Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:43

[1] Mbote na yo, Filemon, ndeko ya bolingo, moninga na biso ya mosala; pe na bato ya Eklezya oyo basanganaka na ndako na yo. Mbote lisusu na Apia, ndeko na biso ya mwasi, pe na Arshipe, moninga na biso ya etumba. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata na biso, pe na Nkolo Yezu Kristo. Ngai Polo, moto nakotá boloko likolo ya Kristo Yezu, pe ndeko Timoté, totindeli bino mokanda oyo.

[4] Ndeko Filemon, mikolo nyonso napesaka Nzambe na ngai mersi po na yo, pe nakanisaka yo na mabondeli na ngai.

[5] Pamba té, nayokaka sango ya bolingo na yo pe ya bondimi oyo ozali na yango, ndenge omipesá na Nkolo Yezu pe na bato nyonso ya Nzambe.

[6] Nazali kosenga na Nzambe 'tè bondimi oyo esangisi yo ná biso ébimisa misala; boye okolakisa malamu malamu na bato bolamu nyonso oyo tozali na yango na lisanga na Kristo.

[7] Ndeko, bolingo na yo epesi ngai esengo pe molende, pamba té osepelisi mitema ya bato ya Nzambe.

[8] Yango wana, atako Kristo apesá ngai bokonzi ya kotinda yo makambo osengeli kosala,

[9] kasi nazali kosenga yo ósala yango bobele na bolingo. Ngai Polo, nasi'nakómá mobange pe sik'oyo nazali na boloko po na Kristo Yezu;

[10] nazali kobondela yo po na Mwana na ngai Onezime; akómi lokola mwana oyo naboti awa na boloko.

[11] Nzokande liboso azalaki moto ya pamba, kasi sik'oyo akómi moto ya tina po na yo pe po na ngai.

[12] Bongo nazongisi ye epai na yo; azali lokola motema na ngai.

[13] Nalingaki átikala penepene na ngai po ásalelaka ngai na esika na yo, tango nyonso nakozala na boloko po na Sango Malamu.

[14] Kasi nakokaki kosala yango té, soki yo opesi nanu nzela té: nalingi ósalisa ngai na motema moko; boye émonana 'tè natindi yo na makasi té.

[15] Nakanisi Onezime akabwanaki na yo mwa-mikolo oyo, po sima ózwa ye libela.

[16] Pamba té sik'oyo azali lisusu moumbu na yo té, kasi azali na tina koleka moumbu; akómi ndeko ya bolingo penza po na ngai, kasi po na yo akómi lisusu ndeko ya bolingo koleka, ézala na miso ya bato to na miso ya Nkolo.

[17] Soki biso na yo tozali bandeko ya solo, yamba ye lokola nde ozali koyamba ngai.

[18] Pe soki asalaki yo mabe to azali na nyongo na yo, tia yango na kombo na ngai.

[19] Maloba oyo ngai moko moto nakòmi yango: ngai Polo nakofuta nyongo na yo. Kasi yo pe kanisa nanu nyongo na ngai, pamba té nayeelaki yo bomoi.

[20] Ya solo, ndeko na ngai, nasengi yo ósalisa ngai na kombo ya Nkolo: kitisa motema na ngai na kombo ya Kristo.

[21] Nayebi malamu 'tè okosala ndenge nakòmeli yo; okosala kutu mingi koleka oyo nasengi yo.

[22] Nasengi yo lisusu óbongisela ngai esika ya kolala, pamba té nazali kotia motema 'tè Nzambe akoyoka losambo na bino pe akozongisa ngai epai na bino.

[23] Epafras, oyo azali ná ngai na boloko po na Kristo Yezu, atindeli yo mbote mingi.

[24] Baninga na ngai ya mosala, Marko, Aristarke, Demas ná Luka, bango pe batindeli yo mbote.

[25] Bózwa bolamu oyo euti na Nkolo Yezu Kristo.