe.
[18] Moto moko té ámikosa. Soki moko na kati na bino akanisi 'tè azali na mayele na miso ya bato, liboso ákóma lokola zoba, po ázwa mayele ya solo.
[19] Pamba té mayele ya mokili oyo ezali bozoba na miso ya Nzambe. Ekòmamá boye: “Mayele ya bato ekómi motambo oyo Nzambe akangelaka bango.”
[20] Ekòmamá lisusu: “Nkolo ayebi makanisi ya bato ya mayele; ayebi 'tè nyonso ezali pamba.”
[21] Yango wana, moto moko té áluka lokumu epai ya bato. Po makambo nyonso ezali ya bino:
[22] ézala Polo, Apolos to Piere; ézala mokili, bomoi to liwa, makambo ya lelo to oyo ekoya, nyonso ezali ya bino.
[23] Kasi bino bozali bato ya Kristo pe Kristo azali moto ya Nzambe.