Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:47

[1] Oyo mbala ya misato nazali koya epai na bino. Yango ekozala ndenge Mibeko elobá: “Soki batemwen mibale to misato balobi ndenge moko, likambo ekatani.”

[2] Nazali na likambo moko ya kolobela bato oyo basalaki masumu, ná bino nyonso. Nasi'nalobá yango tango nazalaki epai na bino mbala ya mibale; pe sik'oyo, ata nazali mosika, nazongeli yango lisusu: soki nakómi epai na bino, nakoyokela moto moko té mawa.

[3] Pamba té, bolingi nálakisa 'tè Kristo azali koloba na monoko na ngai. Ye azangi makasi té epai na bino, kasi azali na nguya na kati na bino.

[4] Ya solo, azangaki makasi tango babomaki ye na kuruze; kasi sik'oyo azali na bomoi po na nguya ya Nzambe. Biso pe tozangi makasi ndenge Kristo azangaki yango; kasi bokomona 'tè tozali na bomoi oyo ye azali na yango, pamba té nguya ya Nzambe ekobanda kosala na biso, na kati na bino.

[5] Bómitala bino moko, bólakisa soki bozali na bondimi. Bomoni té 'tè Yezu Kristo azali na kati na bino? Soki té bosi'bolakisi 'tè bobungi.

[6] Kasi nakanisi boyebi 'tè biso tolongi té.

[7] Tozali kobondela Nzambe po bósala ata mabe moko té. Tozali na posa ya komilongisa té, kasi tolingi kaka bósala makambo ya malamu, ata biso tomonani lokola bato balongi té.

[8] Pamba té, soki bobandi kosalela makambo ya solo, nguya oyo Nzambe apesi biso ekozala lisusu na tina té; ye apesi biso yango kaka po ésalela makambo ya solo.

[9] Boye tosepelaka soki tozangi makasi, pe soki bino bozali na nguya. Eloko tozali kobondela Nzambe ezali 'tè bino bózala bato ya malamu penza.

[10] Yango wana, nakòmeli bino makambo oyo liboso 'tè náya, po tango nakoya, nápesa bino etumbu té. Pamba té Nkolo apesi ngai bokonzi po na kobongisa bino, kasi po na kokweisa bino té.

[11] Bandeko, bótikala malamu. Bóluka kaka kosala malamu penza, bólendisana, bóyokana, bózala na boboto. Bongo Nzambe ya bolingo pe ya boboto akozala na bino.

[12] Bópesana mbote mingi pe bóyambana ndenge ebongi na bato ya Nzambe. Bato nyonso ya Nzambe oyo bazali awa batindeli bino mbote.

[13] Bolamu ya Nkolo Yezu Kristo, bolingo ya Nzambe Tata, pe lisalisi ya Molimo Mosantu ézala na bino nyonso.

2 Ba-Korentien — Chapters