Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:15

[1] Nasengi bino bókanga nanu motema, bótika ngai náloba lokola zoba. Ya solo, bókanga motema moke!

[2] Nazali koyoka zuwa po na bino, ndenge Nzambe ayokaka zuwa. Pamba té, bozali lokola elenge mwasi oyo nalingi bábala ye na mobali se moko; mobali yango ezali nde Kristo. Nalakaki ye 'tè na miso na ye bokozala lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mobali té.

[3] Kasi boyebi ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe. Nazali kobanga, tango mosusu Satan akoki koya kobungisa makanisi na bino ya malamu, pe bolingo na bino epai ya Kristo ekozala lisusu ya motema moko té.

[4] Pamba té, namoni 'tè soki moto ayei kosakola Yezu mosusu oyo biso tosakolaki té, bozali kondima kaka; bozali koyamba molimo ekeseni ná Molimo Mosantu oyo bozwaki, pe “sango malamu” ekeseni ná oyo bosi'bondimi.

[5] Nakanisi 'tè bato oyo bobengaka “Bantoma minene” baleki ngai ata moke té.

[6] Ata nayebi koloba malamu té, kasi nayebi penza basekelé ya Nzambe. Mbala mingi nabandaki kolakisa bino yango na makambo ndenge na ndenge.

[7] Tango nasakolaki Sango Malamu ya Nzambe epai na bino, nasalaki yango ya ofelé. Namikómisaki lokola mongamba, po bino bókóma bato minene na miso ya Nzambe. Bongo nasalaki mabe?

[8] Ba-Eklezya mosusu ebandaki kofuta ngai, po násalela bino. Yango emonanaki lokola nazalaki kolia mbongo na yango pamba.

[9] Tango nazalaki epai na bino nakómaki kokelela; nzokande bandeko oyo bautaki na Masedwane bato bayaki kosalisa ngai. Namemisaki bino mokumba na ngai soki moke té, pe nakobanda kaka kosala ndenge wana.

[10] Ya solo, nazali kobeta tolo po na yango; pe nakati seleka na kombo ya Kristo 'tè na rejion mobimba ya Akaya, bakobotola ngai lokumu yango té.

[11] Po na nini nasalaka boye? Elakisi 'tè nalingaka bino té? Nzambe ayebi 'tè nalingi bino!

[12] Nakobanda kosala kaka ndenge nazali kosala sik'oyo, po násilisa lokuta ya bato oyo balukaka komikumisa lokola nde bakokani na ngai.

[13] Bato yango bazali bantoma ya lokuta; bakosaka 'tè bazali bantoma ya Kristo.

[14] Kasi ezali likambo ya kokamwa té. Satan ye moko pe akosaka 'tè azali anjelu oyo abimisaka moi.

[15] Bongo soki basali na ye bazali kokosa 'tè bazali basali ya bosembo, ezali likambo ya kokamwa té. Kasi na suka bakozwa oyo ekoki na misala na bango.

[16] Nalobi lisusu boye: moto moko té ákanisa 'tè nazali zoba. Pe soki bokanisi ndenge wana, likambo té; bóndima ngai lokola zoba, po ngai pe námikumisa mwa-moke.

[17] Ya solo, makambo nazali kokòma sik'oyo, Nkolo akoki kolinga yango té; pamba té, tango nazali komikumisa boye, nakómi zoba penza.

[18] Lokola bato mingi bazali komikumisa na makambo oyo emonanaka na miso, bongo ngai pe nakomikumisa.

[19] Bino, bato ya mayele penza! Bosepeli kolanda bazoba!

[20] Bakómisi bino baumbu, babotoli bino biloko, bakosi bino, batsioli bino pe babeti bino na bilongi; kasi bino bozali kaka kondima.

[21] Nazali koyoka soni mingi! Ya solo, nazangaki makasi ya kosala ndenge wana! Kasi lokola bango bazali komikumisa, ngai pe nakoki komikumisa. Nazali kokòma makambo oyo kaka lokola zoba!

[22] Bango bazali ba-Ebré? Ngai pe. Bazali bato ya Israel? Ngai pe. Bazali bana ya Abraham? Ngai pe.

[23] Bazali basali ya Kristo? Sik'oyo nazongisi lokola moto ya liboma: ngai pe; kasi naleki bango. Namonaki pasi na mosala koleka bango. Nakotaki boloko mbala mingi koleka bango. Bato babetaki ngai koleka bango. Nakómaki penepene ya liwa mbala mingi koleka bango.

[24] Mbala mitano Bayuda babetaki ngai fimbu tuku misato na libwa (39), ndenge mibeko ezali kotinda.

[25] Mbala misato basoda ya Rome babetaki ngai fimbu ndenge bango bamesaná. Mbala moko babambaki ngai mabanga po na koboma ngai. Mbala misato bamasuwa oyo nazalaki kosalela mobembo edindaki na mai. Pe mbala moko nasalaki mokolo mobimba na kati ya mai, butu moi.

[26] Na ebele ya mibembo nasalaki, nakutanaki na makama ndenge na ndenge: makama na bwatu pe na masuwa, makama epai ya bamiyibi, epai ya bandeko na ngai Bayuda, epai ya bikolo mosusu, epai ya bandeko ya lokuta; makama na bavile pe na bisobe.

[27] Namonaki pasi na mosala makasi. Mbala mingi nazalaki kolala pongi té. Nayokaki nzala ná posa ya mai; tango mosusu nazalaki ata na eloko moko té ya kolia. Nazangaki kutu bilamba, nanyokwamaki na malili.

[28] Bapasi mosusu kutu natangi té. Mikolo nyonso nazali na makanisi mingi po na ba-Eklezya nyonso.

[29] Soki moto moko alembi na ye, ngai pe nalembi. Soki moto moko akwei na likambo, nayokaka pasi mingi penza na motema.

[30] Soki esengeli nábeta tolo, nakobeta yango bobele po nazangá makasi.

[31] Nzambe ya lokumu nyonso, Tata ya Nkolo Yezu, ayebi 'tè nazali kokosa té.

[32] Tango nazalaki na Damas, motambwisi ya mboka abandaki koluka kokanga ngai; atiaki basoda na ye na baporte nyonso ya vile. Ezalaki na tango ya mokonzi Aretas.

[33] Kasi bandeko bakamataki ngai, batiaki ngai na kitunga, pe bakitisaki ngai na fenetre oyo ezalaki na mir ya lopango monene ya vile. Na ndenge wana nakimaki ye.

2 Ba-Korentien — Chapters