[1] Nganga-Nzambe monene nyonso azali moto oyo aponami po ásalelaka Nzambe na kombo ya bato, pe ápesaka ye mabonza nyonso oyo bamemelaka ye po na kosenga bolimbisi ya masumu.
[2] Akoki kolakisa boboto epai ya baoyo bazangi mayele pe babungi nzela, pamba té ye moko azangi makasi.
[3] Yango wana, ndenge apesaka Nzambe mabonza po na masumu ya bato, asengeli pe kopesa yango po na masumu na ye moko.
[4] Moto moko té akoki komitia na ebonga wana; ezali nde Nzambe moto aponaka ye, ndenge aponaká Aaron.
[5] Ndenge moko pe Kristo amipesaki ye moko lokumu ya kozala Nganga-Nzambe monene té, kasi Nzambe moto ayebisaki ye 'tè: “Ozali Mwana na ngai; ngai moto naboti yo lelo.”
[6] Pe epai mosusu alobaki: “Ozali Nganga-Nzambe ya libela, na molongo ya Melkisedek.”
[7] Tango azalaki awa na mokili, Yezu abondelaki Nzambe oyo akokaki kobikisa ye na liwa, asambelaki ye na mongongo makasi, pe alelaki mai na miso; bongo Nzambe ayokelaki ye po na botosi na ye.
[8] Atako azalaki Mwana ya Nzambe, na bapasi nyonso oyo amonaki ayaki koyeba eloko oyo babengaka kotosa.
[9] Pe lokola asi'akómá moto ya kokoka, akoki kobikisa libela baoyo nyonso batosaka ye;
[10] pamba té Nzambe atiá ye Nganga-Nzambe monene na molongo ya Melkisedek.
[11] Likolo ya makambo oyo, tozali na maloba ya kobakisa; kasi ezali pasi po na kolimbola yango, pamba té bosimbaka makambo noki té.
[12] Banda kala ebongaki bózala balakisi ya bato mosusu, kasi bozali kaka na posa ya kozwa lisusu mateya ya liboso na makambo etali Nzambe. Bokoki nanu té po na kolia biloko ya makasi, kasi esengeli bobele bápesa bino mabéle.
[13] Moto oyo amelaka kaka mabéle azali nanu Mwana moke, akoki té koyeba makambo ya bosembo to ya lokuta.
[14] Nzokande bobele bakolo bato bakoki kolia biloko ya makasi; bango nde bayebi malamu ná mabe.