Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:10

[1] Mbote na bino bato ya ekolo ya Nzambe oyo epanzaná na mokili mobimba. Ngai Jake, mosali ya Nzambe pe ya Nkolo Yezu Kristo, natindeli bino mokanda oyo.

[2] Bandeko na ngai, soki bapasi ya ndenge na ndenge ezali kokweela bino, bósepela kaka;

[3] pamba té boyebi 'tè soki na tango ya pasi bosimbi bondimi na molende nyonso, nde bokokoka kokanga mitema.

[4] Bobele soki boyebi kokanga mitema, bokozala bato ya kokoka na makambo nyonso, pe bokozanga ata eloko moko té.

[5] Nzokande soki moto moko na kati na bino azangi mayele, ásenga yango epai ya Nzambe, pe Nzambe akopesa ye yango; pamba té ye apesaka bolamu na ye na bato nyonso, na motema malamu pe boboto.

[6] Kasi ásenga na bondimi nyonso pe átia tembe té; po moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya mai oyo mopepe ezali komema epai na epai.

[7] Moto ya ndenge wana átia motema té 'tè akozwa ata eloko moko epai ya Nkolo;

[8] azali moto ya mitema mibale, pe abongolaka bizaleli na ye tango nyonso.

[9] Ebongi ndeko oyo azali na biloko mingi té, ábeta tolo po akómi moto ya lokumu;

[10] pe ndeko oyo azali na bomengo, ábeta tolo po lokumu na ye ekómi eloko ya pamba. Pamba té moto ya bomengo akokufa kaka lokola flere ya zamba.

[11] Moi ebimi pe ekómi makasi, bongo matiti ekauki; flere na yango ekwei pe kitoko na yango esili. Wana ezali ndenge moto ya bomengo akokufa na kati ya misala na ye.

[12] Esengo na moto oyo akangaka motema tango azali kokutana na bapasi. Ye azali lokola moto oyo alongi na lisano; Nzambe akopesa ye bomoi oyo alakaki na bato balingaka ye.

[13] Tango moto azali komekama, áloba té 'tè: “Ezali Nzambe moto azali komeka ngai.” Pamba té Nzambe alingaka makambo ya mabe ata moke té, pe ye amekaka bato té.

[14] Ezali baposa ya bato nde emekaka bango; yango moto ekosaka bango, pe etindaka bango básala mabe.

[15] Soki moto alandi baposa wana, yango ebimisaka masumu; pe soki masumu ekómi mingi, ememaka liwa.

[16] Bandeko na ngai ya bolingo, bómikosa té.

[17] Bolamu nyonso pe makabo nyonso ya kitoko oyo ekoká, eutaka na Likolo epai ya Nzambe, oyo asalá moi, sanza pe minzoto. Nzambe azali bobele ndenge moko, abongwanaka té; epai na ye molili ezali ata moke té.

[18] Asi'apesá biso bomoi ya sika, awa ayebisi biso maloba na ye ya solo. Ye moko moto alingaki bongo po tózwa esika ya liboso, na kati ya bikelamo na ye nyonso.

[19] Bandeko na ngai ya bolingo, bókanisa makambo oyo: moto nyonso átiaka molende po na koyoka, kasi ákanisaka malamu liboso ya koloba; pe ásilikaka noki té.

[20] Pamba té moto oyo asilikaka, akokisaka makambo ya bosembo té na miso ya Nzambe.

[21] Yango wana bótika bizaleli nyonso oyo ebebisaka mitema, pe makambo nyonso ya nko. Bólongola lofundu nyonso, pe bóndima maloba oyo ye akòmá na mitema na bino; yango nde moto ekoki kobikisa bino.

[22] Bómikosa té! Bósalaka ndenge maloba ya Nzambe ezali kotinda; bóyoka yango biyokela té.

[23] Pamba té oyo ayokaka maloba ya Nzambe biyokela, pe asalaka té ndenge yango ezali kotinda, akokani na moto oyo amitali na talatala: amoni ndenge elongi na ye ezali;

[24] soki akei, abosani ndenge yango ezalaki.

[25] Bobele Mibeko ya Nzambe ezali ya kokoka pe epesaka bato bonsomi. Soki moto atalaka yango malamu pe alandaka yango, soki abosanaka yango té kasi ayokaka pe atosaka yango, moto wana akozala na esengo na makambo oyo asalaka.

[26] Soki moto amimoni 'tè asambelaka, nzokande ayebi kobatela monoko na ye té, azali komikosa ye moko: kosambela na ye ezali pamba.

[27] Kosambela ya solo pe ya bosembo na miso ya Nzambe Tata ezali: kosalisa bana bakufelá baboti ná basi bakufelá mibali, tango bazali komona pasi; pe komibatela na makambo nyonso ya mabe ya mokili oyo.

Jake — Chapters