Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:51

[1] Po na makambo etali banyama oyo bapesaka mabonza na banzambe, toyebi 'tè biso nyonso tozali na mayele. Kasi mayele etondisaka moto na lofundu; bobele bolingo moto ekolisaka bondimi.

[2] Soki moto alobi 'tè ayebi likambo, wana alakisi 'tè ayebi yango té ndenge asengeli koyeba.

[3] Kasi moto oyo alingaka Nzambe nde ayebanaka epai na ye.

[4] Motuna nde yango oyo: Moto akoki kolia nyama bapesaki mabonza na banzambe? Toyebi 'tè bikeko elakisaka banzambe oyo ezali té. Pamba té, Nzambe azali se moko;

[5] atako balobaka 'tè banzambe ezali na Likolo to awa na se. Ya solo, “banzambe” ezali mingi; bakómisi kutu bato mingi “bakonzi” ya ndenge wana.

[6] Kasi biso toyebi 'tè Nzambe azali se moko; ye nde Tata na biso oyo asalá biloko nyonso, pe tozali bato na ye. Pe Nkolo azali se moko, Yezu Kristo. Na ye Nzambe asalá biloko nyonso, pe biso tozali na bomoi po na ye.

[7] Kasi bato nyonso bazali na mayele yango té. Bamosusu bameseni na banzambe ya bikeko tii sik'oyo, pe bakanisi 'tè banyama yango ekómi penza ya banzambe. Bongo soki balei nyama yango bamemi ngambo, po bazangi makasi na se ya motema na bango.

[8] Nzokande biloko ya kolia ekoki kobongisa biso té na miso ya Nzambe; soki toboyi yango, tozongi sima té, pe soki tolei yango, tozwi eloko moko té.

[9] Kasi bókeba, soki té bonsomi na bino ekokweisa baoyo bazali na bondimi makasi té.

[10] Pamba té, soki yo moto ozali na mayele ya kokoka, obandi kofanda na ndako oyo basambelaka banzambe, bongo moto oyo azangi makasi na se ya motema na ye amoni yo, ye akozwa makanisi ya kolia banyama oyo epesamaki na banzambe. Boye té?

[11] Na ndenge wana yo moto ozali na mayele ya kokoka, okokweisa ndeko na yo, atako Kristo akufelaki ye.

[12] Bongo bozali kosala mabe epai ya Kristo, na ndenge bozali kosala mabe na bandeko na bino oyo bazangi makasi na se ya motema na bango, pe komemisa bango ngambo.

[13] Yango wana, soki biloko ya kolia ekoki kobebisa bondimi ya ndeko na ngai, nakolia lisusu nyama ata mokolo moko té, po nábebisa bondimi ya ndeko na ngai té.

1 Ba-Korentien — Chapters