[1] Nzambe atikeli biso elaka 'tè tokokota na esika na ye ya kopema. Yango wana tókeba makasi penza, po moto moko té na kati na bino ákweya likolo ya mabe na ye.
[2] Pamba té tosi'toyoki elaka ya Nzambe, bobele ndenge bakoko bayokaká. Nzokande elaka yango ememelaká bango bolamu moko té, po bandimaki yango té.
[3] Bobele soki tondimi, wana nde tokokota na esika na ye ya kopema. Nzambe alobaká: “Na kanda nyonso nakataká seleka boye: bakokota na esika na ngai ya kopema ata moke té.” Kasi tango Nzambe asalaká mokili, asilisaki misala na ye.
[4] Pamba té ekòmamá boye po na mokolo ya sambo: “Na mokolo ya sambo Nzambe asilisaki misala na ye nyonso, bongo apemaki.”
[5] Nzokande na sima alobaká boye: “Bakokota na esika na ngai ya kopema ata moke té.”
[6] Bakoko bayokaká elaka ya Nzambe kasi bakotaki kuna té po baboyaki kondima; yango elakisi 'tè bato mosusu bakoki kokota.
[7] Ya solo, Nzambe atiaki lisusu mokolo moko, pe abengaki yango “lelo”; pamba té sima ya mbula ebele alobaki boye na nzembo ya David: “Lelo, soki boyoki maloba na ngai, bózala mitú makasi té.”
[8] Epai Jozué amemaká bakoko, yango té moto ezali “esika ya kopema” oyo Nzambe alobaki; pamba té atiaki mokolo mosusu.
[9] Ya solo, Nzambe abongiselá bato na ye esika mosusu ya kopema.
[10] Po moto oyo akotá na esika ya kopema epai ya Nzambe, asilisi misala na ye nyonso ndenge Nzambe asilisaká oyo ya ye.
[11] Bongo tósala makasi po tókota na esika wana ya kopema; moto moko té álanda ndakisa ya bakoko oyo baboyaká kotosa.
[12] Pamba té maloba ya Nzambe ezali na bomoi pe na nguya. Nguya na yango eleki kutu oyo ya mbeli ya etumba ya mino mibale. Maloba yango ekotaka tii na esika molimo pe bomoi ezali, tii na esika mikuwa ná mafuta ya kati ya mikuwa ezali. Maloba yango ebimisaka pe esambisaka baposa pe makanisi ya mitema ya bato; elakisaka makambo nyonso oyo ebombamá.
[13] Eloko moko té ekoki kobombama Nzambe. Nyonso emonanaka polele penza na miso na ye. Mokolo ezali, biso nyonso tokosamba epai na ye.
[14] Yango wana, makambo oyo tondimi, tósimba yango makasi. Pamba té tozali na Nganga-Nzambe monene koleka, oyo asi'akómá penza epai ya Nzambe, na Likolo; ye nde Yezu, Mwana ya Nzambe.
[15] Nganga-Nzambe na biso ya monene ayebi 'tè toyokaka pasi po tozangi makasi. Ye pe ayokaki pasi lokola biso; amekamaki na ndenge nyonso, bobele ndenge bamekaka biso; kasi ye akweyaki na masumu té.
[16] Yango wana, tótia molende, tópusana penepene ya Kiti ya Nzambe ya bolamu nyonso. Ye akoyokela biso mawa pe akopesa biso bolamu na ye; akosalisa biso na tango ya pasi.