[1] Bólinganaka lokola bandeko.
[2] Bólemba koyamba bapaya té na bandako na bino; pamba té kala, bato oyo basalaká yango bayambaká ba-anjelu, kasi bayebaki bango té.
[3] Bókanisaka bandeko oyo bazali na boloko, lokola nde bino pe bozali esika moko ná bango. Bókanisaka lisusu bato nyonso oyo bazali konyokwama, lokola nde bino pe bozali konyokwama ndenge moko ná bango.
[4] Bato nyonso bátosaka libala. Mobali nyonso ázala bobele po na mwasi na ye; mwasi nyonso ázala bobele po na mobali na ye. Pamba té Nzambe akopesa etumbu na bato oyo basalaka kindumba, pe na baoyo batambolaka ná mwasi to mobali ya bato.
[5] Bózala na lokoso ya mbongo té. Bósalelaka kaka biloko oyo bozali na yango, bówela biloko mosusu té. Pamba té Nzambe ye moko asi'alobá 'tè: “Nakotika bino ata moke té, nakobosana bino ata moke té.”
[6] Yango wana tokoki koloba na molende: “Nkolo azali na biso, tokoki kobanga eloko té; bato bakoki kosala biso nini?”
[7] Bókanisa batambwisi na bino ya kala, baoyo bateyaki bino maloba ya Nzambe. Bókanisa bizaleli na bango, pe ndenge bakufaki; bongo bólanda bondimi na bango.
[8] Yezu Kristo azali se ndenge moko; lelo, lobi, pe seko.
[9] Bato bákosa bino té na mateya ya lokuta ndenge na ndenge. Bóluka 'tè bolamu ya Nzambe épesa bino molende. Bótia mitema té na mibeko oyo etali bilei. Baoyo batosaka mibeko yango bazwaka lisalisi ata moke té.
[10] Biso tozali na mesa na biso ya kopesela mabonza, pamba té Yezu amipesá na Nzambe lokola libonza. Baoyo bazali kosalela Nzambe na Ndako na ye ya kala bakoki kobikela na libonza yango té.
[11] Bókanisa ndenge nganga-Nzambe na bango ya monene asengaka bolimbisi ya masumu. Ye amemaka makila ya banyama na Esika eleki bosantu; nzokande babimaka na libanda ya mboka po na kozikisa nyama oyo babomelaki Nzambe.
[12] Yango wana, tango Yezu alingaki kopesa makila na ye moko po álongola masumu ya bato, akendeki kokufa na libanda ya mboka.
[13] Bongo ebongi tókende epai na ye, na libanda ya mboka; tóndima básambwisa biso ndenge basambwisaki ye.
[14] Pamba té mboka na biso ya libela ezali awa na se té; kasi tozali nde kozela mboka oyo ekoya.
[15] Bongo na lisanga na Yezu, tópesa Nzambe tango nyonso mabonza oyo epesaka ye lokumu; yango ezali nde banzembo oyo toyembelaka Nzambe na biso.
[16] Kasi bólemba pe té na kosala misala ya malamu pe kosalisana. Pamba té yango nyonso ezali nde mabonza oyo esepelisaka Nzambe.
[17] Bótosaka batambwisi na bino pe bóyokelaka bango, po bango bato babatelaka bino. Mokolo ezali, Nzambe akotuna bango ndenge bazalaki kosala mosala wana. Bósala 'tè bákokisa mosala yango na esengo, kasi na mawa té; soki té yango ekomemela bino bolamu ata moko té.
[18] Bóbondelaka Nzambe tango nyonso po na biso. Tokanisi solo 'tè tozali na eloko ya mabe té na se ya motema na biso; tolingaka kosala bobele malamu tango nyonso.
[19] Nasengi bino mingi bóbondela Nzambe po ápesa ngai nzela ya kozongela bino noki penza.
[20] Nzambe ya boboto asekwisá Nkolo na biso Yezu; akómisá ye Mobokoli monene ya bameme, po asalaki Boyokani ya seko na makila na ye.
[21] Boye Nzambe ápesa bino nguya po bókoka kosala makambo nyonso ya malamu oyo ye alingaka. Ye moko ákokisela biso makambo oyo esepelisaka ye, na nguya ya Yezu Kristo. Lokumu ézala na ye tango nyonso seko! Amen.
[22] Bandeko, nakòmeli bino makambo oyo po na kolendisa bino. Nasengi bino bókanga mitema na yango; ezali kutu pe mingi té.
[23] Bóyeba 'tè ndeko na biso Timoté asi'abimi na boloko. Soki akómi awa noki, tokoya nzela moko ná ye epai na bino.
[24] Bópesa mbote na batambwisi na bino nyonso pe bato nyonso ya Nzambe. Bandeko ya Italie batindeli bino mbote.
[25] Bolamu ya Nzambe ézala na bino nyonso.