[1] Bandeko, bókanisa makambo oyo ekweelaká bakoko na biso. Lipata ya Nzambe ezalaki kobatela bango nyonso na nzela, pe bango nyonso bakatisaki Ebale ya Motane.
[2] Bango nyonso bakómaki bato ya Moize po na lipata pe mai ya ebale; wana ezalaki lokola batisimo na bango.
[3] Nzambe aleisaki bango nyonso bilei ya ndenge moko, pe amelisaki bango nyonso mai ya ndenge moko, pamba té bazalaki komela mai eutaki na libanga ya Nzambe, oyo ezalaki kokende ná bango. Libanga yango ezalaki nde Kristo.
[5] Nzokande bato mingi na kati na bango basepelisaki Nzambe té; yango wana bakómaki kokufakufa na esobe.
[6] Makambo nyonso oyo ezali ndakisa po na biso. Boye tózala na baposa ya mabe té, ndenge bango bazalaká na yango.
[7] Tósambela banzambe ya bikeko té, ndenge bamosusu na kati na bango bazalaki kosala. Ekòmamá boye: “Bafandaki po na kolia pe komela, bongo batelemaki po na kobina.”
[8] Tósala kindumba té ndenge bamosusu na kati na bango babandaki kosala. Bongo na mokolo moko bato 23.000 bakufaki.
[9] Tómeka Nkolo té, ndenge bamosusu na kati na bango basalaki; banyoka eswaki bango pe bakufaki.
[10] Bóyimayima té, ndenge bato mosusu na kati na bango basalaki; pe anjelu oyo abomaka asilisaki bango.
[11] Makambo nyonso oyo ekweelaki bango ezali ndakisa; bakòmá yango po na kokebisa biso bato tokómi na mikolo ya suka.
[12] Yango wana, moto oyo azali kokanisa 'tè atelemi, ákeba, soki té akokweya.
[13] Komekama nyonso oyo eyeelaka bino ezali kaka lokola komekama oyo eyeelaka bato nyonso. Bongo Nzambe oyo akokisaka makambo ye alobaka, ye akotika bino té 'tè Monguna ámeka bino na komekama oyo eleki makasi na bino. Kasi tango komekama eyei, ye akopesa bino nguya ya kokanga motema pe ya kolonga.
[14] Yango wana, bandeko na ngai ya bolingo, bókeba, bósambela banzambe ya bikeko té.
[15] Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele; bótala bino moko soki nazali koloba malamu to mabe.
[16] Bókanisa kopo ya kobenisa oyo biso topeselaka Nzambe mersi: yango esangisaka biso na makila ya Kristo té? Pe lipa oyo toliaka esika moko, yango esangisaka biso na nzoto ya Kristo té?
[17] Lipa ezali kaka moko; boye biso nyonso tozali lokola nzoto moko, atako tozali ebele; pamba té toliaka lipa moko wana.
[18] Bótala bato ya Israel. Tii lelo bazali kobomela Nzambe banyama; pe baoyo baliaka mabonza wana basanganaka ná Nzambe.
[19] Nzokande bato bayebi Nzambe té bapesaka mabonza na Nzambe té, kasi na milimo mabe. Boye nalingi koloba nini? Nyama oyo bapesaka na banzambe ezali nde na tina? Banzambe yango ezali na tina? Té! Kasi nalingi té bino bósangana ná milimo mabe.
[21] Bokoki té komela na mbala moko kopo ya Nkolo Yezu, ná oyo ya milimo mabe. Bokoki pe té kolia na mbala moko bilei ya Nkolo, ná oyo ya milimo mabe.
[22] Soki tosali bongo, tozali kotumola nde zuwa ya Nkolo. Biso toleki ye na makasi?
[23] Bato mosusu balobaka: “Likambo moko epekisami na biso té.” Kasi makambo mosusu ezali malamu té. Ya solo: “Likambo moko epekisami na biso té.” Kasi makambo mosusu ekolisaka bondimi té.
[24] Moto na moto áluka bolamu ya bandeko, kasi ya ye moko té.
[25] Bokoki kolia nyonso oyo batekisaka na zando; kasi kotuna té motuna oyo ekoki kotungisa se ya motema.
[26] Pamba té “Mokili mobimba ezali ya Nkolo, ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.”
[27] Soki moto oyo azali mondimi té abengisi yo pe olingi kokende, lia kaka biloko nyonso oyo akotiela yo na mesa; kasi kotuna té motuna oyo ekoki kotungisa se ya motema.
[28] Kasi soki moto moko alobi na yo: “Nyama oyo, bapesaki yango mabonza na banzambe,” kolia yango té. Tika yango, po na moto oyo ayebisi yo, pe po étungisa se ya motema té.
[29] Nalingi koloba té 'tè se ya motema na yo, kasi se ya motema ya moto wana oyo ayebisaki yo. Biso tokoki kosala makambo nyonso oyo tolingi. E bongo, po na nini makanisi ya se ya motema ya moto mosusu éya kopekisa bonsomi na biso?
[30] Soki topesaka Nzambe mersi po na biloko oyo tozali kolia, ndenge nini bato mosusu bátsiola biso likolo ya biloko oyo tozali kopesela Nzambe mersi?
[31] Ya solo, ata bozali kolia, komela, to kosala makambo mosusu, bósalaka nyonso po na kokumisa Nzambe.
[32] Bóyokisa bato soni té na mitema na bango, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu, to pe bato ya Eklezya ya Nzambe.
[33] Ngai moko pe nasalaka se bongo: natiaka molende po moto na moto ásepela na makambo na ngai nyonso. Nalukaka bolamu na ngai moko té, kasi ya bato nyonso, po 'tè bábika.