Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:57

[1] Esengeli námikumisa, ata ezali na tina té. Tika náloba po na makambo oyo Nkolo amonisaki ngai lokola na bandoto, pe basekelé oyo ayebisaki ngai.

[2] Eleki mbula zomi na minei (14), Nzambe atombolaki moto moko na lisanga ya Kristo, pe amemaki ye na Likolo penza, na Mboka na ye. Nalobi lisusu, nayebi té soki ya solo penza nzoto na ye ekendeki na Likolo, to ezalaki lokola na ndoto; kaka Nzambe moto ayebi.

[3] Ee, nayebi 'tè Nzambe akómisaki moto yango na Mboka na ye ya bisengo. Nalobi lisusu, nayebi té soki ya solo penza nzoto na ye ekendeki na Likolo to ezalaki lokola na ndoto, kaka Nzambe moto ayebi.

[4] Pe moto wana ayokaki maloba oyo moto akoki koloba té pe asengeli koloba té.

[5] Ngai nakomikumisa po na moto wana, kasi po na ngai moko té. Soki ngai nazali komikumisa po na ngai moko, ezali kaka po na kolakisa 'tè ngai nazali na makasi té.

[6] Soki nalingi komikumisa, nakosala yango lokola zoba té, pamba té nazali koloba bobele makambo ya solo. Kasi naboyi komikumisa po 'tè moto moko té ázwela ngai makanisi ya monene, koleka makambo oyo amonaka pe ayokaka epai na ngai.

[7] Ya solo, Nzambe alingi té názala na lofundu po na makambo ya kokamwa oyo ye alakisaki ngai. Yango wana apesi ngai maladi oyo eyaka lokola ntoma ya Satan po na kobetabeta ngai, na tina 'tè názala na lofundu té.

[8] Mbala misato mobimba nabondelaki Nkolo álongola ngai maladi yango.

[9] Kasi ye azongiseli ngai boye: “Bolamu na ngai ekoki na yo. Pamba té, nguya na ngai esalaka mosala bobele epai ya moto oyo azangá makasi.” Yango wana nabetaka tolo mingi penza po nazangi makasi, na ndenge 'tè nguya ya Kristo étikala na ngai.

[10] Yango wana, nasepelaka soki nazangi makasi, soki bafingi ngai, soki nakeleli, soki banyokoli ngai pe bamonisi ngai pasi po na Kristo. Pamba té, soki nazangi makasi, nde na tango wana nazalaka elombe!

[11] Nakómi lokola zoba, kasi ezali bino bato bolingaki bongo; pamba té, esengelaki bino bózwa ngai moto ya kokoka. Ata nazali moto ya pamba, bato oyo bobengaka “Bantoma minene” baleki ngai ata moke té.

[12] Bino boyebi ndenge nazalaki kokanga motema na kati na bino, na makambo nyonso; boyebi makamwisi ya ndenge na ndenge oyo emonisaki bino nguya ya Nzambe. Yango moto ezalaki kolakisa bino 'tè nazali penza ntoma.

[13] Eloko nini napesaki na ba-Eklezya mosusu oyo bino bozwaki té? Nayebi likambo moko kaka: naliaki mbongo na bino té! Bólimbisa ngai na mabe oyo!

[14] Oyo mbala ya misato nalingi koya epai na bino. Nakolia mbongo na bino té. Nazali kolinga nde bino, kasi mbongo na bino té! Pamba té bana baleisaka baboti té, kasi baboti nde bato baleisaka bana.

[15] Boye ngai pe nakozala na esengo mingi ya kopesa biloko na ngai nyonso, pe komipesa ngai moko po na bino. Soki nalingi bino mingi boye, bino bokolinga ngai moke?

[16] Ya solo, namemisaki bino mokumba na ngai té. Kasi balobaka 'tè nasalaki mayele, natielaki bino motambo.

[17] Ndenge nini? Na kati ya bato oyo natindelaki bino, moto nini ayaki kokosa bino po ázweela ngai mbongo?

[18] Natindaki Tite ná ndeko moko báya epai na bino. Bongo Tite ayaki kosenga bino mbongo? Biso ná ye tosalaki mosala na motema moko té? Tozalaki na bizaleli ya ndenge moko té?

[19] Tii sik'oyo bokanisi 'tè nazali koluka kaka nzela ya komilongisa na miso na bino? Ezali boye té! Nalobaka na miso ya Nzambe, ndenge Kristo alingi. Bandeko ya bolingo, nalukaka bobele kobongisa bino.

[20] Pamba té, nazali kobanga 'tè tango nakoya epai na bino, bizaleli na bino ekosepelisa ngai té; pe oyo ya ngai ekosepelisa bino té. Tango mosusu nakoya kokuta bino bozali koswana, kosalela baninga zuwa, koyokana kanda, koweela bokonzi, kofingana, kotóngana, kotia lofundu pe kosala mobulu.

[21] Nazali kobanga 'tè soki nakómi lisusu epai na bino, Nzambe na ngai akoyokisa ngai soni na miso na bino, pe nakotonda na mawa po na bato oyo basalaki masumu kala, pe baboyi kotika makambo ya soni, kindumba, pe mabe oyo basalaki.

2 Ba-Korentien — Chapters