[1] Makambo nyonso oyo touti koloba elakisi 'tè tozali na Nganga-Nzambe monene ya ndenge wana. Ye afandi na Likolo na esika ya lokumu, penepene ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe;
[2] asalelaka Nzambe na Ndako ya bosantu ya solo, oyo etòngamá na Nkolo kasi na bato té.
[3] Nganga-Nzambe nyonso aponamaka po na kopesa Nzambe makabo ná mabonza. Boye esengeli Yezu pe ázala na eloko moko ya kopesa na Nzambe.
[4] Soki azalaki awa na mokili, mbele akokaki kozala Nganga-Nzambe té; pamba té banganga-Nzambe bazali, baoyo bapesaka Nzambe mabonza na ndenge Mibeko ezali kotinda.
[5] Nzokande Nzambe azali na Likolo; boye mosala bango basalaka ezali bobele ndakisa ya makambo oyo elekaka kuna. Ezali na tina wana nde Nzambe akebisaká Moize, tango ye alingaki kotònga Ndako ya Kapo; alobaká boye: “Tala malamu; sala yango nyonso na ndenge nalakisaki yo na likolo ya ngomba.”
[6] Kasi mosala oyo Yezu azwi eleki ya banganga-Nzambe ya libota ya Levi, kaka ndenge Boyokani ye amemi eleki oyo ya kala. Pamba té yango euti na bilaka ya Nzambe oyo eleki malamu.
[7] Nzambe alingaki kosala Boyokani ya mibale té, soki oyo ya liboso ezalaki ya kokoka.
[8] Kasi lokola Nkolo amonaki bato na ye mabe, alobaki boye: “Mokolo ezali, nakosala Boyokani ya Sika ná ekolo ya Israel pe ya Yuda.
[9] Yango ekozala té lokola oyo nasalaká ná bakoko na bango, tango nasimbaki bango na maboko po na kobimisa bango na Ejipte. Oyo wana bango babebisaki yango. Yango wana nasundolaki bango. Ngai Nkolo moto nalobi boye.
[10] Kasi Boyokani oyo nakosala ná ekolo ya Israel sima ya mikolo, ekozala boye: nakotia mibeko na ngai na mitú na bango, nakokòma yango na mitema na bango. Ngai nakozala Nzambe na bango, pe bango bakozala ekolo na ngai.
[11] Moto moko té akozala lisusu na tina ya koloba na moninga na ye to na ndeko na ye 'tè: ‘Yebaka Nkolo!’ Pamba té bango nyonso bakoyeba ngai, kobanda na bana mike tii na bamikóló.
[12] Nakolimbisa mabe na bango, nakokanisa masumu na bango lisusu té.”
[13] Awa Nzambe alobaká 'tè akosala Boyokani ya Sika, alakisi 'tè oyo ya liboso ekómi ya kala. Nzokande soki eloko ekómi ya kala pe enuni, etikali moke ékufa.