[1] Bandeko ya ba-Eklezya ya Galatie, bóyamba mbote euti na ngai, ntoma Polo. Ezali bato té batindi ngai to batiá ngai ntoma; kasi ezali Yezu Kristo ná Nzambe Tata oyo asekwisaki ye bato batiá ngai ntoma. Nakòmeli bino mokanda oyo na kombo ya bandeko nyonso oyo basangani ná ngai.
[3] Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata na biso pe Nkolo Yezu Kristo.
[4] Kristo amipesaki po na masumu na biso, na tina 'tè álongola biso na makambo ya mabe nyonso ya mokili oyo, ndenge Nzambe Tata na biso alingi.
[5] Lokumu ézala na Nzambe, tango nyonso seko Amen!
[6] Nakamwe mingi po botiki noki penza Nzambe oyo abengaki bino na bolamu ya Kristo, pe bokómi kondima Sango Malamu mosusu.
[7] Nzokande Sango Malamu mosusu ezali té. Kasi bato mosusu bazali kokotisa mobulu na kati na bino, pe balingi kobebisa Sango Malamu ya Kristo.
[8] Bóyoka malamu. Soki biso moko to anjelu auti na Likolo ayei kosakola Sango Malamu ekeseni ná oyo tosakolaki epai na bino, lisumá na ye!
[9] Lokola nasi'nalobaki na bino, sik'oyo nazongeli yango lisusu: soki moto amemeli bino Sango Malamu ekeseni ná oyo bozwaki liboso, lisumá na ye!
[10] Bokanisi nini? Nazali koluka bato bálinga ngai to Nzambe álinga ngai? Nazali nde koluka kosepelisa bato? Soki nazali nanu koluka kosepelisa bato, wana nazali lisusu mosali ya Kristo té.
[11] Bandeko, nalingi náyebisa bino: Sango Malamu oyo nasakolaki, euti na bato té.
[12] Nazwaki yango epai ya bato té; nayekolaki yango pe epai ya bato té. Yango ezali sekelé ya Yezu Kristo; ye moto alakisaki ngai yango.
[13] Boyebi ndenge nazalaká kolanda makambo ya Bayuda: nabandaki konyokola Eklezya ya Nzambe mingi koleka, kutu nabandaki kotia molende po na koboma yango.
[14] Nalekaki baninga na ngai na makambo etali Mibeko na biso Bayuda, pamba té nazalaki kolinga bokoko na biso mingi penza.
[15] Nzokande Nzambe asi'aponá ngai liboso 'tè nábotama. Na bolamu na ye abengaki ngai,
[16] pe alakisaki ngai Mwana na ye, po násakola Sango Malamu na ye na bikolo nyonso. Bongo nabandaki koluka mayele epai ya bato té;
[17] nakendeki ata na Yeruzalem té po na kokutana ná baoyo bakómaki bantoma liboso na ngai; kasi nakendeki na Arabie, pe sima nayei kozonga na Damas.
[18] Bongo sima ya mbula misato nakendeki na Yeruzalem po na koyebana ná Piere, pe nafandaki epai na ye póso mibale.
[19] Namonaki ata ntoma mosusu té, kasi bobele Jake ndeko ya Nkolo.
[20] Makambo oyo nazali kokòmela bino ezali ya solo. Nzambe ayebi 'tè nazali kokosa té.
[21] Bongo nakendeki na mboka Sirie pe na Silisie.
[22] Na tango wana, bato ya ba-Eklezya ya Kristo ya rejion ya Yudea batikalaki komona elongi na ngai té.
[23] Bayokaki bobele sango 'tè: “Moto oyo azalaká konyokola biso liboso, akómi sik'oyo kosakola Sango Malamu oyo ye abandaká koluka koboma.”
[24] Bongo babandi kokumisa Nzambe po na ngai.