[1] Ata nayebi koloba minoko nyonso ya bato to ya ba-anjelu, kasi soki nazangi bolingo, nazali lokola mbunda oyo etiaka makelele, to ngonga oyo ebetaka pamba-pamba.
[2] Ata nazali na likabo ya kosakola maloba euti na Molimo Mosantu, ata nayebi basekelé na ye nyonso pe nazwi mayele nyonso, ata nazali na bondimi nyonso po na kolongola bangomba pe kotia yango esika mosusu, kasi soki nazangi bolingo, nazali moto ya pamba.
[3] Ata nakabi biloko na ngai nyonso na bato bakelelá, ata namipesi po bázikisa ngai na móto, kasi soki nazangi bolingo, yango ekopesa ngai bolamu moko té.
[4] Moto oyo azali na bolingo, akangaka motema pe asalisaka bato, azali na zuwa té, amilakisaka té, azali na lofundu té;
[5] aboyaka makambo oyo ebongi té, alukaka bolamu na ye moko té, asilikaka té, abombelaka bato kanda té.
[6] Moto oyo azali na bolingo asepelaka na makambo ya mabe té, kasi asepelaka kaka na makambo ya solo.
[7] Tango nyonso alimbisaka bato, andimaka maloba na bango, atiaka motema na bango, akangaka motema po na bango.
[8] Bolingo ekosila ata mokolo moko té. Mokolo ezali bakotika kosakola maloba euti na Molimo Mosantu pe koloba minoko eyebaná té. Mayele oyo Nzambe apesi biso awa na se, ekolimwa.
[9] Pamba té awa na mokili toyebi Nzambe kaka ndambo, tosakolaka bobele ndambo.
[10] Kasi mokolo tokozwa oyo ekoká, makambo ya ndambo-ndambo ekosila.
[11] Tango nazalaki Mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke; nazalaki na makanisi pe na mayele ya mwana moke. Kasi awa nakómi mokolo, natiki makambo ya bana mike.
[12] Se bongo, sik'oyo tozali komona Nzambe bobele lokola na talatala, tozali komona ye polele té. Kasi mokolo ezali, tokomonana bilongi. Sik'oyo nayebi Nzambe bobele ndambo; kasi na mokolo wana nakoyeba ye ndenge ye ayebi ngai.
[13] Makambo misato ezali awa na mokili, oyo eyeeli biso bolamu ya seko: kondimela Nzambe, kotia motema na ye, pe kozala na bolingo. Na kati na yango misato, oyo eleki penza ezali nde bolingo.