[1] Soki moto azali na bondimi, asi'azwi eloko oyo atielaka motema, ayebi makambo oyo emonanaka na miso té.
[2] Na tango ya kala, Nzambe andimaká bato mosusu po na bondimi na bango.
[3] Po na bondimi na biso, toyebi 'tè Nzambe asalá Likolo ná se na maloba na ye. Boye, biloko nyonso oyo emonanaka, eutá na oyo emonanaka té.
[4] Abel, po na bondimi na ye, apesaká Nzambe mabonza ya malonga koleka ya Kaina. Po na bondimi na ye Nzambe alakisaki 'tè azali moto ya bosembo, pamba té amonisaki polele 'tè asepelaki na mabonza na ye. Atako Abel akufá kala, ndakisa na ye ezali koteya biso tii lelo.
[5] Henok, po na bondimi na ye, akufaká té. Nzambe amemaká ye na Likolo po ázala epai na ye, yango wana azalaki komonana lisusu té. Liboso 'tè átombola ye, Nzambe ayebisaká Henok 'tè azalaki kosepela na ye.
[6] Kasi soki moto azali na bondimi té, akoki kosepelisa Nzambe té. Bongo moto nyonso oyo alingi kopusana penepene ya Nzambe, asengeli kondima 'tè Nzambe azali, pe apesaka lifuta na baoyo bazali koluka ye.
[7] Noé, po na bondimi na ye, atosaká tango Nzambe alakisaká ye makambo oyo ekoya, pe atòngaká masuwa po na kobikisa libota na ye. Na ndenge wana amonisaki mabe ya bato, pe akómaki moto ya bosembo po na bondimi na ye.
[8] Abraham, po na bondimi na ye, atosaká tango Nzambe abengaki ye. Akendeki na mboka oyo Nzambe alakaká ye 'tè akozwa yango. Atikaki mboka na ye po na kokende na esika ayebaki té.
[9] Po na bondimi na ye, akómaki kofanda lokola mopaya na mabelé oyo Nzambe alakaká ye. Azalaki kolala na ndako ya kapo, esika moko ná Izaak pe Jakob, pamba té bango pe bazwaká elaka wana.
[10] Abraham azalaki kozela vile oyo ekoumela, oyo Nzambe akanaká kosala; bobele ye pe moto atòngá yango.
[11] Sara pe, po na bondimi na ye, azwaká nguya ya kobota Mwana, atako akómaki penza mobange; atiaki kaka motema 'tè Nzambe oyo apesaki ye elaka akokokisa yango.
[12] Na ndenge wana moto se moko, Abraham, atako akómaki mobange penepene ya kokufa, abotaki bana ebele. Bazali mingi koleka minzoto ya Likolo pe zelo oyo ezalaka penepene ya ebale.
[13] Bato nyonso wana bakufaká ná bondimi na bango. Na esengo nyonso bazalaki komona na mosika bomengo oyo Nzambe alakaká bango, kasi bazwaki yango té. Bongo babandaki koloba: “Awa na mokili, tozali bapaya pe bato ya mobembo.”
[14] Nzokande bato oyo balobaka ndenge wana, balakisaka polele 'tè bazali koluka mboka ya bango moko penza.
[15] Soki bazalaki kokanisa mboka oyo bautaki, mbele bakokaki kozonga.
[16] Kasi bazalaki koluka mboka moko ya malamu koleka, elingi koloba: mboka ya Likolo. Yango wana Nzambe ayokaka soni té soki bato bazali kobenga ye “Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob”, pamba té asi'abongiselá bango mboka ya seko.
[17] Abraham, po na bondimi na ye, tango Nzambe amekaki ye, andimaki kobomela Nzambe mwana na ye se moko Izaak, atako azwaká elaka ya Nzambe,
[18] tango Nzambe alobaká na ye 'tè: “Ezali nde Izaak moto akopesa yo bakoko.”
[19] Abraham andimaki 'tè Nzambe akoki kosekwisa Izaak; ya solo, tokoki koloba 'tè azwaki ye lisusu lokola moto asekwi.
[20] Izaak, po na bondimi na ye, apambolaki Jakob ná Ezau po na makambo oyo ekoya.
[21] Jakob, po na bondimi na ye, apambolaki bana ya Jozef moko moko tango alingaki kokufa; bongo “agumbamelaki Nzambe na nzete na ye ya kotambola.”
