[1] Nazali koyoka bipai nyonso 'tè na kati na bino likambo moko ya soni ezali, oyo esalamaka kutu té epai ya bato bayebi Nzambe té. Pamba té moto moko na kati na bino azali kotambola ná mwasi ya tata na ye.
[2] Pe bozali nanu na lofundu mingi? Nzokande bosengelaki kozala na mawa, pe kobengana na kati na bino moto oyo asali bongo.
[3] Po na ngai, atako nazali mosika na bino, kasi na molimo nazali na kati na bino. Na kombo ya Nkolo Yezu, nasi'nakati likambo ya moto oyo asali mabe yango. Yango wana bósangana, pe ngai nakozala na bino na molimo; boye na nguya ya Nkolo na biso Yezu,
[5] tokopesa moto wana na maboko ya Satan, ábungisa bomoi na ye, po molimo na ye ébika, mokolo Nkolo akoya.
[6] Tina ya kosala lofundu ezali té! Esengeli kutu bókeba, pamba té balobaka: “Mwa-ndambo ya kisi ya mapa evimbisaka sani mobimba ya farine.”
[7] Boyebi 'tè Bayuda, na feti ya Koleka, babwakaka kisi nyonso ya kala, pe baliaka mapa ya sika oyo batiá kisi té. Bino pe bósalaka ndenge wana, po bókóma mapa ya sika oyo ezangá kisi. Pamba té biso tozali na feti ya Koleka ya sika. Basi'babomaki Kristo; ye nde Mwana-Meme na biso ya feti ya Koleka.
[8] Bongo tósala feti. Tóbwaka kisi nyonso ya kala; yango ezali masumu pe makambo ya soni. Kasi tósala feti na biso na mapa oyo evimbá té; yango ezali makambo ya bosembo pe ya solo.
[9] Na mokanda na ngai nayebisaki bino 'tè, bósanganaka té na bato oyo basalaka makambo ya soni.
[10] Nakòmaki boye té po bókima bato nyonso oyo basalaka makambo ya soni, to bato ya lokoso, bamiyibi pe baoyo basambelaka banzambe ya bikeko. Soki bongo, mbele bosengeli kolongwa na mokili.
[11] Kasi nakòmelaki bino boye po bósanganaka té na moto oyo alobaka 'tè azali mondimi, nzokande asalaka makambo ya soni, azali na lokoso, asambelaka banzambe ya bikeko, afingaka bato, alangwaka masanga to ayibaka. Bólia kutu esika moko té na moto ya ndenge wana.
[12] Pamba té, nani atie biso bazuzi ya bato oyo bazali ya libanda? Bobele Nzambe moto akosambisa bango. Kasi bino, ebongi bótala makambo ya bandeko na bino. Ekòmamá boye: “Bóbengana bato ya mabe na kati na bino.”