Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:11

[1] Melkisedek azalaki mokonzi ya mboka Salem pe Nganga-Nzambe; azalaki kosalela Nzambe ya Likolo. Tango Abraham autaki kolonga bakonzi minei na etumba, Melkisedek akendeki kokutana na ye na nzela, pe apambolaki ye.

[2] Bongo Abraham apesaki ye eteni moko na kati ya biteni zomi ya biloko nyonso oyo abotolaki na etumba. Kombo “Melkisedek” elakisi: Mokonzi ya bosembo; ye azalaki pe mokonzi ya Salem, yango elakisi: Mokonzi ya boboto.

[3] Moto moko té ayebi tata na ye to mama to bakoko na ye, ézala kutu ndenge ye abotamaki to ndenge akufaki. Akokani ná Mwana ya Nzambe: azali Nganga-Nzambe ya libela.

[4] Bomoni! Azalaki moto monene penza! Abraham, koko na biso apesaki ye eteni moko na kati ya biteni zomi ya biloko oyo azwaki, apesaki ye ndambo eleki kitoko.

[5] Mibeko ya Moize elobá 'tè bato ya libota ya Levi, baoyo bazali banganga-Nzambe, basengeli kokongola na bato ya Israel eteni moko na kati ya biteni zomi ya biloko na bango; boye bakongolaka na bandeko na bango, atako bango pe bazali bana ya Abraham.

[6] Melkisedek azalaki moto ya libota ya Levi té; ata bongo akongolaki na Abraham eteni moko na kati ya biteni zomi, pe apambolaki moto oyo Nzambe apesaká bilaka.

[7] Nzokande tembe ezali té: moto oyo apambolaka, aleki oyo bapamboli.

[8] Bókanisa lisusu: banganga-Nzambe oyo bakongolaka epai ya bato ya Israel eteni moko na kati ya biteni zomi bazali kaka bato; basengeli kokufa. Kasi po na Melkisedek ekòmamá 'tè azali na bomoi.

[9] Tokoki kutu koloba 'tè tango Melkisedek akongolaki epai ya Abraham eteni moko na kati ya biteni zomi, akongolaki yango epai ya Levi pe ná bana na ye oyo bakongolaka yango epai ya bato ya Israel.

[10] Pamba té ata Levi abotamaki nanu té, kasi azalaki na kati ya mokongo ya koko na ye Abraham, tango Melkisedek akutanaki na ye.

[11] Na kati ya Mibeko ya Moize, kinganga-Nzambe ya bato ya libota ya Levi ezalaki likambo ya tina penza; nzokande kinganga-Nzambe wana ekokaki kobongisa makambo nyonso té. Yango wana Nzambe asi'atiá nganga-Nzambe mosusu; ye azali na molongo ya Aaron té kasi ya Melkisedek.

[12] Tembe té, awa Nzambe abongolá kinganga-Nzambe, abongolá pe Mibeko.

[13] Pamba té maloba wana ya Nzambe ezali po na Nkolo na biso Yezu. Ye azali moto ya ekolo ya Levi té kasi ya Yuda. Na ekolo wana, moto moko té asi'asalá mosala na mesa ya Nzambe; pe tango Moize apesaká mibeko etali banganga-Nzambe, atangaká kombo ya libota wana té.

[15] Ya solo tembe esili: kinganga-Nzambe ya libota ya Levi ekómi na suka, awa Nganga-Nzambe mosusu abimi oyo akokani na Melkisedek.

[16] Ye azali na nguya ya bomoi oyo esilaka té; aponami té po na mibeko oyo ezalaki kotala ndenge bato bazalaki kobotama.

[17] Ekòmamá boye: “Ozali Nganga-Nzambe ya libela, na molongo ya Melkisedek.”

[18] Nzambe alongolá Mibeko ya kala, po yango ezangaki makasi pe ezalaki na tina té.

[19] Pamba té Mibeko ya Moize ebongisaki ata eloko moko té. Sik'oyo tokómi kotia mitema na bolamu moko ya koleka, boye tokoki kopusana penepene ya Nzambe.

[20] Yango emonani pe na ndenge Nzambe akataki seleka. Tango bato ya libota ya Levi bakómaká banganga-Nzambe, ye akataká seleka té;

[21] nzokande akataki yango tango atiaki Nganga-Nzambe ya sika. Alobaki na ye boye: “Nakateli yo seleka, nakowangana yango té: Ozali Nganga-Nzambe ya libela.”

[22] Seleka yango elakisi 'tè Yezu azwi lokumu monene koleka, boye amemeli bato Boyokani oyo eleki malamu.

[23] Pe lisusu, banganga-Nzambe wana bazalaki ebele, po bazalaki kokufa, bakokaki koumela té.

[24] Kasi Yezu akoumela libela; kinganga-Nzambe na ye ezali po na seko.

[25] Yango wana akoki kobikisa libela baoyo balingi kopusana penepene ya Nzambe na lisalisi na ye, pamba té akoumela seko po álobela bango epai ya Nzambe.

[26] Ya solo, ebongaki kaka tózala na Nganga-Nzambe monene ya ndenge wana. Ye azali moto ya bosantu pe ya motema pembe; azali na mabe ata moko té. Nzambe alongolá ye na kati ya bato ya masumu, pe atombolá ye na Likolo.

[27] Ye azali lokola banganga-Nzambe ya libota ya Levi té; asengeli té kopesaka mabonza mikolo nyonso, liboso po na masumu na ye moko, pe sima po na oyo ya bato. Ye asi'apesá libonza mbala moko libela, tango amipesaki ye moko.

[28] Pamba té banganga-Nzambe oyo Mibeko ya Moize ezalaki kotia, bazalaki bato ya kokoka té; nzokande Mibeko ekómi na suka. Seleka oyo Nzambe akatá, etiá Mwana na ye Nganga-Nzambe monene, oyo ye akómisá libela moto ya kokoka.

Ba-Ebré — Chapters