[1] Na tango ya kala, Nzambe azalaká koloba na bakoko na biso mbala na mbala pe na bandenge mingi, na minoko ya baprofete.
[2] Kasi na mikolo oyo ya suka, ayei koloba na biso na monoko ya Mwana na ye oyo atie mokonzi ya biloko nyonso; ezali ná ye nde Nzambe asalá mokili mobimba.
[3] Ye akamati elongi ya Tata na ye; boye moto oyo amoni lokumu ya Mwana, amoni penza lokumu ya Nzambe. Asimbi mokili mobimba na nguya ya maloba na ye. Tango asilisi kolongola masumu ya bato, akei kofanda na Likolo, na esika ya lokumu penepene ya Nzambe ya nguya nyonso.
[4] Mwana aleki ba-anjelu na nguya; yango wana Nzambe apesaki ye kombo ya lokumu monene koleka ya bango.
[5] Pamba té Nzambe nanu alobá ata na anjelu moko té 'tè: “Ozali Mwana na ngai, ngai moto naboti yo lelo.” To pe lisusu: “Nakozala Tata na ye, pe ye akozala mwana na ngai.”
[6] Kasi tango Nzambe azalaki kotinda Mwana na ye ya liboso awa na mokili, alobaki boye: “Ba-anjelu nyonso ya Nzambe basengeli kofukamela ye.”
[7] Po na ba-anjelu, ekòmamá boye: “Ba-anjelu bazali basali ya Nzambe. Ye akómisaka bango lokola mipepe, pe lokola móto ezali kopela.”
[8] Kasi po na Mwana, ekòmamá boye: “E Nzambe, bokonzi na yo ekoumela seko; ozali kotambwisa mboka na yo na ndenge ekoki.
[9] Olingi bosembo pe oboyá mabe, yango wana Nzambe na yo ayokisi yo esengo koleka. Nzambe na yo apakoli bobele yo mafuta, pe aponá yo na kati ya bakonzi nyonso ya mokili.”
[10] Ekòmamá lisusu boye: “Nkolo, na ebandeli yo moto osalá mokili; Likolo esalamá na maboko na yo.
[11] Nyonso wana ekolimwa, kasi yo okotikala; mokili ná Likolo ekolemba lokola elamba enzuluki.
[12] Okogumba yango ndenge bagumbaka nzambala; pe okobwaka yango lokola elamba ya kala. Kasi yo okotikala kaka ndenge ozali; bomoi na yo ezali na suka té.”
[13] Pe mokolo moko té Nzambe asi'alobá boye na anjelu ata nani: “Fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu; nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.”
[14] Ba-anjelu bazali bobele milimo oyo esalelaka Nzambe; atindaka bango po na kosalisa baoyo ye alingi kobikisa.