Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:21

[1] Ngai moko naboyaki kozongela bino po náyokisa bino mawa té.

[2] Soki nayokisi bino mawa, nani akoki kosepelisa ngai? Ezali bobele bino bato oyo ngai nayokisi mawa.

[3] Natindelaki bino mokanda, po nalingaki té 'tè bino bato bosengelaki kosepelisa ngai, bóyokisa ngai mawa, mokolo nakoya. Nayebi malamu 'tè esengo na ngai ezali lisusu ya bino nyonso.

[4] Ya solo, tango nakòmelaki bino mokanda yango, nazalaki kolela mingi, pe motema na ngai etondaki na pasi pe mawa. Nakòmaki yango po na kozokisa bino na mitema té, kasi po bóyeba 'tè nalingi bino mingi koleka.

[5] Soki moto ayokisi ngai pasi na motema, ezali kaka pasi na ngai moko té; kasi nakoki koloba 'tè ayokisi bino nyonso pe mwa-pasi.

[6] Etumbu oyo bato mingi na kati na bino bopesi na moto wana, ekoki.

[7] Sik'oyo ebongi malamu bólimbisa ye pe bólendisa ye, po átikala na mawa libela té.

[8] Yango wana, nazali kosenga na bino, bólakisa 'tè bolingaka ye.

[9] Nzokande tango nakòmelaki bino mokanda wana, nalingaki komeka bino po náyeba soki bokotosa ngai na makambo nyonso.

[10] Bongo soki bolimbisi moto oyo asalaki mabe, ngai pe nalimbisi ye. Pamba té, soki nalimbisi ye, ata likambo wana etali kaka ngai té, nasali yango po na bino, na miso ya Kristo,

[11] po Satan ázwa nzela ya kokosa biso té. Tosi'toyebá mayele na ye.

[12] Tango nakómaki na mboka Troas po na kosakola Sango Malamu ya Kristo, Nkolo afungoleli ngai nzela po na kosala mosala.

[13] Kasi motema na ngai ezalaki likolo, po namonaki ndeko na ngai Tite té. Yango wana, natikaki bato ya Troas pe nakendeki na Masedwane.

[14] Napesi mersi na Nzambe po, bipai nyonso Kristo azali kolonga etumba, ye amemaka ngai lokola soda oyo alandaka mokonzi na ye. Na mosala na ngai, Nzambe azali kopanza sango ya Kristo bipai nyonso, ndenge malasi epanzaka sòlo kitoko.

[15] Pamba té, epai ya bato bazali kobika ná baoyo bazali kobunga, nakómi lokola sòlo ya kitoko oyo Kristo azali kobimisela Nzambe.

[16] Bato bazali kobunga bayokaka sòlo yango lokola sòlo ya liwa oyo ezali koboma bango. Kasi baoyo bazali kobika bayokaka yango lokola sòlo ya bomoi oyo ezali kobikisa bango. Bongo nani akoki penza na mosala yango?

[17] Biso tozali lokola bato mosusu té oyo basalaka mombongo na maloba ya Nzambe. Kasi tolobaka bobele makambo ya solo na miso ya Nzambe, po ye moto atindi biso tósakola sango ya Kristo.

2 Ba-Korentien — Chapters