[1] Bandeko, po na makambo etali makabo ya Molimo Mosantu, nalingi bóyeba yango malamu.
[2] Boyebi ndenge makambo ezalaki koleka, tango boyebaki nanu Nzambe té. Bozalaki kobendana penza epai ya banzambe ya bikeko, oyo elobaka té.
[3] Yango wana nazali koyebisa bino boye: soki moto azali koloba na nguya ya Molimo ya Nzambe, akoki koloba té “Lisumá na Yezu!” Pe moto moko té akoki koloba “Yezu azali Nkolo,” soki Molimo Mosantu alakisi ye té.
[4] Makabo ya Molimo Mosantu ekeseni, kasi Molimo oyo apesaka yango azali se moko.
[5] Ndenge ya kosalela Nkolo Yezu ekeseni, kasi Nkolo azali se moko.
[6] Misala oyo Nzambe asalaka na maboko na biso ekeseni, kasi Nzambe se moko moto asalaka yango nyonso.
[7] Moto na moto azwaka nguya ya Molimo Mosantu po na bolamu ya lisanga mobimba.
[8] Molimo apesaka na moto moko maloba ya mayele, pe na moto mosusu nguya ya koyeba basekelé.
[9] Molimo wana se moko apesaka na moto mosusu bondimi, pe na mosusu nguya ya kobikisa bato ya maladi.
[10] Moto mosusu azwaka nguya ya kosala makamwisi, mosusu nguya ya kosakola maloba euti na Molimo Mosantu, mosusu nguya ya koyeba soki molimo ezali malamu to mabe, mosusu nguya ya koloba minoko eyebaná té, pe mosusu nguya ya kolimbola yango.
[11] Kasi makambo nyonso wana, ezali Molimo se moko moto asalaka yango; ye akabelaka moto na moto ndenge ye moko alingi.
[12] Kristo azali lokola nzoto ya moto. Yango ezali se moko, nzokande ezali na biteni ebele. Biteni nyonso wana, atako ezali ebele, esangani na nzoto moko.
[13] Pamba té babatisaki biso nyonso, po Molimo se moko ákómisa biso nzoto se moko, ózala Moyuda to moto ya ekolo mosusu, ózala moumbu to moto ya bonsomi. Pe Nzambe atondisi biso nyonso na Molimo oyo se moko.
[14] Pe lisusu nzoto ezali bobele eteni moko té, kasi biteni ebele.
[15] Soki likolò elobi: “Nalingi názala liboko; soki té naboyi kozala eteni ya nzoto,” wana ezali ya solo?
[16] Pe soki litoi elobi: “Nalingi názala liso; soki té naboyi kozala eteni ya nzoto,” wana ezali ya solo?
[17] Soki nzoto mobimba ezalaki liso pamba, ndenge nini ekokaki koyoka? Soki ezalaki litoi pamba, ndenge nini ekokaki koyoka sòlo?
[18] Kasi Nzambe atiá na nzoto biteni nyonso ndenge alingaki.
[19] Soki yango nyonso ezalaki se eteni moko, wapi nzoto?
[20] Kasi biteni ezali ebele, nzokande nzoto ezali kaka moko.
[21] Yango wana liso ekoki koloba na liboko té 'tè “Nazali na posa na yo té.” Pe motú ekoki koloba na makolo té 'tè: “Nazali na posa na bino té.”
[22] Ata kutu biteni ya nzoto oyo emonanaka 'tè ezangi makasi, ekoki kozanga té.
[23] Pe biteni oyo tomoni 'tè ezangi lokumu, tokumisaka yango mingi koleka. Biteni oyo eyokisaka biso soni na miso ya bato, tobombaka yango malamu;
[24] nzokande biteni oyo eyokisaka biso soni té, tozali na tina ya kobomba yango té. Ezali Nzambe moto asangisá nzoto, na ndenge 'tè biteni oyo ezangi lokumu ézwa lokumu mingi koleka.
[25] Asalá nyonso po nzoto ékabwana té, kasi biteni nyonso ésalisanaka.
[26] Boye, soki eteni moko ezali na pasi, biteni nyonso pe emoni pasi; soki eteni moko ezwi lokumu, biteni nyonso pe esepeli.
[27] Bino bozali nzoto ya Kristo; moto na moto azali eteni ya nzoto na ye.
[28] Bongo na kati ya Eklezya, Nzambe atiá moto na moto na mosala na ye: ya liboso, bantoma; ya mibale, baprofete; ya misato, bateyi. Pe sima bato oyo basalaka makamwisi, baoyo babikisaka bato ya maladi, baoyo basalisaka baninga, baoyo batambwisaka misala ya lisanga, pe baoyo bazali na likabo ya koloba minoko eyebaná té.
[29] Bato nyonso té bazali bantoma, baprofete, to pe bateyi. Bango nyonso té bato basalaka makamwisi,
[30] to pe babikisaka bato ya maladi. Bango nyonso té bato balobaka minoko eyebaná té, to bayebi kolimbola yango.
[31] Bówela makabo ya Nzambe oyo eleki malamu. Nzokande nalingi kolakisa bino nzela moko oyo eleki yango nyonso.