[1] Boyokani ya liboso ezalaki na mitindo po na ndenge ya kosambela; ezalaki pe na esika ya kosambela oyo bato babongisá.
[2] Batòngaki Ndako ya Kapo boye: eteni na yango ya liboso bazalaki kobenga yango “Esika ya bosantu.” Kuna ezalaki na mwinda, mesa, pe mapa ya kopesa na Nzambe.
[3] Bongo eteni ya mibale sima ya ridó, bazalaki kobenga yango “Esika eleki bosantu.”
[4] Kuna batiaki mesa ya or po na kotumbela malasi, pe Sanduku ya Boyokani oyo bapakolá or. Na kati na yango ezalaki na nzete ya Aaron oyo ebimisaki makasa, pe mabanga oyo bakòmá mibeko ya Boyokani, ná elokú moko ya or oyo batiá “mane.”
[5] Na likolo ya Sanduku, ba-Sheriben ezalaki kozipa Esika ya bolimbisi epai Nzambe azalaki kofanda. Kasi ezali sik'oyo té po na kolimbola yango nyonso.
[6] Boye Ndako ya Kapo ya bosantu ezalaki na biteni mibale. Banganga-Nzambe bazalaki kokota mikolo nyonso na eteni ya liboso, po na kokokisa misala na bango.
[7] Kasi bobele Nganga-Nzambe monene moto azalaki kokota na eteni ya mibale. Abandaki kosala bongo se mbala moko na mbula mobimba, pe asengelaki komemela Nzambe makila ya banyama, oyo azalaki kopesa ye likolo ya masumu na ye moko pe ya bato mosusu.
[8] Boye Molimo Mosantu alakisi 'tè tango nyonso oyo basengelaki kokumisa Nzambe na Ndako ya Kapo ya bosantu wana ya kala, nzela ya kokotela na Esika ya bosantu ya solo ezalaki kaka ya kokangama.
[9] Ndako wana ya kala ezali kolakisa ndenge makambo ya mikolo oyo ezali: makabo pe mabonza oyo bapesaka na Nzambe, yango té moto ekoki kobongisa motema ya moto oyo azali kosalela Nzambe.
[10] Nyonso wana etali kaka kolia, komela pe ndenge ya kosukola mai. Ezali bobele makambo bato basalaka; Nzambe atikaki yango kaka tii tango ayei kobimisa ndenge ya sika ya kosambela.
[11] Kasi Kristo asi'ayá, asi'alongolá bato na boumbu libela. Ye azali Nganga-Nzambe monene; ezali nde ye moto azweli bato bolamu oyo Nzambe apesi bango sik'oyo. Asalaka mosala na ye na Ndako ya bosantu ya monene pe ya lokumu koleka oyo ya kala; batòngá yango na bato té; elakisi 'tè ezali ya mokili oyo té. Akotaki na Esika eleki bosantu mbala moko libela; apesaki Nzambe makila ya bataba té to ya bangombe, kasi apesaki nde makila na ye moko.
[13] Soki moto akómi mbindo, banganga-Nzambe ya libota ya Levi bazalaká kobwakelabwakela ye makila ya taba to ya ngombe, to pe putulu ya ngombe bazikisá; na ndenge wana bazalaká kokómisa nzoto na ye peto na miso ya Nzambe.
[14] Tembe ezali té, awa Kristo amipesaki ye moko na nguya ya Molimo ya seko, amipesaki na Nzambe lokola libonza oyo ebebá ata esika moko té. Boye makila na ye elongolaka na se ya motema na biso mbindo ya misala oyo ememaka liwa, po tósalela Nzambe ya bomoi.
[15] Wana ezali ndenge Kristo amemelaki bato Boyokani ya Sika. Liwa na ye ezweli bango bolimbisi ya mabe oyo babandaká kosala tango bazalaká kolanda Boyokani ya liboso. Boye baoyo Nzambe abengi bakoki kozwa libela bolamu oyo ye alakaki bango.
[16] Soki moto ayokani ná bandeko na ye po átikela bango biloko sima ya liwa na ye, esengeli 'tè ákufa liboso, bongo bandeko wana bakoki kozwa biloko na ye.
[17] Boyokani ya ndenge wana ezangaka tina tango moto yango azali nanu na bomoi. Ekómaka ya kokoka bobele soki ye akufi.
[18] Yango wana, tango Boyokani ya liboso ebandaká, batangisaki makila.
[19] Tango Moize asilisaki kosakola mitindo nyonso ya Mibeko na miso ya bato, akamati makila ya bangombe basangisá na mai, pe abwakelibwakeli yango mikanda ya Mibeko pe bato. Asaleli mwa-nzete ya izope oyo bakangisá bapwale ya motane.
[20] Bongo alobi: “Oyo ezali makila ya Boyokani Nzambe asali ná bino.”
[21] Sima, Moize akamati ndambo ya makila, pe abwakibwaki na Ndako ya Kapo ya bosantu pe na biloko nyonso oyo bazalaki kosalela po na losambo.
[22] Po na kolongola mbindo ata ya ndenge nini, mbala mingi Mibeko ezalaki kotinda básalelaka makila; pe soki batangisi makila té, Nzambe azalaki kolimbisa masumu té.
[23] Makambo ya Boyokani ya Kala ezali ndakisa ya oyo ezali koleka na Likolo. Lokola bapesaka Nzambe mabonza po na kokóma peto, esengeli bápesa ye mabonza ya malonga koleka, po na kokóma peto na Likolo.
[24] Pamba té Kristo akotaki té na Ndako ya bosantu oyo batòngá na bato; yango ezalaki bobele ndakisa ya Ndako ya bosantu ya solo. Boye ye akotaki na Likolo penza. Kuna nde epai azali kolobela biso sik'oyo na miso ya Nzambe.
[25] Pe lisusu, mbula na mbula nganga-Nzambe monene ya Boyokani ya Kala akotaka na Esika ya bosantu po na kopesa Nzambe libonza ya makila ya nyama. Nzokande Kristo amipesaki na Nzambe mbala mingi té.
[26] Soki té asengelaki komona pasi mbala ebele banda ebandeli ya mokili. Kasi ayaki bobele mbala moko, amipesaki na Nzambe na eleko oyo ya suka, po na kolongola masumu ya bato.
[27] Moto nyonso asengeli kokufa mbala moko libela; bongo na sima Nzambe akosambisa ye.
[28] Yango wana pe Kristo amipesaki mbala moko, po álongola masumu ya bato. Ye akomonana mbala ya mibale, kasi ekozala po na kolongola masumu té. Akoya nde po na kobikisa libela baoyo bazali kozela ye.