[1] Bandeko, bato ya Nzambe, lokola Nzambe abengi bino nyonso, bókanisaka Yezu. Pamba té Nzambe moto atindaki ye, pe atiá ye Nganga-Nzambe na biso ya monene, bobele ndenge atiaká Moize, “motambwisi ya ekolo na ye mobimba ya Israel.”
[3] Nzambe asalá bikolo nyonso. Nzokande na ekolo moko moko, moto moko kaka nde asangisá bato na yango; pe moto wana azwaka lokumu koleka bandeko na ye nyonso. Yango wana Yezu azwi lokumu monene koleka oyo ya Moize; pamba té ezali ye nde moto akómisá biso bato ya ekolo ya Nzambe.
[5] Nzambe atiaká Moize “motambwisi ya ekolo na ye mobimba,” elingi koloba: Moize azalaki kaka mosali oyo asengelaki koyebisa bato maloba ya Nzambe.
[6] Kasi Kristo azali Mwana; ekolo ya Nzambe ezali ya ye penza. Ekolo yango ezali nde biso, soki tozali kaka kotia mitema na bilaka ya Nzambe, na molende pe na esengo nyonso.
[7] Yango wana Molimo Mosantu alobá boye: “Lelo soki boyoki maloba na ngai,
[8] bózala mitú makasi té ndenge bakoko na biso basalaká, mokolo batombokaki pe bamekaki ngai na esobe, ata bamonaki makambo nyonso oyo nasalaki,
[10] mbula tuku minei (40) mobimba. Yango wana nayokelaká bango kanda pe nalobaká: ‘Bato wana bazali kobunga tango nyonso; bazali koyeba banzela na ngai té.’
[11] Na kanda nyonso nakataká seleka boye: ‘Bakokota na esika na ngai ya kopema ata moke té!’”
[12] Bandeko, bókeba! Moto moko té na kati na bino ázala na motema mabe, pe átika kondimela Nzambe ya bomoi to ásundola ye.
[13] Kasi awa ekòmamá “lelo” bólendisanaka mokolo na mokolo, po moto moko té na kati na bino ákóma motú makasi pe álanda nzela ya masumu.
[14] Tokómi bato ya Kristo bobele soki totie motema epai ya Nzambe tii na suka, ndenge tobandelaki.
[15] Ekòmamá boye: “Lelo, soki boyoki maloba ya Nzambe, bózala mitú makasi té ndenge bakoko na bino basalaká mokolo batombokaki.”
[16] Banani bayokaká maloba ya Nzambe pe batombokelaká ye? Ezali nde bato nyonso oyo Moize abimisaki na Ejipte.
[17] Banani bayokisaká Nzambe kanda mbula tuku minei (40) mobimba? Ezali baoyo basalaki masumu pe bakufaki na esobe.
[18] Banani Nzambe akatelaká seleka 'tè “Bokokota na esika na ngai ya kopema ata moke té”? Ezali nde baoyo baboyaki kotosa ye.
[19] Ya solo, bakokaki kokota té, po baboyaki kondima.