[1] Mibeko ya Moize ememelaki bato makambo ya solo penza té, kasi ezalaki kaka kolakisa elili ya bolamu oyo esengelaki koya. Mibeko ekoki té kobongisa bato oyo balingi kopusana penepene ya Nzambe. Yango wana mbula na mbula bapesaka kaka mabonza ya ndenge moko.
[2] Soki bato oyo basambelaka Nzambe ndenge wana bazwaki bolimbisi ya solo, mbele balingaki koyeba 'tè bazali na masumu lisusu té, pe bakokaki kotika libela kopesa mabonza.
[3] Kasi mbula na mbula bango basengeli kopesa mabonza wana, po bákanisaka masumu na bango.
[4] Pamba té makila ya bangombe to ya bataba ekoki kolongola masumu ata moke té.
[5] Yango wana, tango Kristo ayaki awa na se, alobaki na Nzambe boye: “Mabonza nyonso oyo bapesaka yo, olingaka yango té; kasi opesaki ngai nzoto.
[6] Osepelaka té na banyama oyo bazikiselaka yo, to oyo bapesaka po na masumu.
[7] Bongo nalobi: tala nayei po na kosala makambo oyo yo olingi, ndenge ekòmamá po na ngai na mokanda ya Mibeko.”
[8] Liboso alobi: “Mabonza nyonso oyo bapesaka yo, ézala banyama oyo bazikiselaka yo to oyo bapesaka po na masumu, olingaka yango té”; atako bapesaka yango ndenge Mibeko ezali kotinda.
[9] Bongo abakisi: “Tala nayei, po na kosala oyo yo olingi.” Yango elakisi 'tè Kristo alongoli ndenge ya kala ya kosambela, pe abandi ndenge ya sika.
[10] Ya solo, Yezu Kristo akokisaki makambo oyo Nzambe alingaki; awa amipesaki mbala moko, akómisaki biso bato ya bosantu.
[11] Mokolo na mokolo banganga-Nzambe nyonso bakokisaka mosala na bango; tango nyonso bapesaka bobele mabonza ya ndenge moko, oyo ekoki kolongola masumu ya bato ata moke té.
[12] Nzokande Kristo apesaki bobele libonza moko, po na kolongola masumu libela. Sik'oyo afandi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe,
[13] azali kozela mokolo Nzambe akotia banguna na ye na se ya makolo na ye.
[14] Boye, na nguya ya libonza se moko wana, Kristo akómisi bato na ye bosantu, akómisi bango libela bato ya kokoka.
[15] Molimo Mosantu nde moto azali kolakisa biso yango; pamba té alobaká boye:
[16] “Boyokani oyo nakosala ná bango sima ya mikolo, ekozala boye: nakotia mibeko na ngai na mitú na bango, nakokòma yango na mitema na bango.
[17] Masumu na bango pe mabe na bango nakokanisa yango lisusu té.”
[18] Bongo soki Nzambe alimbisi masumu ya bato libela, tina ya kopesa mabonza po na masumu ezali lisusu té.
[19] Yango wana, bandeko, po na makila ya Yezu, tozali na molende ya kokota na Esika oyo eleki bosantu,
[20] sima ya Ridó; yango nde bomoto na ye. Ye asi'afungoleli biso nzela ya sika, po tókóma kuna pe tózwa bomoi.
[21] Tozali na Nganga-Nzambe monene oyo Nzambe atiá Motambwisi ya ekolo na ye.
[22] Boye tópusana penepene ya Nzambe na motema moko, na bondimi nyonso; pamba té Nzambe asi'alongolá mbindo ya eloko ya mabe ya se ya motema na biso, pe basukolá biso na mai ya peto.
[23] Tolobaka 'tè tozali kotiela Nzambe motema; tólemba té, tótia kaka molende, pamba té Nzambe akokokisa elaka na ye.
[24] Tókanisanaka biso na biso; tólendisanaka po tólingana pe tósalaka misala ya malamu.
[25] Bato mosusu na kati na bino babandi koboya kosangana; bósala boye té, kasi bólendisana bino na bino, po bozali komona 'tè Mokolo ya Nkolo ebandi kokóma penepene.
[26] Pamba té, biso bato tosi'tozwi mateya nyonso ya solo, soki tobandi kosala masumu ndenge mitema elingi, libonza moko té ezali oyo ekoki kolongola masumu.
[27] Etikali bobele tóbanga ndenge Nzambe akokatela bato etumbu, pe ndenge akongalisa móto oyo ekozikisa banguna na ye.
[28] Moto nyonso oyo aboyi kotosa Mibeko ya Moize, basengeli koboma ye ata mawa té, soki batemwen mibale to misato balobi mabe na ye.
[29] Tembe té, etumbu monene koleka ezali kozela moto oyo amoni Mwana ya Nzambe pamba, atsioli makila ya Boyokani ya Sika, oyo elongolaki masumu na ye, pe afingi Molimo oyo amemelaki ye bolamu ya Nzambe.
[30] Pamba té, toyebi Moto oyo alobaká 'tè: “Ngai moto nakozongisela bango mabe; ngai nde moto nakopesa bango etumbu”; pe lisusu: “Nkolo akosambisa bato ya ekolo na ye.”
[31] Ezali likambo moko ya somo penza soki moto akwei na maboko ya Nzambe ya bomoi.
[32] Bókanisa mikolo ya ebandeli, tango Nzambe afungolaki bino miso; bobandaki kobunda na bapasi mingi, pe bozalaki kaka kokanga mitema.
[33] Na kati na bino, bamosusu bazalaki kofingama pe konyokwama na miso ya bato; kasi bino nyonso bondimaki kozala lisanga moko ná bango.
[34] Bozalaki koyoka pasi ná bato ya boloko; pe tango babotolaki biloko na bino, bozalaki kondima yango na esengo nyonso, po boyebaki 'tè bozali na bomengo oyo eleki malamu pe ekoumela seko.
[35] Sik'oyo bótia kaka molende, po yango moto ekozweela bino lifuta moko ya monene.
[36] Bobele soki bokangaka mitema nde bokokokisa makambo Nzambe alingi, pe bokozwa bolamu oyo ye alakaki.
[37] Pamba té, ekòmamá boye: “Etikali moke, kutu moke penza, moto oyo asengeli koya, áya, akoumela té.
[38] Bongo moto na ngai oyo akómi bosembo po na bondimi, akobika. Kasi soki azongi sima, nakosepela na ye té.”
[39] Biso tozali bato ya kozonga sima té po tóbunga; kasi tozali bato ya bondimi po Nzambe ábikisa biso.