Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:47

[1] Bato nyonso wana bazali kozinga biso, bazali kolakisa biso ndenge tosengeli kosala. Yango wana biso pe tótia molende. Tósala lokola bato ya masano. Bongo tótika makambo nyonso oyo epekisaka 'tè tótambola malamu té; tókima mbangu, tóbwaka mikumba oyo ezali kotia biso kaká, elingi koloba: tóboya masumu oyo ezali kokangama na biso.

[2] Tótia miso bobele epai ya Yezu; ye nde moto ayeelá biso bondimi, kaka ye moto akokokisa yango. Akangaki motema tango babomaki ye na kuruze, pe amonaki soni ya liwa yango lokola eloko pamba, po azalaki kokanisa bobele esengo oyo Nzambe abombelaki ye. Pe sik'oyo azali kofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe.

[3] Bókanisaka ndenge ye akangaki motema na nyonso oyo bato ya masumu basalaki ye. Boye bózonga sima té, pe bólemba té.

[4] Bosengeli kobunda na masumu; nzokande moto moko abundá nanu té tii makila étanga.

[5] Bosi'bobosani toli oyo bazali kopesa bino lokola na bana ya Nzambe: “Mwana na ngai, koboya té soki Nkolo apesi yo etumbu; kolemba té tango alakisi mabe na yo.”

[6] Pamba té Nkolo apesaka etumbu na moto oyo ye alingaka; abetaka moto nyonso oyo ye ayambaka lokola Mwana na ye.

[7] Bókanga mitema. Nzambe akamati bino lokola bana na ye; azali kopesa bino etumbu po ábongisa bino. Mwana nini azwaka etumbu ya tata té?

[8] Ya solo, bana nyonso ya Nzambe bazwaka etumbu; boye soki bino bozwaka yango té, bozali penza bana na ye té, bozali bana bazangá tata.

[9] Batata oyo babotá biso bazalaki kopesa biso etumbu, pe tozalaki kotosa bango; esengeli tótosa mingi koleka Tata na biso ya Likolo, po tóbika.

[10] Batata na biso bazalaki kopesa etumbu na mwa-tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga; kasi Tata na biso ya Likolo apesaka biso etumbu po na bolamu na biso, po tókóma bato ya bosantu lokola ye.

[11] Tango bato bazali kozwa etumbu, bamonaka yango lokola eloko ya esengo té kasi ya pasi. Nzokande soki etumbu esi'ebongisi bango, ememelaka bango boboto pe bizaleli ya bosembo.

[12] Soki maboko na bino elembi pe mabolongo esili makasi, bózwa lisusu molende.

[13] Bósala banzela ya malamu, po 'tè ata bato ya tengutengu bábeta libaku té, kasi bátambola na ndenge ekoki.

[14] Bóluka kofanda na boboto ná bato nyonso, pe kozala na bomoi ya bosantu; po moto moko té akoki komona Nkolo, soki azangi bosantu.

[15] Bókeba! Moto moko té ábungisa bolamu ya Nzambe. Moto moko té ákóma lokola lititi ya bololo oyo ekoki kobomisa bato ebele na kati na bino.

[16] Moto moko té ásala kindumba to átsiola makambo ya Nzambe, ndenge Ezau asalaká: atekisaki bokonzi na ye ya Mwana ya liboso likolo ya bilei ya mokolo moko.

[17] Bongo na sima, lokola boyebi, alingaki 'tè tata ápambola ye po ázwa bolamu oyo Nzambe alakaká. Kasi akokaki kozwa yango té; azwaki nzela té ya kobongola makanisi ya tata na ye, atako abimisaki mai na miso.

[18] Bino nanu bopusaná té penepene ya ngomba Sinaí ndenge bakoko ya Israel bapusanaká penepene na yango. Kuna móto ezalaká kongala, molili ezalaká makasi, pe mopepe ya somo ezalaká kopepa.

[19] Bayokaká mongongo moko ezalaki koloba na kati ya makelele ya kelelo. Tango bayokaki mongongo yango, baboyi bábakisela bango maloba mosusu.

[20] Pamba té, bazalaki kobanga motindo oyo: “Soki moto amati na ngomba oyo, ézala kutu ata nyama, esengeli báboma ye na mabanga.”

[21] Makambo bango bamonaká ezalaká somo penza. Moize kutu ye moko alobaká 'tè: “Nazali koyoka somo pe kolenga.”

[22] Kasi bino bosi'bopusani penepene ya mboka ya Nzambe ya bomoi, na ngomba ya Sion pe Yeruzalem ya Likolo. Kuna nde esika ba-anjelu nkoto na nkoto bazali kosala feti;

[23] pe bana ya liboso ya Nzambe basangani na esengo, baoyo bakombo na bango esi'ekòmamá na Likolo. Bopusani penepene ya Nzambe, Zuzi ya bato nyonso; pe epai ya milimo ya bato ya bosembo oyo Nzambe akómisá bato ya kokoka.

[24] Bopusani penepene ya Yezu oyo asalá Boyokani ya Sika; makila na ye elongolá masumu nyonso pe esalá likambo moko monene koleka makila ya Abel.

[25] Tango Nzambe akitaká awa na se po na kokebisa bakoko ya Israel, bango baboyaki koyoka, bongo bango nyonso bazwaki etumbu. Yango wana bókeba! Pamba té, ndenge nini tokokima etumbu soki toboyi koyokela Nzambe, awa azali koloba uta na Likolo?

[26] Tango azalaká koloba na ngomba Sinaí, mongongo na ye eningisaká mokili; kasi sik'oyo alaki biso boye: “Nakosala yango lisusu mbala moko; nakoningisa bobele mokili té kasi nakoningisa pe Likolo.”

[27] Maloba wana “lisusu mbala moko,” elakisi 'tè biloko ye asalá awa na se ekoningana pe ekolimwa, po 'tè biloko oyo eninganaka té étikala seko.

[28] Lokola tosi'tozwi mboka oyo ekoningana té, tósimba bolamu ya Nzambe na motema moko. Tózala bato ya malamu, tósalelaka Nzambe ndenge ye alingaka, tótosaka ye pe tóbangaka ye.

[29] Pamba té Nzambe na biso azali lokola móto oyo ezikisaka nyonso.

Ba-Ebré — Chapters