[1] Yango wana tosengeli kosimba malamu penza makambo oyo toyokaki; soki té tokobunga.
[2] Maloba ba-anjelu bamemelaká bakoko, esengelaki bándima yango. Moto nyonso oyo aboyaki yango to atosaki té, azwaki etumbu na ndenge ekokaki na ye.
[3] Bongo awa Nzambe apesi biso nzela ya kobika, ndenge nini tokoki kokima etumbu soki totali yango pamba? Ezali Nkolo Yezu moto asakolaki sango ya kobika wana liboso; sima bato oyo bayokaki ye, bamemelaki biso sango yango.
[4] Nzokande Nzambe ye moko asalaki makamwisi ya ndenge na ndenge, pe akabelaki biso Molimo Mosantu ndenge ye alingaki.
[5] Tozali koloba po na mokili ya sika oyo tozali kozela: Nzambe atiá yango na maboko ya ba-anjelu té.
[6] Kasi esika moko na Mikanda ya Nzambe ekòmamá boye: “Nzambe, moto azali nani po yo ókanisaka ye? Moto azali nani po yo óbatelaka ye?
[7] Na mwa-tango moke otiaki ye na se ya ba-anjelu; sima opesi ye lokumu monene,
[8] otie ye mokonzi ya biloko nyonso.” Ekòmamá 'tè Nzambe atie ye “Mokonzi ya biloko nyonso”; yango elakisi 'tè eloko moko té ekoki koboya kotosa ye. Sik'oyo tomoni nanu té 'tè biloko nyonso ezali kotosa ye.
[9] Kasi makambo tomoni, yango oyo: na mwa-tango moke Yezu azalaki na se ya ba-anjelu, bongo ayei kozwa lokumu monene po na pasi oyo ayokaki. Ezali na bolamu ya Nzambe nde Yezu akufaki, po ábikisa moto nyonso.
[10] Nzambe moto asalá biloko nyonso, pe nyonso ezali ya ye: alingaki komema bana ebele na mboka na ye ya nkembo; atiá Yezu Motambwisi pe Mobikisi na bango. Ebongaki Yezu ámona pasi po Nzambe ákómisa ye moto ya kokoka;
[11] pamba té Yezu, ná bato oyo ye akómisi bosantu, bango nyonso bazali na tata se moko, Adamu. Yango wana amonaka soni té po ábenga bango bandeko na ye;
[12] alobi: “Nakoyebisa bandeko na ngai 'tè ozali Nzambe na biso; na kati ya lisanga ya bato na yo nakoyembela yo.”
[13] Alobi lisusu: “Nakotia motema na ngai epai ya Nzambe.” Pe abakisi: “Nazali awa, ná bana oyo Nzambe apesi ngai.”
[14] Lokola bana wana bazali bato, Yezu pe akómaki moto lokola bango, na tina 'tè na liwa na ye ásukisa zabolo oyo asimbá nguya ya liwa,
[15] bongo ásilisa boumbu ya baoyo bazali kobanga liwa tango nyonso.
[16] Yezu ayaki kosalisa ba-anjelu té kasi ayaki nde kosalisa libota ya Abraham.
[17] Yango wana esengelaki ákokana ná bandeko na ye na makambo nyonso, po ákóma Nganga-Nzambe monene ya malamu pe ya boboto, na mosala na ye epai ya Nzambe. Na ndenge wana azweli bato na ye bolimbisi ya masumu na bango.
[18] Lokola ye moko amonaki pasi na ndenge bamekaki ye, akoki kosalisa baoyo bazali komona pasi.