Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:21

[1] Bongo tókende liboso, tóluka kozwa mateya oyo ekoki na bakolo; pe tózongela lisusu té ebandeli ya mateya ya nzela ya Kristo. Tokoki kozongela lisusu té ebandeli ya mateya yango: kotika misala oyo ememaka liwa, pe kondimela Nzambe;

[2] koyoka mateya po na ndenge nyonso ya kobatisa bato, pe ya kotiela bango maboko; to pe ndenge Nzambe akosekwisa bato pe akokata makambo na bango libela.

[3] Tókende liboso, soki Nzambe apesi biso nzela.

[4] Bongo, boni po na bato oyo batiki kondimela Nzambe pe bapesi ye mokongo? Bazalaki bato oyo bondimi esi'efungolá bango miso, ekómisá bango bato ya Molimo Mosantu, pe emonisá bango bolamu ya makabo ya Nzambe,

[5] ya maloba na ye, pe ya nguya ya bomoi oyo bazali kozela.

[6] Bongo soki bango bakwei, nzela moko té ezali ya kobenda bango po bábongola lisusu motema. Pamba té wana ezali nde babomi Mwana ya Nzambe na kuruze mbala ya mibale, pe bayokisi ye soni na miso ya bato.

[7] Bókanisa ndenge Nzambe abenisaka mabelé. Mai ya mbula ekotelaka yango mbala na mbala, bongo mabelé ebotaka mbuma pe eleisaka bato oyo basalaka bilanga.

[8] Kasi soki eboti bobele basende, mabelé yango ezali pamba; etikali moke Nzambe ápesa yango etumbu, bongo bakozikisa yango na móto.

[9] Bandeko ya bolingo, ata tolobi bongo, tozali kaka kotia mitema 'tè bozali kolanda nzela ya malamu pe bokobika.

[10] Pamba té Nzambe azali bosembo; abosani mosala na bino té to bolingo oyo bolakisaki ye, pe bozali kosalisa bandeko na bino bato ya Nzambe na kombo na ye tii lelo.

[11] Tolingi kaka 'tè moto nyonso na kati na bino átia molende tii na suka, po 'tè makambo oyo botielaka mitema ésalama.

[12] Bókóma bato ya goigoi té, kasi bólandaka ndakisa ya baoyo bazwaka bolamu Nzambe alakaki, po bazali kondimela ye na molende nyonso.

[13] Tango Nzambe apesaká elaka na Abraham, akataki seleka na kombo na ye moko, pamba té moto mosusu oyo aleki ye na monene azali té.

[14] Alobaká boye: “Nakobenisa yo mingi koleka, pe nakopesa yo libota moko ya monene penza.”

[15] Abraham akangaki motema, yango wana azwaki bolamu oyo Nzambe alakaki ye.

[16] Tango bato bakataka seleka, batangaka kombo ya moto oyo aleki bango na monene; pe na ndenge wana tembe nyonso esilaka libela.

[17] Nzambe alingaki kolakisa polele 'tè akobongola makanisi na ye ata moke té; yango wana akataki seleka, po tembe moko té ézala epai ya baoyo basengeli kozwa bolamu ye alakaki.

[18] Makambo oyo nyonso mibale, elaka pe seleka, ezali ya libela; pamba té Nzambe akoki kokosa té. Yango wana biso tokómi molende penza, totiká nyonso pe totie mitema 'tè tokozwa bolamu wana.

[19] Ya solo, elikya yango ezali lokola longo oyo ekangaka masuwa; yango moto esimbá mitema na biso, awa tozali kokende tii na esika Nzambe abombamá, sima ya Ridó, na Ndako na ye ya Likolo.

[20] Yezu asi'akotá kuna po na kobongisela biso nzela; akómá Nganga-Nzambe monene ya libela, na molongo ya Melkisedek.

Ba-Ebré — Chapters