[1] Nazali moto ya bonsomi té? Nazali ntoma té? Namonaki Nkolo na biso Yezu té? Bino té bato bozali mbuma ya mosala oyo nasalelaka Nkolo?
[2] Atako bato mosusu bandimaka té 'tè nazali ntoma, kasi bino boyebi malamu penza 'tè nazali ntoma. Ya solo, bino bozali elembo oyo elakisi 'tè nazali ntoma.
[3] Oyo ezali ndenge nazongiselaka bato oyo batóngaka ngai:
[4] Ngai nakoki kosenga bino biloko ya kolia pe ya komela té?
[5] Tokoki té kokende ná mwasi ya mondimi na mibembo ya kosakola Sango Malamu? Bantoma mosusu, ná bandeko ya Yezu pe Piere, basalaka ndenge wana.
[6] To pe ezali kaka ngai ná Barnabas bato tosengeli kosala mosala po tóbikela na yango?
[7] Soda nani amifutaka ye moko po na kosala mosala ya leta? Nani akonaka banzete ya vinu, bongo ália mbuma na yango té? Nani abokolaka bangombe, bongo ámela miliki na yango té?
[8] Makambo nazali kokòma esalamaka kaka epai ya bato té; Mibeko ya Nzambe elakisaka ndenge moko.
[9] Pamba té, ekòmamá boye na Mibeko ya Moize: “Kokanga ngombe monoko té, tango ozali kosalela yango po na kobimisa mbuma ya blé.” Okanisi 'tè Nzambe amitungisaka po na bangombe?
[10] Té! Bakòmá makambo yango po na biso. Moto oyo asalaka elanga, ná oyo akongolaka mbuma, esengeli bátia motema 'tè bakozwa ndambo ya mbuma.
[11] Ngai nakòmelaki bino makambo euti na Nzambe; e bongo kosenga lisalisi epai na bino po na nzoto na ngai ekómi nde likambo monene?
[12] Bato mosusu bazali kozwa lisalisi epai na bino; e bongo ngai naleki bango té? Nzokande nasengaki lisalisi té. Kasi ngai moko namemaki mokumba na ngai nyonso, po nátiela moto moko té libaku, tango nazali komemela ye Sango Malamu ya Kristo.
[13] Nabanza boyebi 'tè bato oyo basalaka na Ndako ya Nzambe, bazwaka bilei na Ndako ya Nzambe; baoyo basalaka na mesa ya mabonza, babikelaka na biteni ya mabonza wana.
[14] Ndenge moko pe Nkolo atindaki 'tè basakoli ya Sango Malamu bábikela na mosala yango.
[15] Kasi ngai nazali kobeta tolo po natikali kosenga lisalisi ya ndenge wana té. Moto moko té akobotola ngai lokumu yango. Pe nakòmeli bino makambo oyo po na kosenga lisalisi té. Eleki malamu nákufa!
[16] Nakoki komikumisa té po nasakolaka Sango Malamu; pamba té ezali mokumba Nkolo apesi ngai. Pe mawa na ngai soki nasakoli Sango Malamu té.
[17] Soki naponaki mosala yango ngai moko, mbele nalingaki kozela lifuta po na yango. Kasi naponaki yango té; ezali nde mosala Nkolo atindi ngai.
[18] Bongo po na nini nakoki kozela lifuta? Ezali bobele po nasakolaka Sango Malamu ofelé, pe naboyaka kobikela na mosala na yango, atako Sango Malamu ezali kopesa ngai nzela ya kosenga lisalisi.
[19] Nazali moumbu ya moto moko té; kasi ngai moko namikómisá moumbu ya bato nyonso, po nákoka kobenda bato mingi koleka po bálanda Kristo.
[20] Tango nazali epai ya Bayuda, nasalaka lokola Moyuda, po nákoka kobenda Bayuda. Atako nasengeli kotosa Mibeko ya Moize té, tango nazali epai ya bato oyo batosaka Mibeko, ngai pe nakómi lokola moto atosaka Mibeko, po nákoka kobenda bango.
[21] Tango nazali epai ya baoyo bayebi Mibeko ya Moize té, nakómi lokola moto ayebi Mibeko té, po nákoka kobenda bango po bálanda Kristo. Nzokande nayebi penza malamu Mibeko ya Nzambe, pamba té natosaka Mibeko ya Kristo.
[22] Soki nazali epai ya bato oyo bazali na bondimi makasi té, nasalaka lokola bango, po nákoka kobenda bango. Epai ya bato nyonso, nasalaka lokola bango, po ata na ndenge nini nákoka kobenda mwa-ndambo na kati na bango.
[23] Makambo nyonso wana nasalaka yango po na Sango Malamu, na tina 'tè ngai názwa bolamu na yango.
[24] Boyebi té? Bato oyo bamekanaka masano ya mbangu, bango nyonso bakimaka mbangu; kasi moko kaka moto alongaka. Bino pe bókima ndenge wana, po bólonga.
[25] Moto nyonso oyo asalaka masano, atosaka mibeko ebele. Nzokande lokumu oyo bango bawelaka eumelaka té; kasi biso towelaka lokumu oyo ekoumela seko.
[26] Yango wana nazali kokima mbangu, kasi bikimela té; nazali kobeta makofi, kasi bibetela té.
[27] Namonisaka nzoto na ngai pasi pe nakómisaka yango moumbu, soki té Nzambe akoboya ngai moto nasakolaka na bato mosusu.