[22] Jozef, po na bondimi na ye, tango akómaká penepene ya kokufa, asakolaká po na mokolo oyo bana ya Israel bakolongwa na Ejipte, pe alakisaká ndenge bakosala po na mikuwa na ye.
[23] Baboti ya Moize, po na bondimi na bango, babombaká ye banda tango abotamaki tii akokisaki sanza misato, po bamonaki 'tè mwana azalaki kitoko, pe babangaki kutu té ata motindo ya mokonzi ya Ejipte.
[24] Moize, po na bondimi na ye, tango akómaki mokóló, aboyaki 'tè bábenga ye mwana ya mwana-mwasi ya mokonzi monene ya Ejipte.
[25] Nzokande andimaki komona pasi ná bato ya ekolo ya Nzambe, esika 'tè ákende kosepela mwa-tango moke po na bisengo ya masumu.
[26] Ndenge Kristo andimaki báyina ye, Moize pe amonaki 'tè eleki malamu báyina ye, esika 'tè áluka bomengo ya Ejipte; pamba té miso na ye ezalaki bobele na lifuta oyo ezalaki kozela ye.
[27] Moize, po na bondimi na ye, alongwaká na Ejipte, abangaki kanda ya mokonzi monene ya Ejipte té. Atiaki molende lokola nde azalaki komona Nzambe oyo amonanaka té.
[28] Bobele po na bondimi na ye, atindaká bato ya Israel básala feti ya Koleka pe bápakola makila na baporte ya bandako, po anjelu oyo abomaka ásimba bana na bango té, tango akoya koboma bana mibali ya liboso nyonso.
[29] Bato ya Israel, po na bondimi na bango, bakatisaká Ebale ya Motane lokola nde ezalaki ya kokauka. Kasi tango ba-Ejipsien bamekaki kokatisa, bango nyonso bakufaki na mai.
[30] Bobele po na bondimi ya bato ya Israel, bamir ya lopango ya Jerikó ekweyaká, tango bazalaki kobalukabaluka na bapembeni ya vile mikolo sambo.
[31] Rahab, mwasi ya ndumba, po na bondimi na ye, akufaki té esika moko ná baoyo baboyaki kotosa Nzambe, po ye ayambaki na boboto ba-Israelite oyo bayaki po na kotala mboka na mayele.
[32] Náloba lisusu nini? Nazali na tango té po na koloba makambo ya Jedeon, Barak, Samson, Jefté, David, Samuel, to ya baprofete.
[33] Po na bondimi na bango, babotolaki mabelé ya bikolo mosusu, bakómaki kotambwisa mboka na bosembo, bazwaki bolamu oyo Nzambe alakaká bango; bakangisaki minoko ya batambo,
[34] babomaki móto ya makasi, babikaki na liwa ya mbeli; baoyo bazalaki na maladi, nzoto na bango ekómaki kolongonu; bamosusu balakisaki makasi na bango na bitumba pe balongaki banguna ebele;
[35] bamama mosusu bamonaki bana na bango oyo bakufaki bazongi na bomoi. Nzokande bato mosusu banyokwamaki makasi. Ata bango baboyaki kosala mabe po bábika; bazalaki kotia mitema 'tè Nzambe akosekwisa bango.
[36] Banguna bazalaki koseka pe kobeta bango fimbu, kokanga bango minyololo pe kobwaka bango na boloko.
[37] Bamosusu, babomaki bango na mabanga to na mbeli, bakati bamosusu biteni mibale. Bazalaki kotelengana pe kolata baposo ya meme to ya taba; bazalaki kokelela, konyokwama pe komona pasi.
[38] Ebongaki té 'tè báfanda na kati ya bato ya mokili oyo; yango wana bazalaki kotelengana na esobe to na bangomba, pe kofanda na mabulu oyo ezalaka na kati ya mabanga to na se ya mabelé.
[39] Po na bondimi na bango, Nzambe alakisaki 'tè azali kolinga bango nyonso; kasi akokiselaki bango bilaka na ye té.
[40] Nzambe azelisaki bango likolo na biso, pamba té abombelaki biso bolamu ya koleka; boye esengelaki ákómisa bango bato ya kokoka bobele nzela moko ná biso.